Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosangisa nzoto ekokolisa bolingo na biso?

Kosangisa nzoto ekokolisa bolingo na biso?

Mokapo 24

Kosangisa nzoto ekokolisa bolingo na biso?

Sara akutanaki na Mike eleki kaka sanza mibale, kasi ayokaki lokola ayebi ye banda kala. Batindelanaka bamesaje ntango nyonso, basololaka na telefone ntango molai, mpe babombelanaka likambo te ntango basololaka! Kasi sikoyo, lokola bafandi na motuka ntango sanza ezali kongɛnga, Mike alingi básuka kaka te na kosolola.

Na boumeli ya sanza 2, Mike ná Sara bazalaki kaka kosimbana na lobɔkɔ mpe kopesana mwa babizi. Sara alingi bákende mosika te. Kasi alingi mpe kozanga Mike te. Kaka Mike nde asalaka ete amimona ete aza kitoko mingi mpe na nivo ya likoló. Mpe azali koloba na nse ya motema ete: ‘Kutu ngai ná Mike tolelaná!’

OKOKI mbala mosusu kokanisa epai likambo yango ekosuka. Kasi, mbala mosusu likambo oyo oyebi te ezali ete soki basangisi nzoto, makambo ekobongwana makasi mpo na Mike ná Sara​—mpe na ndenge ya malamu te. Tópesa ndakisa.

Soki outi likoló mpe omibwaki na nse, obuki mobeko oyo babengaka loi de la gravité, mpe okoki kobukana to kokufa. Ezali mpe bongo soki obuki mibeko ya Nzambe, na ndakisa oyo elobi ete: “Bóboya pite.” (1 Batesaloniki 4:3) Kobuka mobeko yango ebimisaka makambo nini? Biblia elobi boye: “Moto oyo asalaka pite, azali kosalela nzoto na ye moko lisumu.” (1 Bakorinti 6:18) Na ndenge nini? Komá awa na nse makambo misato ya mabe oyo ekoki kokómela bato oyo basangisaka nzoto liboso bábalana.

1 ․․․․․

2 ․․․․․

3 ․․․․․

Sikoyo talá makambo oyo okomi. Okomaki makambo lokola maladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, zemi oyo okani te, mpe kobebisa boyokani ná Nzambe? Ezali mpenza makambo ya mabe oyo ekoki kokómela moto nyonso oyo abuki mobeko ya Nzambe oyo epekisi pite.

Atako bongo, okoki komekama. Okoki koloba ete: ‘Eloko moko te ekokómela ngai.’ Kutu, bato nyonso basangisaka nzoto, nakosi? Baninga na yo ya kelasi bamikumisaka mpo na ndenge basangisaka nzoto, mpe emonanaka ete likambo moko te ya mabe ekómelá bango. Mbala mosusu, lokola Sara, oyo tolobelaki na ebandeli, ozali kutu komona ete soki yo ná moninga na yo bosangisi nzoto, bolingo na bino ekokola. Longola yango, nani akolinga básɛka ye mpo ayebá naino mibali te? Eleki malamu te kosangisa nzoto?

Fandá mpe kanisá naino! Ya liboso, bato nyonso te nde basangisaka nzoto. Ya solo, mbala mosusu otángaki ba-rapport oyo emonisaki ete bilenge mingi basangisaka nzoto. Na ndakisa, ankɛtɛ moko oyo esalemaki na États-Unis emonisaki ete ntango basilisaka école secondaire, bilenge mingi basangisaka nzoto. Kasi emonanaki mpe ete mwa ndambo moke ya bilenge basangisaka nzoto te. Tózongela naino baoyo basangisaka nzoto. Bato ya mayele bamonisi ete bilenge yango mingi bakutanaka na makambo ya mpasi lokola:

LIKAMBO YA MPASI 1 MOTEMA MPASI. Bilenge mingi oyo basangisaki nzoto liboso ya kobala balobaka ete na nsima, bayokaki mawa mingi.

LIKAMBO YA MPASI 2 KOZANGA KOTYELANA MOTEMA. Nsima ya kosangisa nzoto, mokomoko abandaka komituna boye: ‘Nani mosusu asangisá nzoto ná ye?’

LIKAMBO YA MPASI 3 KOLƐMBA NZOTO. Bilenge basi mingi bakosepela nde na moto oyo akobatela bango na esika asakana na bango. Mpe bilenge mibali mingi bazalaka lisusu na bolingo te mpo na mwasi oyo andimaki básangisa nzoto ná ye mpo batyaki ye mbamba.

Longola makambo oyo totángi, bilenge mibali mingi balobaki ete bakoki te kobala mwasi oyo asangisá nzoto na bango. Mpo na nini? Mpo balingaka nde mwasi oyo azali naino mobimba!

