Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bilenge​—Bokosala nini na bomoi na bino?

Bilenge​—Bokosala nini na bomoi na bino?

Bilenge​—Bokosala nini na bomoi na bino?

ELENGE moko ya mwasi alobaki ete: “Ngai nalingaka názala na bomoi moko ya malamu mpenza.” Na ntembe te, yo mpe olingaka kozala na bomoi ya ndenge wana. Kasi ndenge nini okoki kozala na bomoi yango “ya malamu mpenza”? Bazulunalo, radio, televizyo to mpe baninga na yo, ntango mosusu ata balakisi na yo, bakoki koyebisa yo ete mpo okóma na bomoi ya ndenge wana, esengeli ozwaka mbongo mingi mpe ozala na mosala moko ya lokumu​—okóma moto monene!

Kasi, Biblia ekebisi bilenge ete koluka bomɛngo ezali se lokola “koluka kokanga mopɛpɛ.” (Mosakoli 4:4, NW) Yango ezali solo mpamba te ezali na bilenge mingi te oyo bazwaka mpenza bomɛngo mpe lokumu. Baoyo bazwaka yango, mbala mingi bayaka komona ete ezali mpenza te ndenge bazalaki kokanisa mpe nsukansuka balɛmbaka nzoto. Elenge moko ya Angleterre oyo azalaki koluka mosala ya lokumu mingi na iniversite, alobaki ete: “Koluka kozwa bomɛngo ezali lokola sanduku oyo ezali na eloko na kati te. Ntango ofungoli yango mpe otali na kati, eloko te.” Ezali solo ete mosala ekoki mbala mosusu kokómisa moto mozwi mpe kopesa ye lokumu. Kasi ekoki te kosilisa ‘bobola na ye ya elimo.’ (Matai 5:3, NW) Longola yango, 1 Yoane 2:17 ekebisi biso ete “mokili ezali mpe kolongwa.” Ata soki okómi na biloko mingi na mokili oyo, yango ekozala se mpo na ntango mokuse.

Yango wana, Mosakoli 12:1 (Liloba lya Nzambe) elendisi bilenge ete: “Kanisa mozalisi wa yo ntango ozali naino elenge.” Ɛɛ, ndenge ya malamu koleka ya kosalela bomoi na yo ezali nde na mosala ya Yehova Nzambe. Kasi mpo na kosala mosala yango ya Nzambe, osengeli libosoliboso kokokisa makambo oyo esɛngami mpo na yango. Ndenge nini okoki kosala mpo okokisa masɛngami? Lisusu, moto oyo amipesi na mosala ya Nzambe asengeli kozala na bomoi ya ndenge nini?

Kokokisa makambo oyo esɛngami mpo na kokóma Motatoli ya Yehova

Libosoliboso, osengeli kokolisa mposa ya kosalela Nzambe; mposa yango eyaka yango moko te, ata soki baboti na yo bazali baklisto. Esengeli yo moko ozala na boyokani ya malamu na Yehova. Mwana mwasi moko alobi ete: “Kobondela ekosalisa yo oyokanaka malamu na Yehova.”​—Nzembo 62:8; Yakobo 4:8.

Baloma 12:2 (NW) emonisi likambo mosusu oyo osengeli kosala. Elobi ete: “Bómindimisa bino moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” Esilá kokómela yo ete okóma kotya ntembe na makambo mosusu oyo bateyaki yo? Soki ezali bongo, landá toli wana ya Biblia mpe ‘omindimisa’ ete makambo yango ezali mpenza ya solo! Luká makambo yango yo moko na mikanda. Tángáká Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango. Kasi, koyekola makambo ya Nzambe esuki kaka te na kozala na mayele ya kokanga makambo mingi na motó. Zwá ntango ya kokanisa malamumalamu likoló ya makambo oyo ozali kotánga mpo efanda mpenza na kati ya motema na yo ya elilingi. Yango ekosala ete obanda kolinga Nzambe mingi.​—Nzembo 1:2, 3.

Nsima na yango, ntango libaku malamu emonani, meká koyebisa bato mosusu makambo oyo ozali koyekola, ekoki kozala baninga na yo ya kelasi. Na nsima, ekosɛnga ete obimaka na mosala ya kosakola ndako na ndako. Mbala mosusu ntango ozali kosakola, okoki kokutana na moninga moko ya kelasi mpe na ebandeli okoki koyoka mwa nsɔni. Kasi Biblia elendisi biso ete ‘tóyoka nsango malamu nsɔni te.’ (Baloma 1:16) Nsango oyo ozali komema ezali nsango ya bomoi mpe ya elikya! Mpo na nini koyoka nsɔni mpo na yango?

