Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Allemagne: Litatoli na lisalisi ya shario liboso ya kaa ya bato oyo bakimá mboka

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

Bansango oyo euti na mikili ndenge na ndenge

Bansango oyo euti na mikili ndenge na ndenge

Kosakwela bato oyo bakimá mboka mpe bapaya

Na Allemagne, teritware ya monɔkɔ ya bapaya ezali se kokóma monene mpo na ebele ya bato oyo bakimá mboka mpe bapaya oyo bazali kofanda na ekólo yango. Na mikolo euti koleka, na boumeli ya sanza 9, bituluku 229 ya minɔkɔ ya bapaya efungwamaki. Basakoli soki 800 bazali kokɔta bakelasi 30 mpo na koyekola minɔkɔ 13.

Bandeko bazali kosakwela bato oyo bakimá mboka na bisika oyo bayambaka bango ntango bauti na mboka mopaya. Mpo na kopesa litatoli, bandeko bazali kosalela bashario na bisika koleka 200 mpe bakabolaki mikanda soki 640 000.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki ete kampanye moko monene esalema kobanda na sanza ya mitano tii na sanza ya nsambo 2016. Basakoli 700 oyo balobaka monɔkɔ ya Arabe bautaki na bikólo 7 mpe bakendaki na bisika 10 na Autriche mpe na Allemagne mpo na kosakwela ebele ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Arabe oyo bafandi kuna.

Kolɔkɔta mbongo ya bibende na balabala

Na Bélize, basakoli 50 ya lisangá ya Faber’s Road Kriol batambolaka na makolo ntango bazali kopesa litatoli na teritware ya lisangá na bango. Bandeko mingi bazali na mbongo mingi te, kasi balukaka mabaku ya komonisa ezaleli ya kokaba. Eleki mwa bambula, bandeko bazalaki kolɔkɔta mbongo ya bibende oyo bazalaki kokuta na balabala oyo etondi na putulu ntango bazali kosakola ndako na ndako. Na nsuka ya mbula nyonso, bazalaki kosukola elongo mbongo yango nyonso, kopona yango, mpe kotánga mbongo nyonso oyo balɔkɔtaki mpo na koyeba motángo na yango.

Atako mbala mingi mbongo yango ya bibende ezalaki na valɛrɛ moke mpenza (ndambo ya santimɛ moko), mbula na mbula mbongo nyonso oyo bazalaki kolɔkɔta ezalaki na valɛrɛ ya dolare 225. Bandeko basalelaki ndambo ya mbongo yango mpo na kofuta mbongo oyo ebimaka mpo na misala ya Ndako ya Bokonzi, mpe batindaki ndambo mosusu mpo na kosunga mosala ya kosakola na mokili mobimba.

Bato milio soki minei balandaki yango!

Moko ya makambo minene na lisolo ya Batatoli ya Yehova na Burundi esalemaki mokolo ya 05/03/2016, ntango ndeko Anthony Griffin, momonisi ya biro monene akendaki kotala filiale ya ekólo yango. Balekisaki programɛ mobimba ya likita monene oyo ebongisamaki mpo na masangá na shɛni ya radio ya libosoliboso na ekólo yango. Bato nyonso oyo balandaki likita yango, ezala na radio, bazalaki milio soki minei!

Kolekisa likita yango na radio epesaki litatoli monene, mpe bato balobaki makambo mingi ya malamu. Mosali moko na radio oyo asalisaki mpo likita yango eleka na radio alobaki: “Bosengeli kosala makita ya boye mbala na mbala!” Mpe mokambi moko ya shɛni yango ya radio akomaki: “Nalendisi bino bókoba [kosala makita mosusu ya boye], oyo kozanga ntembe, ekobikisa ebele ya bato.” Na babisi mpe bataksi, bazalaki kotya badiskur ya likita yango na radio mpo bato oyo bazali na kati bálanda yango.

Miziki etikaki kobɛta

Na Népal, mokolo moko liboso ya Ekaniseli ya 2016, bandeko ya etuluku moko ya moke, oyo ezalaki mosika, batungisamaki ntango bayokaki ete bakobɛta miziki na eteyelo moko pene na ndako oyo bafutelaki mpo na kosala Ekaniseli.

Miziki na bisika ya ndenge wana ebɛtamaka makasi mpenza. Ntango bazalaki kotya bopɛto na ndako yango na ntɔngɔ ya mokolo ya Ekaniseli, moko ya bato oyo babongisaki ete miziki yango ebɛtama ayebisaki bango: “Bokoyoka eloko moko te, kaka miziki na biso.”

