Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

Bikateli ya batribinale na 2016

Bikateli ya batribinale na 2016

Na nzela ya makambo oyo bandeko na biso bakristo bazali kosamba na batribinale mpe mikakatano oyo bazali kokutana na yango, bazali komonisa ete bazali sembo epai ya Yehova Nzambe. Ndakisa na bango ezali kolendisa biso nyonso tótɛlɛma ngwi na kondima, mpo tondimi ete “Yehova akomonisela mpenza moto na ye ya sembo boboto.”Nz. 4:3.

ARGENTINE | Lotomo ya koteya bana makambo ya losambo

Ruth akolaki na libota moko ya bakristo, kasi atikaki kosakola ntango azalaki naino elenge. Na nsima, akómaki kolingana na mobali moko, azwaki zemi mpe abotaki mwana mwasi. Mokolo moko, na engumba La Plata, Ruth amonaki Batatoli ya Yehova bazali kopesa litatoli na lisalisi ya mesa ya kotanda mikanda, mpe akanisaki lisusu libula na ye ya elimo. Yango etindaki ye azongela koyangana na makita ya lisangá mpe abanda koteya mwana na ye Biblia. Tata ya mwana yango, elingi koloba, mobali ya Ruth, atɛmɛlaki makambo na ye ya losambo mpe afundaki likambo yango na tribinale oyo etalelaka makambo ya mabota, mpo na kopekisa Ruth ateya mwana na bango Biblia to amema ye na makita ya lisangá.

Na ntango ya kosamba, avoka ya Ruth alobaki ete tata ná mama bazali na lotomo ya koteya mwana na bango makambo ya losambo oyo bandimaka mpe tribinale ekoki te kobɔtɔla lotomo yango, longolá kaka soki tribinale ezali na bilembeteli oyo emonisi ete mateya ya lingomba yango ekoki kobebisa mwana. Tribinale ekataki ete baboti yango basengeli komemya lotomo oyo mwana na bango azali na yango ya kosambela na lingomba oyo alingi, atako na ntango wana, mwana yango azalaki naino na mbula minei! Tribinale mosusu (Cour d’appel) emonisaki ete mwana azalaki naino elenge mpenza mpo na kozwa bikateli ye moko na likambo etali losambo, mpe ete tata ná mama bazali na lotomo ndenge moko ya koteya mwana makambo ya losambo.

Mwana ya Ruth, oyo azali naino elenge mpenza, atángaka Biblia na ye mpokwa nyonso mpe sikoyo azali koyangana na makita elongo na mama na ye. Azali kozela na mposa makasi ete bákende kotala Betele na Buenos Aires.

AZERBAÏDJAN | Lotomo ya koyebisa basusu makambo ya losambo

Ntoma Paulo amonaki ete na kati ya lisangá ya bokristo ya solo, “soki enama moko ezali koyoka mpasi, binama nyonso mosusu ezali mpe koyoka mpasi elongo na yango.” (1 Ko. 12:26) Likambo yango ezali solo, soki totali ndenge oyo Batatoli ya Yehova na mokili mobimba batungisamaki mingi ntango bayokaki ete na ekólo Azerbaïdjan bakangi bandeko basi mibale: Irina Zakharchenko mpe Valida Jabrayilova. Na sanza ya mibale 2015, bakonzi ya Leta balobaki ete bandeko basi wana mibale bazalaki kosala makambo ya losambo oyo epekisami na mibeko. Zuzi atyaki bango na bolɔkɔ oyo batyaka bato oyo bakati naino makambo na bango te, mpe lokola bazalaki kaka kopusa mokolo ya kosambisa bango, bandeko basi yango balekisaki pene na mbula mobimba na bolɔkɔ, epai bayikelaki minyoko mpe bampasi mpiko.

