Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

TV JW ‘ezali kolendisa biso mpe kokitisa biso mitema!’

TV JW ‘ezali kolendisa biso mpe kokitisa biso mitema!’

KOBANDA 2014, mbula oyo televizyo na biso ya kotala na Internet oyo ebengami TV JW ebandaki, ezali kosalisa mpe kolendisa na elimo ebele ya bato oyo bazali kotala yango na mokili mobimba. Lelo oyo, emisyo ya televizyo yango ezali kobima na minɔkɔ koleka 90. Na ndakisa, emisyo yango ezali kobongolama na minɔkɔ lokola Ewe, Ga, mpe Twi (ndenge emonisami awa), mpo na basakoli koleka 130 000 na Bénin, Côte d’Ivoire, Ghana, mpe Togo. *

Ndeko Agatha, mwasi ya mokɛngɛli ya zongazonga moko na Ghana alobi boye: “Ntango nayokaka bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe basungi na bango bazali koteya, namonaka lokola ete Yehova azali koloba na ngai na kati ya ndako na ngai. Soki ebongiseli wana ezalaki te, ndenge nini moto mpamba lokola ngai, oyo nafandi na mboka ya mosika boye, nakokaki kozwa libaku ya ndenge wana? Televizyo yango esalisi mpenza biso tókóma penepene na bandeko na biso ya mokili mobimba.”

Lapolo oyo euti na Zambie: “Atako bandeko bazali na makoki mingi te, basakoli ya masangá mingi bazali kosala milende mpo bandeko bázwa matomba na TV JW. Na ndakisa, lisangá ya Misako, ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 32 mpo na kokóma na engumba oyo ezali pene, mpe ezali na esika oyo basalaka baferme mpe etondaka na mai na eleko ya mbula.” Ndeko Simon, mosaleli na misala moko oyo ayaki kopesa mabɔkɔ na lisangá yango oyo ezalaki na mposa mingi, alobi boye: “Sanza nyonso, ndeko moko ya lisangá atambolaka na makolo ngonga mibale mpo na kobima na nzela ya monene esika bamataka na motuka mpo na kokende na engumba oyo bandeko bakoki kozwa bavideo na Internet. Tata moko oyo azali na mbula 70 ná bana na ye ya mibali bakɔtaki naino te na makita ya Batatoli ya Yehova liboso, kasi tata yango akamwaki mingi komona ete balakisaka bavideo na makita, ata kuna na mboka. Tata yango ya mokóló alobi boye: ‘Oyo ezali lolenge malamu ya koyekola makambo ya Nzambe.’”

Mokanda moko ya botɔndi oyo euti na Russie elobi boye: “Esali sikoyo mbula mobimba banda tozali kolanda TV JW mpe tozali na esengo ndenge tozali na libaku yango. Nsima ya kotala emisyo ya liboso, tomonaki ete tozali mpenza na bomoko elongo na bandeko ya mokili mobimba! Ezalaki likambo ya kokamwa! Tomoni ete tozali libota moko monene! Tosepelaki mingi komona bandeko na biso ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Bazali kosala nyonso mpo na kopesa biso bilei ya elimo na ntango oyo ebongi, mpe biso nyonso tozali sikoyo na likoki ya komona bango. Tozelaka na mposa makasi emisyo mokomoko ya televizyo yango. Tomonaka ete ezali lokumu monene kobengama Batatoli ya Yehova. Matɔndi mingi, bandeko! Tozali kotɔnda Yehova mpe Kristo mpo na makambo ya kokamwa oyo bazali kosala. Ezali kolendisa biso mpe kokitisa biso mitema!”

Ndeko Horst ná mwasi na ye Helga, oyo bazali mikóló mpe bibɔsɔnɔ mpe bafandaka na Allemagne, bakomaki boye: “TV JW ezali kosepelisa biso mingi. Tolendisamaka mpenza, mingimingi ntango tolandaka masolo ya bandeko mosusu oyo bazali mpe bibɔsɔnɔ. Ndakisa na bango ezali kolendisa biso tósala nyonso oyo tokoki atako tozali na mikakatano ya nzoto. Komona ndenge oyo ndeko mobali moko oyo azali ebɔsɔnɔ azali nkulutu eteyaki biso ete moto nyonso akoki kopesa Yehova eloko moko ya motuya. Ntango tomonaka bandeko mibali mpe basi wana oyo bazali ndakisa malamu, topesaka Yehova matɔndi mpe tobondelaka ye apambola bango mingi.”

Ndeko Kodi, oyo afandaka na Angleterre, alobi boye: “Matɔndi mpo na ntango mpe milende nyonso oyo bozali kosala mpo na kobimisa jw.org, TV JW, mpe bavideo ya Caleb ná Sofia. Matɔndi ndenge bokómisi Biblia pɛtɛɛ mpo moto nyonso akanga ntina na yango. Nazwaki batisimo ntango nazalaki na mbula 8. Soki nakoli mwa moke, nakopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi! Mpe nakosepela kosala na Betele. Sikoyo, nazali na mbula 9, mpe mosika te nakokola mpo nasala makambo wana nyonso.”

Arabella, oyo azali na mbula 8 mpe afandaka na Angleterre akomaki boye: “Matɔndi mingi mpo na bavideo mpe mateya mpo na bana. Ezali mpenza kosalisa ngai nayeba Yehova lisusu malamu. Nkasa oyo elobeli mateya mpo na bana na jw.org esalisaka ngai nayekola makambo ya Yehova na ndenge ya lisano. Bozali kosala malamu ndenge bozali kobimisa banzembo oyo moto nyonso akoki kobosana te. Bavideo ya Caleb ná Sofia esalisaka mpe ngai. Matɔndi mingi mpo na mosala makasi oyo bozali kosala.”

^ par. 3 Okoki kolanda TV JW na nzela ya Internet, na esika bakomi tv.pr418.com.