Nakoki kosala nini soki papa to mama abali lisusu?
Mokapo 5
Nakoki kosala nini soki papa to mama abali lisusu?
PAPA to mama na yo azali na esengo mingi mokolo oyo abali lisusu. Kasi, yo ozali na nkanda makasi! Mpo na nini? Na ntango wana, elikya oyo ozalaki na yango ete tata ná mama na yo bakozongana ekei mai. Na ngámbo mosusu, libala yango ekoki kosala mpasi mingi soki esalemi kaka mwa moke nsima ya liwa ya moboti na yo.
Oyokaki ndenge nini ntango papa to mama na yo abalaki lisusu? Tyá ✔ na kare, pembeni ya likambo oyo etaleli yo.
Nayokaki . . .
□ Esengo
□ Mwa kobanga
□ Lokola batɛki ngai
□ Zuwa mpo na mwasi to mobali oyo papa to mama abali
□ Lokola naza lisusu sembo te, mpo nakómi kolinga mobali to mwasi wana oyo papa to mama abali
Lokola moboti na yo azali lisusu te, kolinga moboti mosusu, nde esalaki ete omiyoka lokola ozali lisusu sembo te. Ezala bongo to te, makambo oyo ezali likoló ekoki mbala mosusu kotinda yo omonisa mpasi oyo ozali koyoka na motema na ndenge ya mabe.
Na ndakisa, okoki ntango nyonso kotungisa mwasi to mobali wana oyo papa to mama na yo abali. Okoki ata koluka kobimisela bango matata, mpo bákabwana. Kasi, Biblia elobi ete: “Moto Masese 11:29) Osengeli te kokwea na motambo yango. Ezali na makambo oyo osengeli kosala mpo olonga makambo oyo ezali kotungisa yo. Tótalela mwa bandakisa.
nyonso oyo amemeli ndako na ye moko mpasi akozwa mopɛpɛ,” elingi koloba akozwa eloko moko te. (Mokakatano 1: Kondima bokonzi ya mobali to mwasi wana oyo papa to mama abali
Kondima bokonzi ya moboti mosusu ezali pɛtɛɛ te. Ntango basɛngi yo osala likambo moko, okoki koloba na nkanda nyonso ete: ‘Oza’ n’o mpe papa (mama) na ngai te!’ Soki olobi bongo, okoyoka mwa esengo mpo olobi ndenge ozalaki koyoka na motema, kasi ezaleli ya bongo ekomonisa ete okoli naino te.
Nzokande, soki ondimi bokonzi ya moboti mosusu, okomonisa ete olandi toli oyo ya Biblia: ‘Bókanisaka lokola mikóló.’ (1 Ba-Korentien [Bakorinti] 14:20, Bible na lingala ya lelo oyo) Lokola moboti wana azali kokokisa mikumba oyo moboti na yo mpenza azalaki kokokisa, osengeli komemya ye.—Masese 1:8; Baefese 6:1-4.
Mbala mingi, soki moboti wana apesi yo disiplini, ezali mpo alingi ozala malamu. (Masese 13:24) Ivonne, oyo azali na mbula 18, alobi boye: “Mobali ya mama na ngai apesaka biso disiplini, mpe yango nde batata nyonso basengeli kosala. Namonaka ete soki nakangeli ye nkanda ntango apesi ngai toli, ekozala lokola nde naz’ondima te ke azali kokokisa bamposa na biso ya elimo mpe ya mosuni na boumeli ya bambula mingi. Mpe yango ekomonisa ete nazangi botɔndi.”
Nzokande, okoki kozala na bantina mpenza ya komilela. Soki ezali bongo, monisá ete okómi ‘mokóló’ mpe landá toli oyo ya Bakolose 3:13: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.”
Komá awa na nse bizaleli mibale to koleka oyo papa to mama wana azali na yango.
․․․․․
Ndenge nini kokanisa bizaleli malamu oyo azali na yango ekosalisa yo omemya ye lisusu mingi koleka?
․․․․․
Mokakatano 2: Ndimá kofanda ná basusu kozanga mindɔndɔ
Aaron, oyo azali na mbula 24, alobi boye: “Papa abalaki lisusu mbala mibale. Ezalaki mpasi mpo nalinga mwasi mokomoko oyo abalaki. Liboso, nazalaki komona bango kaka lokola bapaya, kasi bayebisaki ngai ete esengeli nalinga bango. Likambo yango elekelaki ngai.”
Yo mpe okoki kokutana na mikakatano minene. Na ndakisa, mbala mosusu ozalaki mwana ya liboso to obotamaki kaka yo moko, kasi sikoyo ezali lisusu bongo te. Soki ozali mwana mobali, mbala mosusu ozalaki kokanisa ete yo nde okotikala tata ya ndako; kasi sikoyo ekómi nde mobali ya mama na yo. To okoki mpe kokanisa lokola Ivonne, oyo alobi ete: “Papa azalaki ata moke te kotyela mama likebi, yango wana nazalaki kokangama makasi ná mama. Kasi ntango mama abalaki lisusu, mobali na ye azalaki kotyela ye likebi mingi. Bazalaki kolekisa ntango elongo mpe kosolola, mpe nazalaki koyoka lokola nde azwi esika na ngai. Kasi, nsukansuka, namesanaki na likambo yango.”