Azerbaïdjan: Valida Jabrayilova ná Irina Zakharchenko

Nsukansuka, ntango basambisaki bango na sanza ya yambo 2016, zuzi amonaki ete bandeko basi yango bazali na ngambo, akatelaki bango lomande, kasi alongolaki lomande yango mpo balekisaki ntango molai na bolɔkɔ, yango wana apesaki bango nzela bázonga na ndako. Ntango tribinale (Cour d’appel) ya Baku eboyaki kokata likambo oyo bandeko basi yango bafundaki bato oyo banyokolaki bango, bamemaki likambo yango na tribinale monene ya ekólo. Longola yango, bamemaki mpe likambo yango na Ebongiseli ya ONU oyo etalelaka lotomo ya bato mpo na komonisa ndenge oyo banyokolaki bango mpe bapekisaki bango básalela lotomo na bango ya koyebisa basusu makambo ya losambo.

Wana bandeko basi yango bazali kozela, bazali mokemoke kozwa lisusu makasi nsima ya mpasi oyo bamonaki. Bazali na botɔndi mingi mpo na ebele ya mabondeli oyo bandeko basalaki mpo na bango mpe mpo na likebi oyo batyelaki bango. Ndeko Jabrayilova akomelaki Lisangani ya Mikóló-Bakambi boye: “Mabondeli na bino esalisaki biso tóyikela minyoko mpiko; namonaki ete ezalaki mpenza bongo. Nakobosana soki moke te likebi oyo bino ná Yehova mpe bandeko ya mokili mobimba botyelaki biso mpe bolingo oyo bomoniselaki biso.”

ÉRYTHRÉE | Bakangami mpo na kondima na bango

Tii na sanza ya nsambo 2016, guvɛrnema ya Érythrée ekangisaki Batatoli ya Yehova 55 mpo na kondima na bango. Bandeko mibali misato: Paulos Eyassu, Isaac Mogos, mpe Negede Teklemariam bazali na bolɔkɔ banda sanza ya libwa 1994, mpe guvɛrnema ekangisaki bandeko mosusu 9 mbula soki 10.

Likambo moko ya malamu esalemaki na sanza ya yambo 2016 ntango tribinale endimaki kosambisa Batatoli ya Yehova oyo bakangaki bango mokolo ya Ekaniseli, na Asmara, na sanza ya minei 2014. Yango ezalaki mbala ya liboso oyo bakonzi ya Leta bafundaki Batatoli ya Yehova na likambo mpe bapesaki bango likoki ya kosamba. Bandeko mingi oyo bafundamaki bayebaki ete bakonzi bakoloba ete bazali na ngambo mpo bazalaki kosala likita oyo mibeko epekisi; mpe esalemaki kaka bongo. Yango wana, bafutisaki bango lomande, na nsima batikaki bango. Kasi Saron Gebru, moko ya bandeko basi oyo bakangaki, aboyaki kofuta lomande. Mpo na yango, bakatelaki ye etumbu ya sanza 6 ya bolɔkɔ. Ndeko Gebru azalaki na likoki ya koyamba bato oyo bayei kotala ye mbala moko na pɔsɔ mpe alobaki ete bazalaki kosalela ye makambo ya mabe te. Ye ná Batatoli mosusu 54 oyo bazali na bolɔkɔ bazali na botɔndi mpo na ebele ya mabondeli oyo bandeko basalaka mpo na bango, wana biso nyonso tozali ‘kokanisa baoyo bakangami na minyɔlɔlɔ lokola nde tokangami elongo na bango.’Baebre 13:3.

ALLEMAGNE | Bonsomi ya losambo—Lisangá na biso endimami na Leta

Nsukansuka, mokolo ya 21/12/2015, etúká ya Brême, na nɔrdi-wɛsti ya Allemagne, epesaki lisangá ya Batatoli ya Yehova na Allemagne lotomo oyo eleki likoló na mibeko ya Leta koleka lotomo nyonso oyo epesaki bango liboso. Likambo wana esukisaki milende oyo batribinale ya Allemagne esalaki na makambo ya mibeko banda mbula minei. Na kolanda ekateli moko ya tribinale oyo eleki monene na Berlin, bitúká mingi na bitúká 16 na Allemagne epesi Batatoli ya Yehova bonsomi ya losambo, oyo ebengami statut de droit public. Kasi, bakonzi ya etúká ya Brême bazwaki ekateli ya koboya kopesa Batatoli lotomo wana, libosoliboso mpo na nsango ya lokuta oyo banguna bapanzaki mpo na bango.