Babandaki kobɛta miziki yango na midi, mpe ezalaki kobɛta makasi, kaka ndenge balobaki. Atako bandeko bafutelaki bikoliseli-loláká ya makasi koleka oyo bakanaki kosalela liboso, lokola makɛlɛlɛ ezalaki mpenza makasi, bazalaki ata koyoka te ntango bazali komeka mikro. Bandeko bazalaki komitungisa, kasi babondelaki mingi mpo na likambo yango. Na nsima, miniti 30 liboso ete Ekaniseli ebanda, ntango bandeko mingi bazalaki kokóma, miziki etikaki kobɛta. Bato mosusu oyo bazalaki komela masanga na esika oyo miziki ezalaki kobɛta babundaki, mpe bapolisi bayaki kopanza bato na esika yango. Bandeko bazwaki likoki ya kosala Ekaniseli na motema mpiɔ, na kimya, mpe na limemya mpenza.

Bakumisi jw.org

Ndeko Giuseppe azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza na Italie. Asalaka na kompanyi moko ya Internet, kasi asalaka mosala yango na ndako na ye. Na sanza ya mitano ya mbula eleki, ye ná baninga na ye ya mosala soki 70 bakɔtaki na likita moko mpo na kolobela makanisi ya sika oyo kompanyi ekoki kosalela. Mpo na kobanda, mokambi ya kompanyi yango alobaki ete basite Internet mosusu ekoki kozala lokola ndakisa oyo kompanyi na bango esengeli komekola. Na nsima, alakisaki ndakisa moko ya basite yango na ordinatɛrɛ. Ndeko Giuseppe akamwaki komona site Internet na biso jw.org na lokasa ya ebandeli. Mokambi ya kompanyi yango alobaki: “Oyo ezali site Internet oyo eleki malamu na mokili!” Na nsima, abandaki kolimbola ndenge oyo jw.org ebongisami. Alobaki malamu mpo na lolenge ya pɛtɛɛ ya komona makambo oyo moto azali koluka mpe bililingi oyo ezali kobenda likebi.

Ndeko Giuseppe alobaki: “Baninga na ngai ya mosala bakamwaki ntango bayebaki ebele ya minɔkɔ oyo ezali na site Internet na biso. Na nsuka, mokonzi na ngai ya mosala ayebisaki bayangani mpe mokambi ya kompanyi: ‘Giuseppe azali Motatoli ya Yehova.’ Ntango mokambi ya kompanyi ayokaki bongo, alobaki na ngai: ‘Ebongiseli na bino ebongi mpenza na lokumu. Bosali site Internet moko oyo kompanyi nyonso to ebongiseli nyonso na mokili ekolinga komekola. Nazali kokanisa mosala makasi oyo esalemaka mpo na kokɔtisaka ntango nyonso makambo ya sika mpe kosala ete site yango ebongisama malamu mpe ezala mpasi te mpo na kosalela yango, mpe likebi mingi oyo esɛngaka kotyela yango mpo na kolandela makambo ya mikemike mpe makambo oyo ezali na kati.’ Namiyokaki ete nabongi mpenza te kozwa lokumu monene ndenge wana mpo na likambo oyo nasalaki te. Kasi, nasepelaki mingi ndenge litatoli epesamaki epai ya bato mingi oyo bayebaki eloko moko te mpo na Batatoli ya Yehova. Sikoyo, nakómá kosolola mbala na mbala na baninga mosusu ya mosala mpe nazali koyekola Biblia na baninga misato ya mosala.” Kompanyi oyo ndeko Giuseppe asalaka ezali kokoba “koyekola” site Internet jw.org, kasi ndeko Giuseppe azali kokoba kosolola masolo ya Biblia na baninga na ye ya mosala.

Atikaki kobɛta bale

Argentine: Jorge azali kobɛta bale elongo na bandeko

Jorge azali elenge moko oyo afandaka na Argentine. Na ebandeli ya 2010, Jorge ayokaki nsango malamu mpo na mbala ya liboso na nzela ya moninga moko ya kelasi. Na nsima, abandaki koyekola Biblia na lisalisi ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? Na ntango wana, azalaki kobɛta bale mingi. Lokola azalaki kobɛta bale malamu mpenza, baponaki ye mpo abɛtaka na ekipi moko monene. Na sanza ya minei 2014, babengisaki ye akende kobɛta na ekipi moko na Allemagne. Asepelaki mingi koyeba ete alingi kokóma mobɛti monene ya bale na mikili mosusu, mpe andimaki libyangi yango. Mwa mikolo liboso ete Jorge akende na Mpoto, molakisi na ye ya bale alobaki na ye: “Ozali Motatoli ya Yehova, boye te? Kobebisa te bomoi na yo na kokende na mboka mopaya. Ntango nazalaki elenge, nazalaki mpe Motatoli. Babengaki ngai nakɔta na ekipi moko na ekólo moko ya Asie. Balakaki ngai makambo ebele, mpe nasepelaki na yango nyonso. Nakendaki kuna na libota na ngai mobimba, kasi tozongaki mabɔkɔ mpamba.” Jorge alobi boye: “Makambo oyo ayebisaki ngai esalisaki ngai, yango wana nazwaki ekateli ya koboya kokende na Mpoto. Na 2015, nakómaki mosakoli ya nsango malamu mpe nazwaki batisimo.”

