Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova basalaka makasi báteyaka bana na bango bizaleli malamu ya bokristo

Bizaleli malamu oyo ebongi komemya yango

Bizaleli malamu oyo ebongi komemya yango

Banda mokili ebandá, basi mpe mibali ya mpiko basalá to balobá makambo oyo emonisi ete makanisi na bango ekeseni na oyo ya bato ya ntango na bango. Banyokolaki bango mpo na makambo ya politiki, ya losambo mpe mpo na loposo na bango, kasi bayikaki mpiko; mbala mingi bazalaki kondima ata kokufa mpo na mikano oyo bazalaki na yango.

BAKRISTO ya liboso bazalaki mpenza na mpiko. Na basiɛklɛ misato ya liboso, Baroma oyo bazalaki bapakano banyokolaki bakristo na ndenge ya nsɔmɔ, babomaki mingi na bango mpo baboyaki kosambela amperɛrɛ. Na bantango mosusu, bazalaki kotya etumbelo na libándá ya masano. Soki bakristo balingi konyokolama te, basengelaki kotumba mwa mpaka ya malasi na etumbelo yango mpo na komonisa ete bandimi ete amperɛrɛ azali Nzambe. Nzokande, kaka bakristo moke nde basalaki bongo. Mingi bandimaki kokufa na esika ya kowangana kondima na bango.

Lelo oyo, bakristo Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa yango na oyo etali koboya kokɔta na makambo ya politiki. Na ndakisa, bato mingi bayebi ete Batatoli ya Yehova batikalaki sembo atako Banazi banyokolaki bango. Liboso ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe ntango ezalaki kosalema, na Allemagne, pene na Motatoli moko kati na Batatoli minei akufaki, mingimingi na bakaa ya bakangami, mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki mpe baboyaki koloba “Heil Hitler.” Bakabolaki Batatoli ya Yehova ná bana na bango ya mike na makasi. Atako bana yango banyokwamaki, kasi batikalaki ngwi mpe baboyaki kondima mateya oyo eyokani na Makomami te, oyo balukaki koteya bango na makasi.

Kopesa drapo losako

Lelo oyo, na bisika mingi, banyokolaka Batatoli ya Yehova lisusu te na ndenge wana ya nsɔmɔ. Kasi, na bantango mosusu, bato basepelaka te soki bilenge Batatoli ya Yehova, na lisosoli na bango moko, baboyi kosangana na milulu ya kokumisa ekólo, lokola kopesa drapo losako.

“Bópésa Kaizáro biye bikokí na Kaizáro, mpé bópésa Nzámbe biye bikokí na Nzámbe”​Matai 22:21Liloba lya Nzambe

Batatoli ya Yehova bateyaka bana na bango ete basengeli te kopekisa baninga na bango kopesa drapo losako; moto na moto asengeli kozwa ekateli na ye. Atako bongo, Batatoli ya Yehova bakangamaka na ekateli na bango: bapesaka drapo ya ekólo moko te losako. Yango ezali te mpo na komonisa ete bazangi limemya. Batatoli ya Yehova bamemyaka mpenza drapo ya mboka nyonso epai bafandi, mpe bamonisaka limemya yango na ndenge batosaka mibeko ya mboka. Bakɔtaka te na makambo nyonso oyo etɛmɛlaka guvɛrnema. Kutu, Batatoli ya Yehova bandimaka ete baguvɛrnema ya lelo ezali “ebongiseli ya Nzambe,” oyo atiki nzela ete ezala. Na yango, bamonaka ete basengeli kotosa etinda ya Nzambe oyo etali kofuta mpako mpe komemya “bakonzi oyo bazali liboso.” (Baroma 13:1-7) Yango eyokani na maloba ya Kristo oyo eyebani malamu ete: “Bópésa Kaizáro biye bikokí na Kaizáro, mpé bópésa Nzámbe biye bikokí na Nzámbe.”​—Matai 22:21Liloba lya Nzambe (Biblia ya Bakatolike).

Basusu bakoki komituna ete, ‘kasi mpo na nini Batatoli ya Yehova bapesaka drapo losako te mpo na kokumisa yango?’ Mpo bamonaka ete kopesa drapo losako ezali losambo, nzokande ebongi kosambela kaka Nzambe; lisosoli na bango epekisaka bango básambela moto to eloko mosusu, longola kaka Nzambe. (Matai 4:10; Misala 5:29) Na yango, basepelaka ete balakisi bámemya makanisi na bango mpe bátikela bana na bango nzela ya kosalela makambo oyo bandimaka.

Kutu, ndenge maloba oyo elandi emonisi yango, ezali kaka Batatoli ya Yehova te nde bamonaka ete kopesa drapo losako ezali na boyokani na losambo:

‘Na ebandeli, drapo ezalaki mingimingi na boyokani na losambo. . . . Emonani ete bato balukaka ntango nyonso ete lingomba esantisa drapo ya ekólo.’​—Encyclopædia Britannica.

‘Drapo ezali eloko ya bosantu, ndenge moko na ekulusu. . . . Mibeko mpe malako oyo elobelaka makambo oyo bato basengeli kosala mpo na drapo ya ekólo ezalaka na maloba ya kilo mpe ya polele, na ndakisa “Kosala mpo na drapo,” . . . “Komemya drapo,” “Komipesa na drapo.”’​—The Encyclopedia Americana.

