Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Sierra Leone: Crystal azwi lisalisi

KOSAKOLA MPE KOTEYA NA MOKILI MOBIMBA

Afrika

Afrika
  • MIKILI 58

  • BATO 1 109 511 431

  • BASAKOLI 1 538 897

  • BAYEKOLI YA BIBLIA 4 089 110

Abondelaki mpo akutana na bababa

Na Sierra Leone, Crystal misionɛrɛ moko oyo asakwelaka bababa abondelaki Yehova liboso abima mpo asalisa ye akutana na bababa na teritware. Na ntɔngɔ ya mokolo yango, ntango azalaki koluka kozongela moto oyo asololaki na ye, alekaki na nzela mosusu oyo amesaná koleka te. Atunaki bato ya kartye soki bayebi ata baba moko ya kartye yango mpe balakisaki ye ndako moko. Kuna, akutaki elenge mwasi moko ya boboto oyo andimaki nsango malamu mpe asepelaki koyangana na makita ya elobeli ya bababa. Na nsima, bato ya kartye yango batunaki Crystal soki akosepela kokutana na baba mosusu. Yango wana akutanaki na baba mosusu ya komikitisa oyo azalaki koluka solo. Atako así asakolá na balabala yango, kasi ezalaki mbala ya liboso akutana na bababa wana mibale. Crystal andimi mpenza ete soki Yehova asalisaka ye te, mbɛlɛ akutanaki na bababa yango te.

“Diskur yango esalemaki mpenza mpo na ngai!”

Emmanuel, oyo afandaka na Libéria, azalaki kokumba motuka na wikende mpo na kokende makita na Ndako ya Bokonzi. Elenge mobali moko oyo alataki kitoko atɛlɛmaki pene ya balabala mpe azalaki na mawa mpenza. Lokola asepelaki ndenge elenge yango alataki, Emmanuel atɛlɛmisaki motuka mpo atala soki akoki kosalisa elenge yango. Elenge yango ayebisaki ye ete nkombo na ye Moize. Bayibaki ye mbongo nyonso oyo azalaki na yango na butu oyo elekaki mpe azalaki na mposa ya komiboma. Emmanuel ayokaki Moize mpe na boboto nyonso ayebisaki ye, “Yaká tókende na Ndako ya Bokonzi.” Mpe bakendaki. Makambo Moize ayokaki kuna, elelisaki ye. Nsima ya koyoka diskur ya bato nyonso, Moize alobaki: “Diskur yango esalemaki mpenza mpo na ngai! Batatoli ya Yehova bakeseni mpenza na bato mosusu.” Na nsuka ya makita, Moize andimaki koyekola Biblia mpe akómá koyangana na makita ya lisangá.

“Nazali mopakano te”

Aminata azali mwana-kelasi ya mbula 15 mpe afandaka na Guinée-Bissau. Ntango azalaki na mbula 13, molakisi ayebisaki bango basala liyemi ya bamaskɛ mpe biloko mosusu oyo bato basalelaka na milulu babengi carnaval. Na esika asala oyo molakisi asɛngaki, Aminata asalaki nde liyemi ya banyama ná banzete mpe na nsima akomaki na liyemi yango, “paradiso.” Ntango molakisi akɔngɔlaki badevuare yango, alobaki na Aminata ete asali te makambo asɛngaki, yango wana atyaki ye zero. Nsima ya kelasi, Aminata akutanaki na molakisi mpe atunaki ye, “carnaval ezali mpo na banani?”

Molakisi alobaki, “ezali mpo na bapakano.”

Guinée-Bissau: Aminata asali liyemi ya “paradiso”

Aminata alobaki: “Nazali mopakano te, yango wana nakoki te kosangana na milulu ya bongo. Nandimaka ete mosika te Nzambe akokómisa mabele paradiso yango wana nasalaki liyemi na yango.” Molakisi alobaki bapwɛ ya devuare wana ekei na mai, akopesa bango devuare mosusu, akokoma mituna oyo bango bakopesa biyano. Nini emonanaki? Aminata azwaki bapwɛ mingi (18/20).

Bato mingi bayaki

Na mboka moko ya moke na Malawi, ezali na etuluku moko oyo ezali na basakoli nsambo. Bayanganaka na mwa ndako moko ya matiti mpe batandaka bitɔkɔ. Lokola viziti ya mokɛngɛli ya zongazonga elendisaki bango, bandeko babakisaki milende mpo na kobengisa bato na Ekaniseli ya liwa ya Kristo. Bakakisaki miinda ya petrole likoló ntango diskur ya Ekaniseli ezalaki kosalema. Ebele ya bato bazingaki ndeko oyo azalaki kosala diskur. Kanisá esengo oyo bandeko yango nsambo bayokaki ntango bayebaki ete bato 120 bayanganaki na Ekaniseli yango!

Malawi: Bayangani bazalaki 120

Mwa buku yango ebongisaki libala na ye

Matomba oyo ebimaka na mosala ya kosakola na bingumba minene emonanaka mbala moko boye te. Na Lomé, engumba-mokonzi ya Togo, mwasi moko apusanaki pene ya shario ya mikanda mpe azwaki mwa buku Okoki kozala na libota ya esengo atako liboso azalaki kokakatana. Bandeko batalelaki na ye makanisi oyo ezali na Baefese 5:3 mpe na nsima bapesanaki banimero ya telefone. Pɔsɔ mibale na nsima, mwasi yango abengaki mpe alobaki: “Nazalaki kosepela na Batatoli ya Yehova te. Ata bongo, natángaki mwa buku yango, ezalaki kitoko mpenza. Esalisaki ngai nabongisa mwa mikakatano oyo ezalaki na libala na ngai mpe nasungaki kutu mabala mosusu mibale. Nazalaki kokanisela Batatoli ya Yehova mabe. Nabondeli bino, boyá koyekola na ngai Biblia.” Bandeko bakómaki koyekola Biblia na mwasi yango ata mpe mwasi ná mobali moko oyo ye asalisaki.

Abongolaki Mwa buku yango

Ankasie ezali mwa engumba moko ya moke na Ghana. Mwa bakomelesa nde batandaka biloko na bango na balabala ya monene. Kasi mokolo nyonso ya yambo, bandeko batyaka shario ya mikanda na balabala yango. Ntango ndeko Samuel oyo azalaki kosakola na shario apesaki Enoch litatoli, Enoch andimaki kozwa mwa buku Yoká Nzambe mpe atunaki Samuel soki azali na mikanda mosusu na monɔkɔ ya Kusaal.

Ghana: Abongolaki mwa buku na monɔkɔ ya Kusaal

Samuel ayanolaki: “Te, tozali na yango te. Kasi tozali na mwa babuku na monɔkɔ ya Frafra,” oyo ekokani na monɔkɔ ya Kusaal. Mwa mikolo na nsima, liboso Enoch azonga na mboka na ye mosika na nɔrdi, asɛngaki mikanda mosusu mpo amemela bandeko na ye.

Ntango Enoch azongaki lisusu na Ankasie, apesaki Samuel mokanda moko. Enoch abongolaki mwa buku Yoká Nzambe na monɔkɔ ya Kusaal! Azali kokoba koyangana na makita mpe koyekola Biblia.