Lipamboli ya solosolo ofele

Na sanza ya libwa 2015, liyangani ya etúká “Mekolá Yesu!” esalemaki na Kampala, na Ouganda. Bayangani basepelaki mingi ntango ndeko Mark Sanderson, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alakisaki Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebimaki na monɔkɔ ya Luganda.

Moyekoli moko ya Biblia alobaki: “Kozwa Biblia oyo ya kitoko epesaki ngai esengo mingi! Kaka na ntango wana, bato bazalaki komibongisa mpo na koyamba Pápa oyo asengelaki koya na ekólo yango. Mpo na kokɔngɔla mbongo, sapɛlɛ ‘oyo epambwami’ ezalaki kotɛkama na dolare 30. Bato bazalaki na mposa ya kozwa mapamboli, kasi mingi na bango bazalaki na mbongo te. Nzokande, ngai nazwaki lipamboli ya solosolo ofele. Yehova apesaki bato nyonso oyo bayaki na liyangani lipamboli yango, mpe moto na moto apesaki makabo na kolanda motema na ye. Mokolo na mokolo, ntango natángaka Liloba ya Yehova na monɔkɔ na ngai ya mboka mpo na koyeba ye lisusu malamu koleka, namonaka ete yango ezali mpenza lipamboli. Nazali kopesa Yehova matɔndi na ndenge apesi ngai Biblia na ngai moko.”

Mikanda na bango enyatamaka na mokili ya bilimo?

Mpo na kobebisa lokumu ya site Internet www.pr418.com, bakonzi ya mangomba mosusu na etúká moko ya Congo (Kinshasa) bazalaki koteya bandimi na bango ete mikanda ya Batatoli ya Yehova enyatamaka na masini na mokili ya bilimo. Mpo na kolongisa makanisi na bango, babendaki likebi ya bandimi na balɛtrɛ misato “www,” mpe balobaki ete balɛtrɛ wana ekokani na motángo 666 oyo mokanda ya Emoniseli elobeli. (Em. 13:18) Mpo na yango, bayekoli mosusu ya Biblia bakataki koyekola.

Nsima ya kobondela mpo na likambo yango, ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo bazali babongisi-nzela babengisaki bayekoli ya Biblia ná balongani na bango na ndako. Mibali misato ná basi na bango bandimaki libyangi yango, mpe nsima ya kolya, ndeko mobali yango ná mwasi na ye balakisaki bango video Les Témoins de Jéhovah organisés pour proclamer la bonne nouvelle. Makambo oyo bayekoli wana ya Biblia bamonaki esalisaki bango bálongola makanisi wana ya lokuta oyo bayokaki na likambo etali esika oyo mikanda na biso eutaka. Na pɔsɔ oyo elandaki, mobali ya mwasi moko kati na bayekoli yango atyaki babongisi-nzela yango mbamba ete bándima kozwa mpe kotinda likabo na ye ya dolare 100 mpo na kosunga mosala ya kosakola na mokili mobimba, atako ye moko abandaki naino koyekola te.

Koyekola banzembo ya sika

Atako bandeko ya teritware moko ya mosika na Papouasie-Nouvelle-Guinée bazali na likoki ya kokɔta na Internet te, bazali na mposa makasi ya koyekola banzembo ya Bokonzi ya sika. Yango wana, lisangá ya Mundip etindaka ndeko mobali moko na engumba oyo ezali pene, oyo esɛngaka kotambola ngonga mibale na makolo, na nsima, kosala mobembo ya ngonga mibale na bisi. Soki akómi kuna, akɔtaka na Internet mpe akomaka na mabɔkɔ maloba ya banzembo ya sika na kaye, mpe azongaka na lisangá, epai akomaka maloba ya banzembo yango na tablo na Ndako ya Bokonzi mpo moto nyonso amona yango. Na nsima, bandeko mosusu ya lisangá yango bakomaka maloba ya banzembo wana ya sika mpo na makita. Basepelaka mpenza koyemba elongo na masangá ya mokili mobimba mpo bayebi ete banzembo ezali na kati ya losambo na bango epai ya Yehova.