Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosakola na esika ya komata na masini oyo ememaka na ngomba, na Khulo

GÉORGIE

“Yango nde libula ya basaleli ya Yehova.”—Yis. 54:17.

“Yango nde libula ya basaleli ya Yehova.”—Yis. 54:17.

BASALELI ya Yehova na Géogie balɛmbaki te kosakola nsango malamu, mpe Yehova apamboli mosala na bango ya makasi. Yango esali ete nsango malamu esakolama pene na bisika nyonso na ekólo yango.

Basakoli bazali komibongisa mpo na kosakola na Ouchgouli, oyo ezali na mɛtrɛ 2 200 likoló ya nivo ya mbu

Kasi, na bambula euti koleka, basakoli ya molende mpe babongisi-nzela batyaki likebi mingi na bateritware oyo litatoli epesamaka mingi te. Mpo na kokóma na bateritware ya ngombangomba, na bamboka mosusu ya mosika mpe ya mikemike esengeli kaka kokende na mituka ya makasi to masini oyo ememaka na ngomba (téléphérique).

Basakoli na etúká ya Svanétie

Kobanda 2009, mbula na mbula, biro ya filiale ya Géorgie etindelaka masangá nyonso liste ya bateritware oyo epesami ata na lisangá moko te, mpe esɛngaka basakoli bákendaka kosakola na bisika yango. Mpo na kosakola na bisika ya ndenge wana, bandeko mingi basengelaki komipimela makambo mosusu.

Ana ná Temuri Bliadze

Temuri ná Ana Bliadze, oyo bautaki kobalana sika, bayokaki nsango ete bazali na mposa mingi ya basakoli na Adjarie, etúká moko ya ngombangomba. Bautaki kosomba lopango mpo bátonga ndako ya sika. Kasi sikoyo, bazalaki na libaku malamu ya kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola.

Liboso, bakendaki naino kolekisa pɔsɔ mobimba na etúká ya Adjarie. Mpo na komonisa ndenge ayokaki ntango bakómaki kuna mbala ya liboso, Temuri alobi boye: “Basakoli ya teritware yango bazalaki kotambola mingi mpo na kokende na bamboka ya mikemike. Tozalaki na motuka moko ya makasi mpe namonaki mbala moko ete ekosalisa mingi kuna.”

Ana abakisi boye: “Kokende mosika ezalaki pɛtɛɛ te mpo tomesenaki mingi na lisangá na biso mpe na libota na biso. Kasi tomonaki mpenza lipamboli ya Yehova.” Ekoki mbula misato na ndambo banda Temuri ná Ana bazali kopesa mabɔkɔ na etuluku moko na Keda, engumba moko na etúká ya Adjarie.

Babongisi-nzela oyo bakangaki mabɔkɔ te

Mosala ya babongisi-nzela monene ya ntango mokuse esalisaki mingi mpo nsango malamu esakolama na bateritware ya mosika. Ntango mosala na bango esilaki, babongisi-nzela mingi bazwaki ekateli ya kotikala na bisika oyo batindaki bango, mpo bákoba kolandela bato oyo bazalaki koyekola na bango Biblia.

Bandeko basi mibale minzemba, bango mibale bazali na nkombo Khatuna, batindamaki na Manglisi, engumba moko kitoko. Ata Motatoli moko te azalaki na teritware yango, kasi mosala ya bandeko basi wana mibale ebotaki mbuma. Na sanza ya liboso, bayekolaki Biblia na bato 9, na sanza ya mibale, na bato 12, na sanza ya misato, na bato 15, mpe na sanza ya minei, na bato 18! Mpo na kokoba kolandela bayekoli wana ya Biblia, bazwaki ekateli ya kotikala na Manglisi.