Na ndakisa ya Ivonne, ndenge nini okoki komesana na makambo ya ndenge wana? Biblia elobi boye: “Bato nyonso báyeba ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te.” (Bafilipi 4:5) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kozala makambo makasimakasi te’ elimboli “kondima makanisi ya basusu” mpe emonisi ezaleli ya moto oyo atingamaka te na matomba na ye. Ndenge nini okoki kosalela toli yango? (1) Tiká kokanisakanisa makambo ya kala. (Mosakoli 7:10) (2) Yebá kofanda malamu ná moboti, mpe bandeko na yo wana ya sika. (1 Timote 6:18) (3) Kotalela bango te lokola bapaya.
Kati na makambo oyo ezali likoló, wapi oyo osengeli kosala makasi mpo obongisa? ․․․․․
Mokakatano 3: Kondima ete básalela yo makambo na bosembo te
Tara alobi boye: “Mobali ya mama azalaki kolinga mingi bana na ye koleka ngai ná yaya na ngai ya mwasi. Azalaki kosombela bango eloko nyonso ya kolya oyo balingi mpe filme nyonso oyo balingi kotala. Azalaki kosala nyonso mpo asepelisa bango.” Ezali mpasi kokanga motema na makambo ya ndenge wana. Nini ekoki kosalisa yo? Luká koyeba mpo na nini mbala mosusu moboti na yo ya sika alingaka yo mingi te koleka mwana oyo aboti. Ntango mosusu ezali te kaka mpo azali mwana na ye ya makila, kasi ezali mpo bafandá bambula mingi elongo. Tókende tózonga, yo mpe olingaka mingi papa to mama oyo aboti yo koleka mobali to mwasi na ye.
Nzokande, tóyeba ete kosalela moto makambo ndenge moko na basusu mpe kosalela ye makambo na bosembo ekeseni mpenza. Moto na moto azali na bizaleli mpe bamposa oyo ekeseni na moto mosusu. Na yango, na esika oluka kaka koyeba soki moboti wana ya sika azali kosalela yo makambo ndenge moko ná basusu,
luká koyeba soki azali kosala makasi mpo akokisa bamposa na yo.Bamposa na yo nini moboti yango akokisaka?
․․․․․
Bamposa nini omoni ete ezali kokokisama te?
․․․․․
Soki omoni ete bamposa na yo mosusu ezali kokokisama te, mpo na nini te kosolola likambo yango na komikitisa nyonso ná moboti yango?
Motema molai efutaka!
Mbala mingi, esɛngaka bambula ebele mpo moboti to baboti ya sika ná bana oyo baboti báfanda malamu ná bana oyo bakuti mpe báfanda na bomoko. Kaka na ntango wana nde mimeseno mpe bizaleli ndenge na ndenge ya bango nyonso ekosangana mpe boyokani ekokɔta. Yango wana, zalá motema molai! Kokanisa te ete bolingo ekokɔta kaka mbala moko boye na libota na bino to ete boyokani ekoya kaka yango moko boye.
Ntango mama na ye abalaki lisusu, Thomas ayokaki mabe mpenza. Mama na bango abotaki bango bana minei, mpe mobali oyo abalaki mama na bango azalaki na bana misato. Thomas akomaki boye: “Tozalaki kobunda mingi, koswana mingi mpe kosilikisana.” Nini esalisaki bango? Thomas alobi boye: “Kosalela batoli ya Biblia nde ebongisaki makambo.”
Okosala nini soki bango nyonso bazali bandeko na yo mpenza ya makila, kasi babɛtisaka yo motó?
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Nsuka mpenza ya likambo eleki ebandeli na yango. Moto ya motema molai aleki moto oyo azali na elimo ya lolendo.”—Mosakoli 7:8.
TOLI
Kofanda ná mwana mwasi to mwana mobali oyo mama to papa na yo aboti ná mobali to mwasi mosusu, ekoki kolamwisa yo bamposa ya kosangisa nzoto. Na yango, kolona te makanisi oyo ekoki kolamwisa mposa ya kosangisa nzoto, mpe kebá ete bilamba mpe bizaleli na yo elamwisa te mposa ya kosangisa nzoto epai ya moto mosusu.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Mbala mosusu bana oyo moboti to baboti na yo wana ya sika baboti, bazali mpe na mokakatano mpo na komesana na bomoi wana ya sika.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Nakozala lisusu na limemya mingi mpo na papa to mama ya sika soki nazali kokanisa makambo ya malamu oyo asalaka mpo na libota mobimba (komá makambo mibale): ․․․․․
Soki bana oyo papa to mama aboti ná mwasi to mobali mosusu baz’okipe ngai te, nakoki kosalela toli oyo ezali na Baroma 12:21 boye: ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna tata to mama oyo abotá ngai, to moboti na ngai ya sika boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Nini ekoki kobangisa moboti na yo ya sika to bana na ye mpo na kokɔta na libota na bino?
● Mpo na nini ezali na ntina ozala na makanisi ete boyokani na yo ná libota wana ya sika ekobonga?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 38]
“Libala ya mibale ya mama ekufaki. Kasi tii lelo nafandaka malamu ná bana oyo abotá ná mobali na ye. Kondima bango lokola bandeko na ngai ezali likambo monene oyo nandimaki te ete ekoki kosalema na bomoi na ngai.”—Tara
[Elilingi na lokasa 39]
Kosangisa mabota mibale ezali lokola kosangisa mai ná sima; ezwaka ntango mingi mpe milende, kasi nsukansuka ekómaka makasi mpe eumelaka