Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mitángo mpo na 2022

Mitángo mpo na 2022
  • Babiro ya filiale ya Batatoli ya Yehova: 86

  • Mikili oyo etindaki balapolo: 239

  • Masangá: 117960

  • Bayangani na ekaniseli: 19721672

  • Bato oyo balyaki limpa mpe bamɛlaki vinyo: 21150

  • Motángo ya basakoli nyonso a: 8699048

  • Mwayene ya basakoli na sanza moko: 8514983

  • (%) Bokoli koleka 2021: 0,4

  • Bato oyo bazwaki batisimo b: 145552

  • Mwayene ya babongisi-nzela c na sanza moko: 1465202

  • Mwayene ya babongiseli-nzela basungi na sanza moko: 381310

  • Ngonga na mosala ya kosakola: 1501797703

  • Mwayene ya bayekoli ya Biblia d na sanza moko: 5666996

Na mobu ya mosala 2022, e Batatoli ya Yehova basalelaki dolare milio 242 mpo na kosunga mosala ya babongisi-nzela monene, ya bamisionɛrɛ, mpe ya bakɛngɛli ya zongazonga. Bandeko oyo basalaka na Babetele na mokili mobimba bazali 21629. Bango nyonso bazali Batatoli ya Yehova oyo bamipesá kaka na mosala ya ntango nyonso.

a Mosakoli azali moto oyo asakolaka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe sanza nyonso. (Matai 24:14) Mpo na koyeba ndenge oyo bazwaka motángo yango, talá lisolo “Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali boni?” na jw.org

b Mpo na koyeba makambo oyo moto asengeli kosala mpo na kozwa batisimo mpe kokóma Motatoli ya Yehova, talá lisolo “Nasala nini mpo nakóma Motatoli ya Yehova?” na jw.org

c Mobongisi-nzela azali Motatoli oyo azali na etamboli malamu mpe sanza na sanza akokisaka motángo ya ngonga oyo esɛngami na mosala ya kosakola nsango malamu.

d Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Koyekola Biblia elimboli nini?” na jw.org

e Mobu ya 2022 ebandaki na mokolo ya 01/09/2021 tii na mokolo ya 31/08/2022.