Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Fidji

KOSAKOLA MPE KOTEYA NA MOKILI MOBIMBA

Océanie

Océanie
  • MIKILI 29

  • BATO 41 051 379

  • BASAKOLI 98 574

  • BAYEKOLI YA BIBLIA 67 609

Nsima ya bambula libwa, molakisi na ye andimaki koyangana

Na Australie, ntango Olivia azalaki na kelasi ya maternelle, abengisaki molakisi na ye na Ekaniseli. Na mbula mwambe oyo elandaki, akobaki kobengisa molakisi yango na Ekaniseli. Nsukansuka, na 2016 molakisi yango abengaki ye na telefone mpo ayebisa ye ete akoya na Ekaniseli. Molakisi yango alobaki ete amonaki ete Olivia azalaki komemya ye ndenge azalaki kobengisa ye mbula nyonso. Molakisi yango ayaki na Ekaniseli elongo na mobali na ye. Mobali na ye amonaki ndenge bazalaki kotonga Ndako ya Bokonzi mpo azalaki kosala na biro moko ya Leta ya engumba yango. Ayebisaki bandeko ete ndenge batambwisaki mosala ya kotonga Ndako ya Bokonzi yango, ekamwisaki ye. Molakisi yango ná mobali na ye basepelaki mingi na mpokwa oyo balekisaki kuna, yango wana bazalaki na kati ya bato ya nsuka oyo balongwaki na Ndako ya Bokonzi.

Australie: Nsima ya mbula libwa, kolendendela ya Olivia ebimisaki matomba

Atángaki buku yango mbala misato mobimba

Jacintu ná mwasi na ye bafandaka na Timor oriental. Lokola bazalaki bandimi ya solosolo ya lingomba ya Katolike, bamitungisaki ntango mwana ya ndeko ya Jacintu akómaki Motatoli ya Yehova mpe azalaki lisusu kosambela esika moko na libota te. Lokola Jancitu azalaki na mposa ya komonisa mwana yango ete azalaki na libunga, azwaki ekateli ya kotánga buku Biblia eteyaka mpenza nini? Azalaki na mposa ya komona mateya ya lokuta na buku yango. Na nsima ayebisaki mwasi na ye: “Natángi buku yango. Kasi namoni eloko ya mabe te.”

Mwasi yango ayebisaki ye, “boye otángi yango malamu te. Tángá yango lisusu, kasi na mbala oyo kotánga nokinoki te.”

Jacintu asalaki bongo, kasi ayebisaki lisusu mwasi na ye, “namoni mabe moko te.” Mpe abakisaki boye: “Nyonso euti na Biblia. Ata na oyo etali losambo ya bakufi, euti kaka na Biblia.”

Mwasi yango alobaki boye: “Tángá yango lisusu mpo na mbala ya misato mpe ya mbala oyo tyá mikɔlɔtɔ na paragrafe mokomoko, yekolá yango malamumalamu. Ekoki kozala na makambo ya malamu te.”

Jacintu ayekolaki buku yango malamumalamu mpenza, atyaki mikɔlɔtɔ na paragrafe mokomoko. Nsima ya kosala bongo, alobaki boye: “Makambo nyonso ezali solo! Mwana na biso amikosi te.” Lelo oyo Jacintu akómá koyekola Biblia.

Mwana na ye ya moke ya mwasi akangaki monɔkɔ te

Ndeko mwasi moko mobongisi-nzela oyo afandaka na Guam, akendaki kotala mwasi moko oyo alobaka monɔkɔ ya Pohnpei mpe alakisaki ye video Mpo na nini koyekola Biblia? Ndeko yango alobaki akozongela mwasi yango lisusu. Atako azongelaki mwasi yango mwa moke na nsima, akutaki ye te. Yango wana ntango mwana ya mwasi yango afungolaki porte, ndeko yango alakisaki mwana yango moko ya bavideo Kómá moninga ya Yehova. Mwana yango asepelaki mpenza na video yango. Mbala ya nsima oyo ndeko-mwasi yango azongaki lisusu kotala bango, mama ya mwana yango ayambaki ye mpe andimaki nsango ya Biblia. Emonani lokola mwana yango ayebisaki mama na ye ete ebongi bákende na lingomba ya mwasi oyo alakisaki ye video. Yango ebendaki likebi ya mama wana. Ndeko yango alakisaki ye ndenge toyekolaka na bato Biblia mpe ebongiseli ezwamaki mpo bákoba koyekola.