Na 2015, tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka na Allemange ekataki ete ndenge oyo etúká ya Brême eboyaki kopesa Batatoli statut de droit public ebukaki lotomo oyo mibeko epesi bango. Ekateli wana endimisi ete lotomo oyo mibeko epesi mpo na bonsomi ya losambo ezali kobatela mosala ya Batatoli ya Yehova na etúká ya Brême. Masangá oyo ezali na etúká yango efutaka mpako te mpe ezwaka matomba mosusu oyo bapesaka mangomba ya minene na Allemagne.

KIRGHIZISTAN | Lotomo ya koyebisa basusu makambo ya losambo

Na sanza ya misato 2013, bakonzi ya engumba Osh, na ekólo Kirghizistan, babimisaki bifundeli ya lokuta mpo na ndeko mwasi Oksana Koriakina ná mama na ye Nadezhda Sergienko. Zuzi-mokonzi afundaki Batatoli yango ete bazalaki kokosa bato ntango bazalaki koyebisa bazalani na bango mateya ya Biblia, mpe zuzi yango akatelaki bango etumbu ya bolɔkɔ, atako tribinale ekataki naino likambo yango te. Na sanza ya zomi 2014, tribinale emonaki ete bilembeteli oyo epesamaki ezalaki ya lokuta, zuzi yango alandaki mibeko te, mpe bandeko basi wana bazalaki na ngambo te. Tribinale endimaki ekateli wana na sanza ya zomi 2015.

Kasi, zuzi-mokonzi ya engumba Osh amemaki lisusu likambo yango na tribinale monene ya ekólo Kirghizistan. Tribinale yango ewanganaki ekateli oyo elobaki ete bandeko basi wana bazali na ngambo te mpe esɛngaki ete básambisa bango lisusu. Ntango basambisaki bango na sanza ya minei 2016, baavoka ya bandeko basi yango bamonisaki ete eleko oyo epesamaki mpo na kosamba likambo yango esilaki, yango wana basɛngaki ete básuka wana. Zuzi yango azalaki na eloko mosusu ya kosala te, asukisaki likambo yango na kotalela mibeko.

Ntango bazalaki kosamba, bandeko basi wana babatelaki esengo na bango. Ndeko Sergienko alobaki: “Mbala mingi, bato bakómaka nkandankanda soki basali bango mabe, kasi namonaki ete Yehova alingaka biso mpe atyelaka biso likebi na nzela ya bandeko; tozalaki biso moko te.” Bandeko yango bamonaki mpenza ete Yehova azali kokoba kokokisa elaka na ye oyo ezali na Yisaya 41:10: “Kobanga te . . . Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali ya boyengebene.”

KIRGHIZISTAN | Bonsomi ya losambo—Lisangá na biso endimami na Leta

Na mokolo ya 09/08/2015, bapolisi 10 bakɔtelaki bandeko na ntango ya makita na lisangá moko na engumba Osh, na ekólo Kirghizistan. Basɛngaki na mbalakaka ete bandeko bákata makita mpo ezalaki “kobuka mibeko” mpe balukaki ata kobɛta bato koleka 40 masasi na kati ya bayangani. Bapolisi yango bamemaki bandeko 10 na biro ya bapolisi, epai bakonzi na bango babɛtisaki bandeko 9 fimbo mpe na nsima batikaki bango. Mikolo mibale na nsima, bapolisi bakangaki ndeko Nurlan Usupbaev, moko ya bandeko oyo babɛtamaki makasi, mpe bafundaki ye ete azali kosala makambo ya losambo oyo epekisami na Leta mpo azalaki kokamba likita.

Ntango likambo ya ndeko Usupbaev ekómaki na tribinale ya engumba ya Osh, zuzi amonaki ete elembeteli moko te emonisi ete ndeko wana azali na ngambo, yango wana aboyaki kokata likambo yango. Zuzi-mokonzi amemaki lisusu likambo yango na tribinale ya etúká ya Osh, oyo eboyaki kokata likambo yango, mpe endimaki ete ndeko Usupbaev akoki kozala na ngambo te mpo na makambo ya losambo na ye mpamba te lisangá ya Batatoli ya Yehova endimami na Leta na ekólo Kirghizistan.

