Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

GÉORGIE

Nalukaki litambwisi ya Yehova

Tamazi Biblaia

Nalukaki litambwisi ya Yehova
  • ABOTAMAKI NA 1954

  • BATISIMO 1982

  • NA MOKUSE Apesaki mabɔkɔ na mosala ya konyata na masini mikanda na kobombana mpe azalaki moko ya bakɛngɛli-batamboli ya liboso na Géorgie, na ntango yango azalaki na bana minei.

MAMA na ngai asilikaki mpenza ntango ngai ná mwasi na ngai Tsitso tokómaki Batatoli ya Yehova. Mokolo moko, abengisaki bandeko na biso nyonso mpo bándimisa ngai natika kosangana elongo na Batatoli ya Yehova. Bayebisaki ngai napona soki nalingi kotikala Motatoli ya Yehova to bábengana ngai na libota.

Nazwaki ekateli ya kolongwa na engumba yango. Lokola nasalaka mosala ya bibende, namonaki malamu nakende na Koutaïssi, engumba ya mibale ya monene ya Géorgie, epai nakokaki kozwa mosala noki. Nayebaki mpe ete engumba yango ezali mpenza na mposa ya basakoli, yango wana nalukaki litambwisi ya Yehova.

Mwa moke na nsima, nakutanaki na moyekoli na ngai moko ya Biblia, oyo azalaki kofanda na mwa engumba babengi Djvari. Ntango ayokaki ete nazalaki na mposa ya kokende na Koutaïssi, abondelaki ngai naya na engumba oyo ye azalaki. Ayebisaki ngai boye: “Tozali na ndako. Ngai ná mwasi na ngai ná bana tokokende na shambre mosusu mpe yo ná mwasi na yo bokoki kosalela shambre oyo mosusu.”

Lokola nazalaki koluka litambwisi ya Yehova, nayebisaki ye ete nakondima yango mpo na mwa ntango kaka soki nazwi mosala noki mpe nazwi ndako ya kofutela na Djvari. Likambo ya kokamwa, kaka na mpokwa wana ayelaki ngai liste ya misala oyo bazalaki koluka bato.

Nsima ya mwa mikolo, ngai na libota na ngai tokendaki kofanda na Djvari. Kaka na mokolo ya liboso mpenza, nazwaki mosala ya mbongo mingi mpenza. Patrɔ na ngai apesaki ngai ndako ya monene na lopango ya kompanyi. Mwa moke na nsima, bandeko basɛngaki ngai napesa mabɔkɔ na mosala ya konyata na masini mikanda oyo elimbolaka Biblia na ndako na biso, na ndenge ya kobombana. Lokola ndako na biso ya sika ezalaki monene mpenza, ngai ná mwasi na ngai tondimaki mosala yango esalemaka kuna.

Na boumeli ya bambula mingi, bandeko bazalaki kosala Ekaniseli mpe makita mosusu ya minene na ndako na biso. Bandeko koleka 500 bazwaki batisimo na ndako na biso. Nazali na esengo mpo namonaki litambwisi ya Yehova mpe nalandaki yango.