“Lokola bampate oyo ezangá mobateli”

Terence, mokɛngɛli ya zongazonga moko ná mwasi na ye Stella, bakendaki na Inakor, teritware moko ya Papouasie-Nouvelle-Guinée oyo mosakoli moko te asakolá kuna. Terence alobi boye: “Mokolo ya liboso na ntɔngɔ makasi liboso tólamuka babɛtɛlaki biso porte. Ebele ya bato bazalaki kozela biso libándá yango wana tosakwelaki bango kobanda ngonga ya motoba tii na midi. Tokataki naino masolo mpo tósukola mpe na nsima tokutaki ebele ya bato mosusu bazali kozela biso. Yango wana tosakwelaki bango lisusu kobanda ngonga ya 14 tii na midi ya butu.” Mokolo oyo elandaki, bazwaki ekateli ya kolongwa na ntɔngɔ makasi mpo na kokende kosakola na esika mosusu. Bato ebele bayaki lisusu koluka bango na ndako kasi bakutaki bango te. Terence alobi boye: “Ntango bayebaki esika oyo tokendaki, balandaki biso mpe bakutaki biso. Na mbala oyo mpe tosakolaki tii na midi. Ntango tozongaki na ndako tokutaki lisusu ebele ya bato bazali kozela biso. Mikolo nyonso ezalaki bongo. Bato bazalaki kuna ‘lokola bampate oyo ezangá mobateli.’”Mat. 9:36.

Papouasie-Nouvelle-Guinée: Bato bazali kozela Terence ná Stella na mposa makasi

Akabelaki monganga na ye

Agnès, mobongisi-nzela moko oyo afandaka na Nouvelle-Calédonie akendaki epai ya monganga oyo asalaka bato masaje mpo azalaki na mpasi na lobɔkɔ. Ntango azalaki kosalisa Agnès, monganga yango ayebisaki ye ete amonaka ndenge bato ebele banyokwamaka mpe amitunaka soki Nzambe azalaka motema malamu. Agnès apesaki Yehova matɔndi na nse ya motema ndenge apesaki ye libaku ya kopesa litatoli. Yango wana alakisaki monganga yango trakte oyo elobi Bampasi ekosila mokolo mosusu? mpe atángelaki ye Emoniseli 21:3, 4.

Monganga yango alobaki boye: “Nandimi te ete vɛrsɛ oyo otángi ezali na Biblia na ngai; Biblia na ngai ezali kaka na Baevanzile.” Na nsima, ntango ayebaki ete Agnès azali Motatoli ya Yehova, ayebisaki Agnès ete así akutaná na Batatoli ya Yehova na mboka na ye, Chili.

Agnès akanisaki lisusu lapolo ya Chili oyo atalaki na TV JW. Yango wana na mbala ya nsima oyo akendaki na lopitalo yango amemaki tablɛti na ye mpe alakisaki monganga video yango. Monganga yango asepelaki mpenza ndenge amonaki Betele mpe ndako ya liyangani ya Chili. Na nsima Agnès alobaki boye, “eloko mosusu namemeli yo yango oyo, Biblia ya mobimba mpo otánga Emoniseli 21:3, 4 oyo natángelaki yo pɔsɔ eleki!” Monganga yango atɛlɛmaki na esengo nyonso, ayambaki Agnès mpe alobaki na ye, “matɔndi mingi mpo na video mpe Biblia oyo opesi ngai!”

Nouvelle-Calédonie: Monganga na ye asepelaki mpenza

Na mbala oyo elandaki, Agnès amemelaki ye buku Biblia eteyaka mpenza nini? mpe alimbolelaki ye ntina oyo bampasi ezali awa na mabele. Monganga ayebisaki ye ete akokende konje na Chili mpe akomema buku yango mpo atánga yango mobimba kuna.