Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

“Na kartye oyo, bino bozali bato malamu koleka”

“Na kartye oyo, bino bozali bato malamu koleka”

MOKOLO ya 07 mpe ya 08/05/2016, esika oyo bayambaka bato na biro monene ya Batatoli ya Yehova na 25 Columbia Heights, Brooklyn, na etúká ya New York, etondaki na bato oyo bazalaki kozela na mposa makasi ete bátala Betele. Atako mbala mingi esika yango efungwamaka te mpe bavizite esalemaka te mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, na libaku wana, babengisaki bato oyo bafandi zingazinga na Betele báya kotala Betele mpe kotala bililingi oyo emonisi lisolo ya Biblia.

Kampanye mpo na kokabola nkasa ya libyangi epesaki litatoli monene na kartye mpe elendisaki mpenza bandeko oyo basalaki yango. Ezalaki esengo, mingimingi koyoka maloba ya malamu oyo bato oyo baumeli mingi na kartye wana bazalaki koloba mpo na biso.

Mobali moko alobaki boye: “Nafandaki na bandako ndenge na ndenge [pene na Betele] banda bambula ya 1960, mpe namoni ete na kartye oyo, bino bozali bato malamu koleka. Bozali kotika biso kaka boye? Mposa na biso ezali ete bólongwa awa te.”

Mwasi moko alobaki boye: “Soki bozalaki te, kartye na biso elingaki te kozala malamu boye. Tozali na botɔndi mingi ndenge tozwaki libaku ya kofanda elongo na bino bambula oyo nyonso.”

Babongiseli-nzela mingi oyo basakolaki na kartye yango basepelaki na ndenge oyo bato ya kartye bayambaki bango. Mobali moko oyo azali na kati ya ebongiseli moko ya kartye amonisaki ete asepelaka mingi na ebongiseli ya Batatoli ya Yehova mpe alobaki ete ayoki mawa mpo akozala te mokolo oyo babengisi bato ya kartye báya kotala Betele.

Ebongiseli wana ya kobengisa bato ya kartye ebimisaki matomba mingi. Na boumeli ya mikolo mibale mobimba, bapaya 48 oyo bazalaki Batatoli ya Yehova te bayaki kotala bililingi oyo emonisi lisolo ya Biblia. Mokolo yango, bandeko mingi ya libota ya Betele bazalaki na esika oyo bayambaka bato, mpo na koyamba bato ya kartye oyo bayaki kotala Betele, mpe kosolola na bango.

Sally, elenge mwasi moko ya mbula pene na 30 alekisaki miniti soki 30 na esika oyo batyaki biloko ya kotala. Ntango akómaki, babongisi-nzela oyo bapesaki ye lokasa ya libyangi bazalaki na esika oyo bayambaka bapaya. Sally alobaki ete akanisaki ata moke te ete na molɔngɔ ya biloko ya kotala, Babiblia mpe ezalaki. Babongisi-nzela yango bayebisaki ye ete ezali malamu komona elenge mwasi oyo atángá mingi lokola ye azali kosepela na Biblia. Sally azongisaki boye: “Yango ezali na ntina mingi. Biblia ezali nzela kaka moko oyo tokoki koyeba nsango ya Nzambe. Ezali mokanda moko ya ntina mingi mpo na bomoi na biso.”

Sally amonisaki ete mposa na ye ya koyeba Biblia nde etindaki ye ayekola monɔkɔ ya Latin mpe ya Grɛki mpe alobaki ete asepelaka mingi na mosala ya kobongola mikanda. Alobaki ete libongoli ya malamu ezali na ntina mingi mpo moto ayokanisa te nsango oyo azali kobongola na makanisi na ye moko. Ntango babongisi-nzela yango bayebisaki Sally ete site Internet na biso jw.org, oyo elobelaka mingi makambo ya Biblia, ebongolami na minɔkɔ koleka 800, akamwaki mingi mpe asepelaki mpenza. Ntango bandeko basi yango balimbolelaki ye ndenge oyo babongoli mingi balongolá nkombo ya Yehova na Biblia, esalaki ye mpasi mingi mpe atunaki boye: “Mpo na nini balongolá nkombo ya Yehova na Biblia?” Liboso ya kokende, Sally alobaki boye: “Nakoli kaka na kartye oyo, mpe na bato nyonso ya kartye, bino bozali bato malamu koleka.”

Mokolo ya yambo nsima ya mokolo oyo babengisaki bato ya kartye báya kotala Betele, moteyi moko ya lingomba apusanaki pene na John, ndeko moko ya Betele oyo azalaki kopesa litatoli na shario pene na Betele. Ayebisaki John ete asepelaki mingi ndenge babengisaki bango báya kotala Betele mpe ndenge tolandaka oyo Biblia elobi. Kasi, nsima ya kosolola na ye mwa moke, alobaki na mbalakaka: “Bino Batatoli ya Yehova bopesi ngai nkanda!” John akamwaki na maloba wana mpe atunaki ye mpo na nini alobi bongo. Azongisaki: “Mpo bozali kolongwa awa! BÓTIKALA AWA! Bósomba bandako minene koleka, to bótonga bandako nyonso oyo bolingi, kasi bótikala awa. Bino nde bosalaka ete kartye oyo ezala malamu. Nasepeli soki moke te ndenge bolingi kokende na nɔrdi!”

Na nyonso, kampanye mpo na kobengisa bato ya kartye mpe mokolo oyo babengisaki bato báya kotala Betele mpe bililingi oyo emonisi lisolo ya Biblia epesaki litatoli malamu na kartye, mpe nkombo ya Nzambe eyebanaki mingi na kartye koleka liboso.