Sikoyo, soki baboti na yo bazali baklisto, ekoki kozala ete osilá kobima na bango na mosala ya kosakola. Kasi, na esika ya kosuka kaka na kotɛlɛma na porte ya bato to kosuka kaka na kolakisa bazulunalo mpe batrakte, okoki nde koloba? Okoki nde yo moko koloba ntango okómi na porte ya bato mpe kosalela Biblia mpo na koteya moto oyo okuti na ndako yango? Soki okoki naino kosala yango te, sɛngá baboti na yo to ndeko moko ya lisangá na bino oyo akɔmeli, ete básalisa yo. Salá makasi mpo na kokokisa masɛngami mpo okóma mosakoli ya nsango malamu oyo azwi naino batisimo te!

Nsima ya mwa ntango, okokóma na mposa ya komipesa​—kokata ndai liboso ya Nzambe ete banda sikoyo, okosalela ye. (Baloma 12:1) Kasi, komipesa ezali kaka likambo na yo moko te. Nzambe asɛngaka ete bato nyonso básala “eyambweli mpo na lobiko.” (Baloma 10:10, NW) Na ntango ya batisimo, liboso okondima na mongongo makasi mpo na komonisa polele kondima na yo. Nsima na yango nde okobatisama na mai. (Matai 28:19, 20) Ya solo mpenza, tosengeli kozwa batisimo na lisɛki te. Kasi kozonga nsima te mpo ozali kobanga ete okokoka makambo te. Soki ozali kotyela Nzambe motema mpo na kozwa makasi, akopesa yo “nguya oyo eleki makasi ya bato” mpo esalisa yo otikala ngwi.​—2 Bakolinti 4:7; 1 Petelo 5:10.

Ntango ozwi batisimo, okómi Motatoli ya Yehova. (Yisaya 43:10) Yango esengeli mpenza kobongola ndenge oyo okosalela bomoi na yo. Komipesa elimboli mpe ‘komiboya yo moko.’ (Matai 16:24) Okoki kotya pembeni makambo mosusu mpe bamposa mosusu oyo ozalaki kokana kokokisa mpe ‘koluka liboso bokonzi ya Nzambe.’ (Matai 6:33) Komipesa mpe batisimo efungolaka nzela na mabaku mingi ya kosala bongo. Tótalela ndambo ya mabaku yango.

Mabaku ya kosalela Nzambe mosala ya ntango nyonso

Mosala ya mobongisi-nzela ezali moko ya mabaku yango. Mosakoli oyo azali mobongisi-nzela azali moklisto oyo azwi batisimo mpe azali ndakisa malamu, mpe amibongisi mpo na kosalaka ngonga 70 sanza na sanza na mosala ya kosakola nsango malamu. Kosala ngonga mingi na mosala ya kosakola ekosalisa yo okolisa makoki na yo ya kosakola mpe ya koteya. Babongisi-nzela mingi basepelaki ndenge basalisaki bato oyo bayekolaki na bango Biblia mpo bákóma Batatoli oyo bazwi batisimo. Mosala nini mosusu ekoki kosepelisa mpe kopesa esengo ya ndenge wana?

Mpo na kozwa mbongo, babongisi-nzela mingi basalaka misala oyo ezwaka bango kaka ndambo ya mokolo. Mingi bamibongisaka liboso mpo na kosala mosala yango mpe bayekolaka mosala moko ya mabɔkɔ na eteyelo to epai ya baboti na bango. Soki yo na baboti na yo bomoni malamu otánga lisusu nsima ya kosilisa eteyelo ya ntei (école secondaire), mposa oyo ezali kotinda yo na kolanda kotánga esengeli kozala te ya kokóma na mbongo mingi, kasi nde ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola mpe ata kosala lokola ministre na mosala ya ntango nyonso.

Nzokande, na bomoi ya mobongisi-nzela, likambo oyo eleki ntina ezali te mosala ya mosuni oyo azali kosala, kasi nde mosala na ye ya kosakola​—ya kosalisa bato mosusu bázwa bomoi! Mpo na nini te komityela mokano ete osala mosala ya mobongisi-nzela? Mbala mingi mosala ya mobongisi-nzela efungolaka nzela na mabaku mosusu. Na ndakisa, babongisi-nzela mosusu bakendaka kofanda na bisika oyo basengeli na basakoli ya Bokonzi mingi. Bamosusu bayekolaka monɔkɔ moko ya bapaya mpe bapesaka mabɔkɔ na lisangá oyo balobaka monɔkɔ ya bapaya, ezala na mboka na bango to na mboka mopaya. Ya solo, mosala ya mobongisi-nzela ezali lolenge ya bomoi oyo epesaka matomba mingi!

Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá ezali kopesa bandeko oyo babalá formasyo mpo Yehova mpe ebongiseli na ye básalela bango lisusu mingi. Bandeko mingi oyo bakɔtaka na eteyelo yango batindamaka mpo na kokende kosala esika mposa ezali mingi na ekólo na bango. Bamosusu bakoki kotindama na ekólo mosusu soki likoki ezali. Bakoki mpe kosala lokola babongisi-nzela monene ya ntango mokuse na bateritware ya mosika mpe epai lisangá ezali te mpo na kokolisa mosala na bango.

Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba esalemaki mpo na kopesa formasyo na bandeko oyo bazali minzemba: bankulutu na basaleli ya misala ya makoki. Na pɔsɔ mwambe mpamba, bana-kelasi bayekolaka na mozindo makambo mingi lokola mikumba ya bankulutu mpe ya basaleli ya misala, kobongisa lisangá, mpe makoki ya koloba na miso ya bato. Bamosusu, batikaka bango básala na mboka na bango moko. Bamosusu, batindaka bango na bamboka mopaya.

Mosala ya Betele elimboli komipesa yo moko mpo na kosala na filiale moko ya Batatoli ya Yehova. Bandeko mosusu ya libota ya Betele basalaka mpenza mosala ya kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia. Bamosusu basalaka misala mosusu oyo esalisaka mosala yango, misala lokola kobatela bandako mpe biloko ya mosala to bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bandeko ya libota ya Betele. Misala wana nyonso ezali mabaku malamu mpe ezali mosala mosantu oyo basalelaka Yehova. Longola yango, bandeko oyo bazali na Betele bazali na esengo ya koyeba ete ezala mosala nini oyo basalaka kuna, bandeko ebele na mokili mobimba bazwelaka yango matomba.

Ntango mosusu, babengaka bandeko oyo bayebi malamu mosala moko boye mpo básala na Betele. Kasi, bandeko mingi bayekolaka mosala ya kosala ntango bakómi na Betele. Bandeko ya Betele basalaka te mpo na mbongo to mpo na biloko; kasi basepelaka na nyonso oyo bapesaka bango, na ndakisa biloko ya kolya, esika ya kolala, mpe mwa mbongo moke mpo na kokokisa bamposa na bango ya mikemike. Elenge moko oyo azali na libota ya Betele, alobaki boye mpo na mosala na ye: “Ezali mosala moko ya malamu mpenza! Ezali pɛtɛɛ te kosala kaka makambo yango moko mikolo nyonso, kasi nasili kozwa matomba mingi ndenge nazali kosala awa.”

Mosala ya ba “Serviteurs internationaux” ezali kopesa moto libaku ya kosala mosala ya kotonga bandako ya sika ya filiale mpe Bandako ya Bokonzi. Ba serviteurs internationaux, ndenge babengaka bandeko oyo basalaka mosala yango, bakendaka na bamboka mopaya mpo na kopesa mabɔkɔ na misala yango ya botongi. Yango mpe ezali mosala mosantu, oyo ekokani na mosala ya baoyo batongaki tempelo ya Salomo. (1 Mikonzi 8:13-18) Bibongiseli mpo na kosunga ba serviteurs internationaux ezali se lokola oyo ya bandeko ya libota ya Betele. Oyo nde libaku malamu bandeko mibali mpe bandeko basi wana bazali na yango ya kosala misala ya ndenge wana mpo na kokumisa Yehova!

Salelá Yehova na motema mobimba

Kosalela Yehova ezali lolenge oyo eleki malamu ya kosalela bomoi na yo. Mpo na nini te kokanisa malamu mpe komityela mokano ya kosalela Nzambe na mosala ya ntango nyonso? Sololá na baboti na yo, na bankulutu ya lisangá na bino, mpe na mokɛngɛli ya zongazonga na bino mpo na oyo etali mosala ya ntango nyonso. Soki osepelaka kosala na Betele, kokɔta na Eteyelo ya Gileadi, na Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba to na Eteyelo ya Biblia mpo na bakristo oyo babalá, kɔtá na likita oyo esalemaka na liyangani ya zongazonga mpe na liyangani ya etúká mpo na baoyo balingaka kosala mosala yango.

Ezali solo ete bato nyonso te bakoki kokokisa masɛngami to kozala na likoki ya kosala mosala ya ntango nyonso. Ntango mosusu mikakatano ya nzoto, ya mbongo mpe mikumba ya libota, ekoki kosala ete moto asala te ndenge mpenza azali na mposa ya kosala. Atako bongo, baklisto nyonso oyo bamipesi basengeli kotosa etinda ya Biblia oyo elobi ete: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.” (Matai 22:37, NW) Yehova azali kosɛnga yo osala nyonso oyo okoki kosala. Yango wana, ezala nini oyo ozali kosala na bomoi na yo sikoyo, tiká ete kosalela Yehova ezala mokano ya liboso. Omityela mikano ya kosalela Nzambe mosala oyo ekoki na yo. Ɛɛ, “Kanisa mozalisi wa yo ntango ozali naino elenge”​—mpe okozwa mapamboli ya libela soki okosala bongo!

Soki liyebisi ezali te, mikapo nyonso ya Biblia oyo ezali awa euti na Biblia ya Lingala haut-fleuve, ebimeli ya 1970. NW elakisi New World Translation of the Holy Scriptures.