Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokumba ya baboti

Mokumba ya baboti

Ezali solo ete na mokili ya lelo kobɔkɔla bana tii bákóma mikóló oyo babongi ezali likambo ya lisɛki te.

EBONGISELI moko ya guvɛrnema ya États-Unis oyo etalelaka bamaladi ya motó esalaki ankɛtɛ epai ya baboti oyo bamonanaka ete babɔkɔlá bana na bango malamu, elingi koloba baoyo bana na bango ya mbula koleka 21 “bazali mikóló oyo bazali na molende na mosala mpe bazali komonana ete bazali komesana na makambo ya mboka oyo bafandi.” Batunaki baboti wana boye: ‘Na ndenge oyo obɔkɔli bana na yo, toli nini ya malamu koleka okoki kopesa baboti mosusu?’ Biyano oyo mingi na bango bapesaki yango oyo: ‘Baboti bálingaka bana na bango mingi,’ ‘bápesaka bango disiplini ya malamu,’ ‘bálekisaka ntango elongo na bango,’ ‘báteyaka bana na bango báyeba kokesenisa mabe ná malamu,’ ‘bápesanaka limemya,’ ‘báyokaka bango mpenza,’ ‘bápesaka bango toli na esika ya kopamela bango ntango nyonso,’ mpe ‘bátalela makambo ndenge yango ezali.’

Balakisi bazali na mokumba monene ya kosalisa bana bákóma mikóló oyo babongi

Nzokande, ezali kaka baboti te nde bazali na mokumba ya kosalisa bana bákóma mikóló oyo babongi. Balakisi mpe bazali na mokumba monene na likambo yango. Mopesi-toli na eteyelo moko, oyo ayebi malamu mosala na ye, alobaki boye: “Ntina ya liboso ya mateya oyo epesamaka na eteyelo ezali ya kosalisa baboti bábɔkɔla bana na bango malamu mpo bana bákóma mikóló oyo babongi, oyo bazali na mayele, oyo bakɔmeli na nzoto mpe na makanisi.”

Yango wana, baboti ná balakisi bazali kaka na mokano moko: kosalisa bilenge bákóma mikóló oyo bakɔmeli, oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango, oyo bazali kosepela na bomoi mpe bakoki kondimama na bazalani na bango epai bafandi.

Kosala elongo, kasi kowelana te

Nzokande, soki baboti bazali koyokana na balakisi te, mikakatano ekoki kobima. Na ndakisa, baboti mosusu batyaka mpenza likebi te na makambo ya kelasi ya bana na bango; basusu balukaka kutu kowelana na balakisi. Zulunalo moko ya France elobelaki likambo yango na maloba oyo: “Ezali lisusu mokumba ya molakisi ye moko te. Lokola baboti balingaka kaka bana na bango bázwa na kelasi, batalelaka malamumalamu likambo nyonso oyo ekomami na babuku ya kelasi, balobaka ete molakisi ayebi koteya malamu te, mpe basilikaka mbala moko soki kaka mwana na bango azwi te.” Makambo ya ndenge wana ekoki komonisa ete baboti balingi kozwa esika ya balakisi.

Batatoli ya Yehova bandimaka ete bana na bango bakoteyama malamu koleka soki bango, baboti, bazali koyokana malamu na balakisi mpe kolandela malamu mateya oyo bana na bango bazali kozwa

Batatoli ya Yehova bandimaka ete bana na bango bakoteyama malamu koleka soki bango, baboti, bazali koyokana malamu na balakisi mpe kolandela malamu mateya oyo bana na bango bazali kozwa. Bayebi ete basengeli mpenza kosala bongo, mpo mosala na bino balakisi ezali se kokóma makasi.

Mikakatano oyo ezali na biteyelo

Lokola eteyelo emonisaka makambo ya bato ya mboka moko, mikakatano oyo bato wana bazali na yango ekozanga te komonana mpe na eteyelo. Mikakatano ya bato ebakisami mingi mpe noki mpenza, na bambula oyo. Zulunalo moko (The New York Times) emonisaki makambo oyo ezali koleka na eteyelo moko na États-Unis: “Bana-kelasi balalaka mpɔngi na kelasi, bakanelanaka na bakulware oyo na bifelo na yango bakomikomi, batyolaka bana-kelasi ya malamu. . . . Bana-kelasi mingi bazali na mikakatano lokola oyo: kobatela bana mike, kosalisa baboti oyo bazali na bolɔkɔ mpe kokimakima bato ya mobulu. Mokolo na mokolo, mwana-kelasi moko kati na bana-kelasi mitano ayaka kelasi te.”

Likambo oyo ezali kobangisa mingi ezali nde mobulu oyo ezali se kobakisama na biteyelo na mokili mobimba. Kala, bana bazalaki kobunda mingi te mpe soki babundi, bazalaki kaka kotindikana mpe kobendana; kasi, lelo oyo bakómi nde kobunda na mindoki mpe bambeli. Lokola bana-kelasi mingi bakómi na mindoki; mobulu ekómi mingi mpe ezali kobimisa makama ya minene koleka; bana bazali koumela lisusu te kobimisa mobulu mpo babandá yango na bomwana mpenza.

Ya solo, makambo wana ya mabe ezali kosalema na bikólo nyonso te. Nzokande, na mokili mobimba, balakisi mingi bazali kokutana na likambo oyo zulunalo moko (Le Point) oyo ebimaka pɔsɔ na pɔsɔ na France elobelaki: “Bazali lisusu komemya molakisi te; azali lisusu na bokonzi te.”

Baboti oyo babɔkɔlaka bana na bango malamu balekisaka ntango elongo na bango

Ezaleli wana ya kotyola baoyo bazali na bokonzi ezali likama monene mpo na bana nyonso. Yango wana, Batatoli ya Yehova basalaka nyonso báteya bana na bango bátosa mpe bámemya bato oyo bazali na bokonzi, bizaleli oyo bana-kelasi mingi ya lelo bazali na yango te.