Soki ozali mwana mwasi, likambo yango ekamwisi yo​—to mpe ntango mosusu esilikisi yo? Simbá likambo oyo: Kosangisa nzoto liboso ya libala ekeseni mosika na ndenge oyo balakisaka na bafilme mpe na televizyo. Bafilme ekumisaka kosangisa nzoto kati na bilenge mpe emonisaka yango lokola lisano ya mabe te to mpe bolingo ya solosolo. Kasi, kokosama te! Bato oyo bakoluka kondimisa yo osangisa nzoto liboso obala bazali nde koluka matomba na bango moko. (1 Bakorinti 13:4, 5) Moto oyo alingaka yo mpenza, akoluka kobebisa yo na nzoto to na makanisi? (Masese 5:3, 4) Mpe moto oyo alukaka mpenza bolamu na yo, akoluka kobebisa boyokani na yo na Nzambe?​—Baebre 13:4.

Soki ozali mwana mobali mpe ozali kolinga mwana mwasi moko, makambo oyo elobami na mokapo oyo esengeli kotinda yo okanisa malamu soki kolinga oyo ozali kolinga ezali ya ndenge nini. Omituna boye: ‘Namibanzabanzaka mpenza mpo na mwana mwasi yango?’ Soki eyano ezali ɛɛ, wapi lolenge malamu mpenza oyo okoki komonisa yango? Osengeli kozala na makasi ya kotosa mibeko ya Nzambe, bwanya mpo na koboya makambo oyo ekoki kotya yo na komekama, mpe kozala na bolingo mpo na koluka matomba na ye. Soki ozali na bizaleli ya ndenge wana, na ntembe te makanisi ya mwana mwasi wana ekokokana na oyo ya mwana mwasi ya sembo Moshulame, oyo alobaki ete: “Bolingo na ngai azali wa ngai mpe ngai nazali wa ye.” (Loyembo ya Salomo 2:16) Na mokuse, akolinga yo makasi!

Ezala ozali mwana mobali to mwana mwasi, soki osangisi nzoto liboso obala, okomisilisa valɛrɛ ndenge okobebisa eloko moko ya motuya mpenza. (Baroma 1:24) Ezali likambo ya kokamwa te ndenge bato mingi bamimonaka na nsima mpamba mpe bazangi ntina, lokola nde batikaki báyiba bango eloko moko ya motuya mingi. Kotika te ete likambo ya ndenge wana ekómela yo. Soki moto az’oluka kondimisa yo ete bósangisa nzoto, na maloba lokola, “Soki olingaka ngai, okosala yango,” lobá na ye na mpiko nyonso, “Soki olingaka ngai, okosɛnga ngai likambo ya ndenge wana te.”

Nzoto na yo ezali na motuya mingi; kobebisa yango te. Monisá ete ozali na makasi ya kotosa mobeko ya Nzambe oyo esɛngi koboya pite. Na nsima, soki obali, okoki kosangisa nzoto. Mpe okosepela na yango mingi, okomitungisa te, okoyoka mawa te, mpe okobanga te, ndenge bato oyo basangisaka nzoto liboso bábala bamitungisaka.​—Masese 7:22, 23; 1 Bakorinti 7:3.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 4 MPE 5, NA VOLIMI 2

NA MOKAPO OYO ELANDI

Kosakana to kosimbasimba binama ya kobotela ezali mpenza mabe?

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Bókima pite. . . . Moto oyo asalaka pite, azali kosalela nzoto na ye moko lisumu.”​—1 Bakorinti 6:18.

TOLI

Soki ozali liboso ya moto oyo azali mwasi to mobali na yo te, salá boye: Soki olingi kosala likambo oyo omoni ete okolinga te baboti na yo bámona yo ozali kosala yango, kosala likambo yango te.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Nsima ya kosangisa nzoto na elenge mwasi moko, mbala mingi elenge mobali akolinga kotika ye mpe koluka mosusu.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Ntango nazali na moto oyo azali mobali to mwasi na ngai te, makambo oyo tosengeli koboya ezali ․․․․․

Soki moto oyo azali mobali to mwasi na ngai te alingi tókutana kaka biso mibale, nakoloba ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Atako moto akoki komekama mpo na kosangisa nzoto liboso ya kobala, mpo na nini ezali mabe?

● Okosala nini soki moto asɛngi yo bósangisa nzoto?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 176]

“Lokola ozali mokristo, ozali na bizaleli oyo bato mosusu basepelaka na yango. Yango wana osengeli kozala ekɛngɛ mpe koboya soki basɛngi yo osala likambo ya mbindo. Zwáká bizaleli yango na motuya. Kobungisa yango te!”​—Joshua

[Elilingi na lokasa 176, 177]

Kosangisa nzoto liboso ya libala ezali lokola kozwa elamba moko ya ntalo mingi mpe kosalela yango lokola tapi ya kopangwisa makolo