Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge oyo Batatoli ya Yehova batalelaka kelasi

Ndenge oyo Batatoli ya Yehova batalelaka kelasi

Lokola baboti nyonso, Batatoli ya Yehova bamitungisaka mingi mpo na avenire ya bana na bango. Yango wana, bazwaka kelasi na valɛrɛ mingi. “Kelasi esengeli kosalisa bato bákóma na ntina mingi na mboka. Esengeli mpe kosalisa bango básepela na mimeseno ya mboka na bango mpe bázala na bomoi ya malamu koleka.”

NDENGE buku (The World Book Encyclopedia) emonisi yango, moko ya mikano ya libosoliboso ya kelasi ezali ya kopesa bana formasyo mpo na bomoi na bango ya mokolo na mokolo, na ndakisa kosalisa bango mpo mokolo mosusu báyeba kokokisa bamposa ya libota na bango. Batatoli ya Yehova bayebaka ete Nzambe nde apesi bato mokumba yango. Biblia yango moko elobi ete: “Ya solo, soki moto azali te kopesa bato na ye, mpe mingimingi bato ya ndako na ye, biloko oyo basengeli na yango, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te.” (1 Timote 5:8) Bambula oyo bana balekisaka na kelasi ebongisaka bango mpo na mikumba oyo bakozwa na bomoi. Yango wana, Batatoli ya Yehova bamonaka ete esengeli kozwa kelasi na lisɛki te.

“Kelasi esengeli kosalisa bato bákóma na ntina mingi na mboka. Esengeli mpe kosalisa bango básepela na mimeseno ya mboka na bango mpe bázala na bomoi ya malamu koleka.”​—The World Book Encyclopedia

Batatoli ya Yehova basalaka makasi bálanda etinda oyo ya Biblia: “Misala nyonso oyo bosalaka, bósalaka yango na motema moko lokola nde bozali kosalela Nkolo kasi bato té.” (Bakolose 3:23Bible na Lingala ya lelo oyo) Etinda yango etaleli makambo nyonso ya bomoi, bakisá mpe kelasi. Yango wana, Batatoli ya Yehova balendisaka bana na bango báyekolaka malamu mpe bázwaka badevuare oyo bapesaka bango na kelasi na lisɛki te.

“Misala nyonso oyo bosalaka, bósalaka yango na motema moko lokola nde bozali kosalela Nkolo kasi bato té.”​—Bakolose 3:23Bible na Lingala ya lelo oyo

Biblia ezali mpe koteya biso tótosa mibeko ya mboka epai tofandi. Yango wana, soki mobeko ya mboka esɛngi ete mwana nyonso atánga kelasi tii akokokisa mbula boye to boye, Batatoli ya Yehova batosaka mobeko yango.​—Baroma 13:1-7.

Kominanola ya malamu, miziki, kosala mwa misala mpo na kolekisa ntango, kosala ngalasisi, kokende kotala babibliotɛkɛ mpe bisika oyo babombaka biloko ya kala (“musée”) mpe bongo na bongo, ezali na ntina mingi mpo mwana azwa formasyo ya malamu

Atako kelasi ekoki kosalisa moto ayeba ndenge ya kozwaka mwa eloko ya kobikela, kasi Biblia emonisi ete ezali kaka mpo na yango te nde moto asengeli kotánga kelasi to yango te nde ntina ya libosoliboso ya kelasi. Kelasi ya malamu esengeli kosalisa bana básepelaka mingi kozala na bomoi mpe bákóma bato ya malonga na esika bafandi. Yango wana, Batatoli ya Yehova bamonaka ete koyeba kopona masano oyo esalemaka nsima ya kelasi ezali na ntina mingi. Bandimaka ete kominanola ya malamu, miziki, kosala mwa misala mpo na kolekisa ntango, kosala ngalasisi, kokende kotala babibliotɛkɛ mpe bisika oyo babombaka biloko ya kala (musée) mpe bongo na bongo, ezali na ntina mingi mpo mwana azwa formasyo ya malamu. Lisusu, bateyaka bana na bango bátosaka mibange mpe bálukaka mabaku ya kosalisa bango.

Bongo kotánga bakelasi ya milai?

Lokola batekiniki ya sika ezali se kobima, mabaku ya kozwa misala ezali ntango nyonso kobongwana. Yango ekotinda bilenge mingi bándima mosala mosusu to kosala misala mosusu, oyo bayekolaki yango mpenza te. Na ntango wana, ndenge na bango ya kosala mpe formasyo oyo bazwaki, mingimingi likoki na bango ya komesana na makambo ya sika, ekozala na ntina mingi mpenza mpo na bango. Yango wana, ndenge Montaigne mokomi moko na ntango ya Renaissance amonisaki yango, ezali malamu ete bana-kelasi bákóma mikóló oyo bazali na ‘bɔɔngɔ oyo eyebi kosalela boyebi na esika ya kozala na bɔɔngɔ oyo etondi na boyebi kasi eyebi kosalela yango te.’

Lokola misala ekómi mpasi, ezala na mikili ya bozwi to ya bobola, emonanaka mbala mingi ete bilenge oyo bazwi formasyo ya malonga te nde bazangaka misala. Na yango, soki esɛngi ete mwana abakisa bakelasi mosusu likoló ya oyo mibeko esɛngi mpo azwa mosala, baboti nde basengeli kosalisa ye azwa ekateli yango, bakotalela elongo matomba oyo bakelasi yango ekoki kopesa mpe makambo oyo yango ekosɛnga ete bámipimela.

Kasi, tokanisi okondima ete mpo moto alonga na bomoi esɛngi kaka te azala na biloko mingi ya kobikela. Na mikolo euti koleka, basi ná mibali oyo bamipesaki mobimba na misala na bango babungisaki elikya nyonso ntango balongolaki bango na mosala. Baboti mosusu bazongisaki bolamu ya mabota na bango nsima mpe bazangaki ntango ya kozala elongo na bana na bango mpo bamipesaki mingi na misala na bango; babungisaki libaku malamu ya kosalisa bana na bango bákola malamu.

Emonani polele ete kelasi ya malamu esengeli kosalisa moto ayeba ete esengo ya solosolo eutaka kaka na biloko ya kobikela te. Yesu Kristo alobaki ete: “Ekòmamá boye: ‘Moto akoki kobikela kaka na mapa té, kasi azalaka na posa ya nyonso oyo Nzambe alobaka.’” (Matai 4:4Bible na Lingala ya lelo oyo) Lokola Batatoli ya Yehova bazali bakristo, bamonaka ete ezali na ntina mingi bana báyekola ndenge ya kozwa biloko oyo basengeli na yango mpe bákóma na bizaleli malamu mpe oyo esepelisaka Nzambe.