“Bakristo bazalaki koboya . . . kopesa mbeka na nzambe oyo ezalaki komonisa amperɛrɛ [ya Roma], likambo oyo ekokani lelo na koboya kopesa drapo losako to koboya koloba ndai ya bosembo.”​—Those About to Die (1958), ekomamaki na Daniel Mannix, lokasa 135.

Bilenge Baebre misato baboyaki kofukamela ekeko oyo Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, atɛlɛmisaki

Tolobi lisusu boye, soki Batatoli ya Yehova baboyaka kopesa drapo losako ezali te mpo bazangi limemya epai ya baguvɛrnema to bakonzi na yango. Baboyaka nde kofukamela to kopesa losako na eloko oyo ezali komonisa ekólo, mpo kosala bongo ezali kosambela yango. Bamonaka ete ekateli na bango wana ekokani na oyo ya bilenge Baebre misato ya ntango ya kala, oyo baboyaki kofukamela ekeko oyo Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, atɛlɛmisaki na esobe ya Dura. (Danyele, mokapo 3) Na bongo, ntango bana mosusu bapesaka drapo losako mpe balobaka ete bakotikala sembo, bana ya Batatoli ya Yehova balandaka lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia. Yango wana, bafandaka nyɛɛ mpe baboyaka na limemya mpenza kosangana na makambo yango. Ezali mpe mpo na ntina yango nde bana ya Batatoli ya Yehova bayembaka loyembo ya ekólo te ntango bato bazali koyemba yango to ntango bazali kobɛta yango na bibɛtɛli ya miziki.

Lotomo ya baboti

Lelo oyo, mikili mingi ememyaka lotomo oyo baboti bazali na yango ya koteya bana na bango makambo ya lingomba oyo eyokani na oyo bango moko bandimaka. Mangomba nyonso endimaka lotomo yango, ndenge mobeko-mama (droit canon) ya mangomba ya bokristo oyo Lingomba ya Katolike esalelaka tii lelo oyo emonisi yango: “Lokola baboti bapesaki bana na bango bomoi, bazali na mokumba monene mpenza ya koteya bango, mpe bazali na lotomo ya kosala bongo; yango wana, ezali libosoliboso baboti nde basengeli kolakisa bana na bango mateya ya bokristo na boyokani na bindimeli ya Lingomba.”​—Canon 226.

Balendisaka bana bátyelaka basusu likebi

Batatoli ya Yehova balukaka nde koteya bana na bango ndenge wana. Lokola balingaka bango, basalaka makasi báteyaka bango bizaleli malamu ya bokristo, kolinga bazalani mpe komemya biloko ya bato. Balukaka kolanda toli oyo ntoma Paulo apesaki bakristo ya Efese: “Baboti, bósalela bana na bino makambo te na lolenge ete bóyokisa bango nkanda. Kasi, bóbɔkɔla bango na disiplini mpe malako ya bokristo.”​—Baefese 6:4, Today’s English Version.

Mabota oyo baboti basambelaka na lingomba moko te

Na mabota mosusu, kaka moboti moko nde azali Motatoli ya Yehova. Na ntango wana, moboti oyo azali Motatoli ya Yehova asengeli koyeba ete mobalani na ye oyo azali Motatoli ya Yehova te azali mpe na lotomo ya koteya bana na bango mateya ya lingomba na ye. Koteya bana mateya ya mangomba ndenge na ndenge esalaka bango mabe mingi te, ntango mosusu mpe esalaka bango ata mabe moko te. a Nsukansuka, mwana na mwana asengeli kopona lingomba oyo akolanda. Mbala mingi, bana nyonso te nde balandaka mateya ya lingomba ya baboti na bango, ata soki baboti yango bazali Batatoli ya Yehova to te.

Lotomo oyo bana bazali na yango ya koyoka lisosoli na bango

Osengeli mpe koyeba ete Batatoli ya Yehova bazwaka na valɛrɛ mingi lisosoli ya mokristo mokomoko. (Baroma, mokapo 14) Boyokani oyo mikili mingi esalaki mpo na ntomo ya bana, oyo endimamaki na likita monene ya ONU na 1989, endimaki ete mwana azali na lotomo “ya kokanisa makambo oyo alingi, ya koyoka lisosoli na ye mpe ya kozala na losambo oyo alingi” mpe lotomo ya komonisa likanisi na ye na bonsomi mpenza na makambo nyonso oyo etali ye mpe kosala ete likanisi yango etalelama.

Mwana na mwana azali na ndenge na ye. Na yango, yebá ete ekoki kokóma ete bilenge Batatoli ya Yehova to bilenge mosusu bázwa bikateli ndenge moko te na makambo mosusu to na misala mosusu ya kelasi. Tokanisi ete yo mpe ondimaka ete moto na moto azali na bonsomi ya koyoka lisosoli na ye.

a Mpo na bana oyo baboti basambelaka esika moko te, Steven Carr Reuben, moto ya mayele na filozofi, alobi na buku na ye (Raising Jewish Children in a Contemporary World) boye: “Bana bazwaka mobulu na makanisi soki baboti bazali kosala makambo oyo ekeseni na oyo balobaka, babulunganaka na makanisi, babombaka makambo, mpe balingaka makambo ya losambo te. Soki baboti balobelaka makambo oyo bandimaka, mitinda ya bizaleli malamu mpe bafɛti oyo bandimaka na ndenge ya polele mpe na bosembo mpenza, bana babangaka eloko te na makambo ya losambo ntango bazali kokola mpe bamonaka ete bazali na ntina; yango esalisaka bango mingi báyeba kopesa nzoto kilo mpe báyeba esika na bango na mokili.”