Lokola zuzi-mokonzi azalaki kolinga kotika te, amemaki lisusu likambo yango na tribinale monene ya Kirghizistan. Motema ya ndeko Usupbaev ekitaki ntango tribinale monene ekataki likambo yango na sanza ya misato 2016, mpe endimaki bikateli ya malamu oyo tribinale monene mpe batribinale mosusu ezwaki liboso, mpe emonisaki ete Batatoli ya Yehova bazali na lotomo ya kosala makita na bango ya losambo na ekólo Kirghizistan. Longola yango, bandeko bafundaki mpe bakonzi ya bapolisi ya etúká ya Osh na tribinale mpo babɛtaki bango. Kasi likambo yango ekatami naino te.

RUSSIE | Bosomi ya losambo

Atako bato oyo balandelaka makambo etali lotomo ya bato na Russie bazali kotɛmɛla guvɛrnema ya Russie, guvɛrnema yango ezali se kokoba konyokola Batatoli ya Yehova mpe kopekisa mosala na bango. Nsango ya nsuka oyo tozwaki emonisi ete bakonzi ya Russie balobi ete mikanda na biso 88 ezali na liste ya mikanda “oyo etindaka bato na botɔmbɔki” mpe bapekisi site Internet ya Batatoli ya Yehova, jw.org. Na 2015, bakonzi ya douane baboyaki ete Biblia Libongoli ya Mokili ya sika ekɔta na Russie, mpe tribinale moko na engumba Vyborg elingi komonisa ete libongoli wana ya Biblia esengeli kokɔta na liste ya mikanda “oyo etindaka bato na botɔmbɔki.” Na sanza ya misato 2016, biro ya zuzi-mokonzi ya ekólo ezwaki ekateli moko ya mabe mpenza; ekanaki kokanga biro oyo etambwisaka mosala ya Batatoli ya Yehova na Russie, oyo ezali na Solnetchnoïé, pene na Saint-Pétersbourg, mpo ezali kokamba “mosala oyo etindaka bato na botɔmbɔki.”

Atako bazali kosalela Batatoli ya Yehova kampanye ya mabe, nsango ya malamu ezangi te. Na sanza ya zomi 2015, zuzi-mokonzi moko azwaki ekateli ya kolongola ebongiseli moko oyo endimami na mibeko ya Leta, oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kosalela, oyo biro na yango ezali na Tioumen, na ntaka ya kilomɛtrɛ 2 100 na ɛsti ya Moscou. Atako bapolisi babimisaki bifundeli ya lokuta mpo na Batatoli ya Yehova, tribinale ya etúká ya Tioumen emonaki ete ebongiseli wana ya Batatoli ya Yehova ezali na ngambo te. Kasi, na mokolo ya 15/04/2016, tribinale monene ya Russie ekweisaki ekateli ya tribinale wana ya moke, mpe ekataki ete “ezali na ntina te ya kolongola ebongiseli ya Batatoli ya Yehova na egumba Tioumen.” Ntango zuzi oyo azalaki kokamba likita azalaki kotánga ekateli oyo ezwamaki, bandeko 60 oyo bazalaki na ndako ya tribinale batɛlɛmaki mpe babɛtaki mabɔkɔ.

Basaleli ya Yehova na ekólo Russie bazali na ekateli ya kokoba kosambela ye atako “ebundeli nyonso oyo ekosalema mpo na kobunda na [bango].”Yis. 54:17.

RWANDA | Lotomo ya kotánga kelasi kozanga kotalela lingomba ya moto

Na bambula euti koleka, na Rwanda, bazalaki kolongola bana ya Batatoli ya Yehova na kelasi mpo bazalaki koboya kopesa mabɔkɔ na makambo ya losambo to makambo ya kokumisa ekólo na eteyelo. Mpo na koluka kosilisa likambo yango, na mokolo ya 14/12/2015, guvɛrnema ebimisaki mobeko moko mpo na kosilisa likambo ya kotalela lingomba ya moto na eteyelo. Mobeko yango esɛngaki biteyelo nyonso etosa bosomi ya losambo ya bana-kelasi.

