Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bibongiseli ya kopesa mateya

Bibongiseli ya kopesa mateya

Batatoli ya Yehova bayebani mokili mobimba mpo na mosala na bango ya koteya Biblia.

LOKOLA Batatoli ya Yehova bazwaka na valɛrɛ mingi mosala na bango ya koteya Biblia, bato mosusu bakanisaka ntango mosusu ete bakipaka makambo ya kelasi te. Kasi ezali bongo te. Mpo na koteya moto, moteyi asengeli naino koyekola, mpe yango esɛngi kozwa formasyo mpe mateya oyo ebongi. Yango wana, Batatoli ya Yehova basalelaka malamu mateya oyo bazwaka na kelasi; kasi, longola yango, banda bambula ebele bazali kozwa mpe matomba na bibongiseli ya kopesa mateya mpe na biteyelo ndenge na ndenge oyo biro monene na bango etambwisaka. Yango esalisi Batatoli ya Yehova mpe bato mosusu bákolisa mayele na bango, mpe bábongisa bizaleli mpe elimo na bango.

Na ndakisa, na mikili mingi, Batatoli ya Yehova bazali kokutana na mokakatano moko monene: koteya bato oyo bayebi kotánga te mpe kokoma te mpo batángá kelasi ya malonga te to batángá kelasi te. Yango wana, Batatoli ya Yehova babongisá bakelasi mpo na kosalisa bato báyeba kotánga mpe kokoma.

Na ndakisa, na Nigeria, Batatoli ya Yehova bazali kosalela bakelasi yango banda 1949. Na lisalisi ya biteyelo yango, bankóto ya bato na Nigeria bayekolaki kotánga. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki emonisi ete soki ozwi Batatoli ya Yehova 100 na Nigeria, baoyo bayebi kotánga mpe kokoma baleki 90; nzokande, kaka na ekólo yango, soki ozwi bato 100 oyo bazali Batatoli ya Yehova te, baoyo bayebi kotánga mpe kokoma bakokóma ata 50 te. Na Mexique, Batatoli ya Yehova bazali kosalela bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma banda 1946. Na mbula moko bato koleka 6 500 bayekolaki kotánga mpe kokoma. Kutu basalisaki bato koleka 100 000 báyeba kotánga. Bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma ezali mpe na mikili mosusu, lokola Bolivie, Cameroun, Népal mpe Zambie. Batatoli ya Yehova babimisaki bakopi koleka milio nsambo ya mwa buku Omipesa na kotánga mpe kokoma na minɔkɔ koleka 100.

Mbala mingi, bakonzi ya Leta oyo batalelaka makambo ya kelasi na mikili oyo bakelasi yango ya koyekola kotánga mpe kokoma ezali, bandimaka bakelasi yango. Na ndakisa, na Mexique, mosali moko ya Leta akomaki boye: “Nazali kopesa bino matɔndi ndenge bozali kosalisa biso, mpe na nkombo ya guvɛrnema, nazali kopesa bino longonya na motema mobimba mpo na mosala ya ntina mingi oyo bozali kosala, na ndenge bozali kosalisa bato oyo bayebi kotánga mpe kokoma te bákóma na boyebi. . . . Tiká ete bólonga mpenza na mosala na bino ya koteya bato.”

Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Bana-kelasi bazali koyekola kotánga mpe koloba liboso ya bato

Lokola Batatoli ya Yehova bazwaka na valɛrɛ mingi mosala na bango ya koteya Biblia, basalaka makasi bákolisa mayele na bango ya kolimbolela bato mateya ya Biblia. Na ndakisa, mpo na kosalisa bango, na mokomoko ya masangá koleka 119 000 oyo bazali na yango na mokili mobimba, bana-kelasi bazwaka formasyo mpo na kobongisa ndenge na bango ya kotánga mpe koloba liboso ya bato. Ezala bana mike, ntango kaka bayebi kotánga, bakoki kokomisa nkombo na bango mpo na kozwa formasyo yango, oyo ekosalisa bango mpe na makambo mosusu, na ndakisa na kelasi. Balakisi mingi balobaka ete bana-kelasi oyo bazali Batatoli ya Yehova bayebaka komonisa makanisi na bango na ndenge ya polele mpenza.

Na lisangá, balendisaka bandeko bátángaka mingi, mpe balendisaka libota mokomoko ezala na bibliotɛkɛ oyo ezali na mikanda mingi

Lisusu, lisangá mokomoko ya Batatoli ya Yehova elendisamaka ete, na esika oyo basalaka makita na bango, elingi koloba Ndako ya Bokonzi, bázala na bibliotɛkɛ oyo ezali na mikanda oyo elimbolaka Biblia, badiksionɛrɛ, mpe babuku mosusu. Bibliotɛkɛ yango ezali mpo na bato nyonso oyo bayanganaka na Ndako ya Bokonzi yango. Na lisangá, balendisaka bandeko bátángaka mingi, mpe balendisaka libota mokomoko ezala na bibliotɛkɛ oyo ezali na mikanda mingi mpo na kokokisa mposa ya bana mpe ya mikóló.

Biteyelo mosusu

Batatoli ya Yehova bazalaka mpe na biteyelo oyo epesaka basi mpe mibali formasyo mpo bákóma bamisionɛrɛ; lisusu, bazalaka mpe na biteyelo mpo na kopesa formasyo na mibali oyo bazali na mikumba na masangá. Biteyelo wana ezali komonisa lisusu polele ete Batatoli ya Yehova bazwaka kelasi na valɛrɛ mingi.