Mpo na kozwa mwa mbongo ya kobikela, bandeko basi wana basengelaki kokanga mabɔkɔ te. Bato mingi oyo bakendá na Manglisi basepelaka na lolenge moko ya bilei ya mboka yango: mwa bilei ya sukali oyo esalemi na pɔme moko ya mboka yango, oyo eyebani ete etongaka nzoto. Yango wana, na ebandeli, bandeko basi wana bazalaki kozwa bapɔme ya mobesu mpo na kosala bilei yango, na nsima bazalaki kotɛka yango na zando. Kasi na nsima, bazwaki esika mosusu oyo bakanaki te mpo na kozwa mwa mbongo.

Mokolo moko moyekoli moko ya Biblia amemelaki bango bana ya nsoso ebele. Ayebisaki bango ete nsoso na ye moko ebotaki makei na esika moko ya kobombana mpe ebimaki na bana ya nsoso ebele na ndako. Mwasi yango asepelaki kopesa bandeko oyo bateyaka ye Biblia likabo ya bana ya nsoso wana oyo akanisaki te. Moko ya bandeko basi yango ayebaki malamu mosala ya kobɔkɔla bansoso, yango wana bazwaki ekateli ya kobɔkɔla bansoso na lopango mpo na kozwa mwa mbongo ya kobikela.

Moko ya bandeko basi yango alobi: “Na lisalisi ya Yehova, ya bandeko, mpe ya bayekoli ya Biblia, tosali mbula mitano na Manglisi.” Lelo oyo, ezali na etuluku moko ya bandeko mibali mpe basi ya molende kuna.

Khatuna Kharebashvili ná Khatuna Tsulaia, na Manglisi

Mosala ya mobongisi-nzela na teritware ya monɔkɔ ya bapaya

Na bambula euti koleka, bapaya mingi bayaki kofanda na Géorgie. Babongisi-nzela mingi bamonaki ete porte mosusu ya mosala efungwamaki. Yango wana, babandaki koyekola minɔkɔ lokola Arabe, Azéri, Chinois, Lingelesi, Perse, mpe Turc.

Babongisi-nzela mingi bakendaki na bituluku mpe masangá ya minɔkɔ ya bapaya, nzokande basusu bakendaki kofanda na mboka mopaya, na bisika oyo mposa ya basakoli ezali mingi. Giorgi mpe Gela bazalaki na mbula mwa moke koleka 20 ntango bakendaki kosakola na ekólo moko pene na ekólo na bango. Giorgi alobi boye: “Tolingaki kopesa Yehova oyo eleki malamu, mpe kokende kofanda na mboka mosusu epesaki biso libaku ya kosala yango.”

Gela akanisi ntango oyo balekisaki kuna mpe alobi: “Kozala nkulutu na teritware ya ndenge wana eteyaki ngai makambo mingi. Ezali mpenza libaku malamu ntango Yehova azali kosalela yo mpo osalisa ‘bampate na ye ya mike.’”Yoa. 21:17.

Giorgi abakisi: “Tokutanaki mpe na mikakatano kuna, kasi totyaki makanisi na biso nyonso na mosala na biso mpe tozalaki kokanisa makambo mosusu te. Tozalaki komona ete tozali kosala oyo tosengelaki kosala.”

Ndeko mobali mosusu, nkombo na ye mpe Gela, akendaki kosakola na Turquie na boumeli ya mwa bambula. Alobi boye: “Na ebandeli ntango nazalaki kobunda mpo na koyekola monɔkɔ ya mboka yango, ezalaki mpasi nakoba kobatela esengo na ngai. Kasi, nsukansuka ntango nakómaki na likoki ya kosolola na bandeko mpe bato ya teritware, esengo na ngai ezalaki na nsuka te.”

Nino, oyo azalaki mobongisi-nzela na boumeli ya mbula koleka 10 na engumba Istanbul, na Turquie, alobi boye: “Kaka mokolo ya liboso oyo nakómaki kuna, namonaki lobɔkɔ ya Yehova. Kozala mobongisi-nzela na mboka mopaya ezali kopesa yo libaku ya kokutana mokolo na mokolo na makambo lokola oyo totángaka na Buku ya mobu.”