Na mokolo ya 09/06/2016, site Internet jw.org ebimisaki lisolo moko na esika oyo bakomaka bansango (salle de presse) na motó ya likambo “Rwanda ezali kobunda mpo mwana nyonso atánga kelasi kozanga kotalela lingomba na ye.” Likambo ya esengo, zulunalo moko ya Rwanda oyo bato mingi batángaka na Internet, etyaki lisusu lisolo yango na Internet. Eumelaki te, bato koleka 3 000 bakɔtaki na site Internet ya zulunalo yango, mpe mingi na bango batyaki bakomantɛrɛ ya malamu mpo na ekateli oyo guvɛrnema ezwaki. Batatoli ya Yehova na ekólo Rwanda bazali na botɔndi mpo na mobeko wana, oyo ekosala ete bana na bango bátánga kelasi kozanga kotalela lingomba na bango.

Rwanda: Bazongi na eteyelo

CORÉE DU SUD | Bonsomi ya lisosoli—Koboya kokɔta mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli

Na boumeli ya mbula koleka 60, na Corée du Sud, Batatoli ya Yehova ya mibali oyo bazali na mbula kobanda 19 tii 35 bakutanaka na mokakatano mpo na mosala ya soda. Guvɛrnema ya Corée du Sud endimaka te lotomo ya koboya kokɔta na mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli mpe epesaka mosala mosusu te na moto oyo aboyi kokɔta na mosala ya soda. Na mabota mosusu, Batatoli ya Yehova bakɔtaki bolɔkɔ, moto moko nsima ya mosusu, kobanda na bankɔkɔ tii na batata mpe bana, mpo bazalaki na eloko mosusu ya kosala te longola kaka kokɔta na bolɔkɔ ntango babengi bango mpo bákɔta na mosala ya soda.

Tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka ezongelaki mbala mibale ete mobeko oyo etali mosala ya soda endimami na mibeko ya mboka, kasi batribinale ya mike mpe bato oyo bazwaki etumbu mpo na mobeko yango bamemaki lisusu likambo yango na tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka. Yango wana, na mokolo ya 09/07/2015, tribinale yango eyokaki makanisi ya bato oyo baboyaka kokɔta mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Ndeko Min-hwan Kim, oyo alekisaki sanza 18 na bolɔkɔ mpo lisosoli na ye epekisaki ye azwa formasyo ya mosala ya soda, alobi boye: “Nazwaki etumbu mpe nsukansuka babimisaki ngai na bolɔkɔ. Kasi nazali na elikya ete bato mosusu mingi oyo baboyaka kokɔta mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango bakozwa etumbu te. Soki bapesi bango nzela básala mosala mosusu na esika ya mosala ya soda, bakoki kopesa mabɔkɔ mpo na kotonga mboka.” Mosika te, tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka ekoyebisa ekateli oyo ezwi na likambo yango.

TURKMÉNISTAN | Bahram Hemdemov

Ndeko Hemdemov, oyo azali na mbula 53, azali na mwasi mpe bana minei. Azali ndeko oyo akɔmeli na elimo mpe bato ya mboka wana bamemyaka ye mingi. Na sanza ya mitano 2015, tribinale moko ekatelaki ye etumbu ya mbula minei ya bolɔkɔ oyo basalisaka bato misala ya makasi mpo azalaki kokamba likita ya losambo oyo “ebuki mibeko” na ndako na ye. Azali na bolɔkɔ na kaa moko oyo eyebani ete basalisaka bato misala ya makasi na engumba Seydi, epai bazalaki kosambisa ye mbala na mbala mpe bakonzi babɛtisaki ye na ndenge ya mabe. Atako bongo, ye ná bato ya libota na ye batikali sembo epai ya Yehova Nzambe. Ndeko Gulzira, mwasi ya ndeko Hemdemov, azwaki likoki ya kokende kotala ye mbala na mbala mpo na kolendisa ye.

Komona ndenge oyo basaleli ya Yehova bakobaka komonisa bosembo na bango ata ntango bamekami etindaka biso tóbondela mpo na bango. Ndakisa na bango elendisaka mpe biso tókómisa makasi ekateli na biso ya kotikala sembo epai ya Nzambe, na elikya ete akokokisa elaka oyo ezali na Nzembo 37:28: “Akotika te bato na ye ya sembo.”