Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Liyebisi epai ya baboti

Liyebisi epai ya baboti

Liyebisi epai ya baboti

Eloko nini ya malamu mpenza okoki kopesa bana na yo? Bana basengelaka to bazalaka na mposa ya makambo mingi, na ndakisa, olingaka bango, opesaka bango malako, mpe obatelaka bango. Kasi eloko eleki malamu oyo okoki kopesa bango ezali boyebi ya Yehova mpe mateya ya solo oyo ezali na kati ya Liloba na ye, Biblia. (Yoane 17:3) Boyebi yango ekoki kosalisa bana na yo bálinga Yehova mingi mpe básalela ye na motema mobimba, banda bomwana mpenza.​—Matai 21:16.

Baboti mingi bamoni ete bana mike basepelaka mingi na makambo oyo eumelaka te. Yango wana, tozali na esengo ya kobimisa mokanda oyo: Mateya ya Biblia mpo na bana. Liteya mokomoko ebongisami mpo na koteya na ndenge ya pɛtɛɛ mpenza. Bililingi mpe maloba oyo elimboli yango esalemi mpenzampenza mpo na bana ya mbula misato kitá na nse. Bapesi mpe malako oyo bosengeli kolanda. Mokanda Mateya ya Biblia mpo na bana ezali eloko ya masano mpo na bana te. Ezali nde mwa buku oyo esalemi mpo otángelaka bana na yo, mpe yango ekosala ete bósololaka malamu.

Tozali na elikya ete mokanda oyo ekosalisa yo mingi ntango ozali koteya bana na yo mateya ya Biblia “banda bomwana . . . mpenza.”​—2 Timote 3:14, 15.

Bandeko na bino,

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova

[Elilingi na lokasa 3]