Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya nsuka

Maloba ya nsuka

NTINA ya mwa buku oyo ezali te ya kolobela makambo nyonso oyo Batatoli ya Yehova bandimaka. Tosali nde makasi tólimbola ndambo ya mitinda oyo Batatoli ya Yehova bandimaka mpe tómonisa polele mateya mpe makambo oyo mwana-kelasi na yo ayokaka mpe amonaka na libota na bango, soki tata to mama na ye to bango nyonso mibale bazali Batatoli ya Yehova.

Batatoli ya Yehova bamonaka ete ezali na ntina mingi bana na bango bázala na boyokani malamu na Nzambe. Mpe bandimaka ete yango esalisaka bana na bango bákola mpe na makambo mosusu. Makambo oyo bandimaka mpe mitinda oyo balandaka esalaka ete bomoi na bango ezala na ntina mpe esalisaka bango bálonga mikakatano oyo bakutanaka na yango mokolo na mokolo. Lisusu, makambo yango mpe mitinda yango etindaka bango básala makasi bázala bana-kelasi ya molende mpe bázala bato malamu bomoi na bango mobimba.

Batatoli ya Yehova basalaka makasi bátalela bomoi ndenge mpenza yango ezali. Yango wana, bazwaka kelasi na valɛrɛ mingi mpe bazali na mposa ya kosala nyonso oyo bakoki mpo na kopesa yo mabɔkɔ. Ezala mboka nini bafandi, na bandako na bango mpe na bisika na bango ya losambo, bakotika te kolendisa bana na bango básala oyo basengeli mpo boyokani yango ekoba kobimisa mbuma ya malamu.