Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini baboti batikaka ngai te namisepelisa?

Mpo na nini baboti batikaka ngai te namisepelisa?

Mokapo 37

Mpo na nini baboti batikaka ngai te namisepelisa?

Na kelasi, mokolo ya liboso ya pɔsɔ nyonso na ntɔngɔ, Allison, elenge mwasi moko ya Australie, akutanaka kaka na likambo moko oyo esalaka ye mpasi.

Alobi boye: “Moto nyonso alobelaka makambo oyo asalaki na wikende. Babɛtaka masolo ya kitoko mpenza, na ndakisa bafɛti boni bakendaki mpe mibali boni bapesaki babizi; ata mpe ndenge bakimaki bapolisi oyo bazalaki kolanda bango . . . Ezalaki kobangisa mpenza, kasi ezalaki mpe kosepelisa! Bazongaka na ndako na ngonga ya 5 na ntɔngɔ, kasi baboti na bango bakipaka te. Ngai nasengeli kokende kolala liboso kutu bábanda biyenga na bango!

“Nsima ya kobɛtela ngai makambo oyo basalaki na wikende, baninga na ngai ya kelasi batunaki ngai makambo oyo nasalaki. . . . Nakendaki makita. Nabimaki na mosala ya kosakola. Namonaki lokola nazangaki mpenza eloko moko ya malamu. Yango wana, nayebisaki bango kaka ke nasalaki eloko moko te. Sikoyo batunaki ngai mpo na nini nakendaki na bango te.

“Soki mokolo ya liboso eleki, okokanisa ke makambo esuki wana. Kasi esuki wana te. Mokolo ya mibale, moto nyonso az’olobela makambo oyo akosala na wikende oyo ez’oya! Nafandaka kaka mpe naz’oyoka bango ndenge baz’osolola. Namonaka mpenza ete naza’ libándá ya masano!”

YO MPE okutanaka na likambo ya ndenge wana mokolo ya liboso ya pɔsɔ na ntɔngɔ? Mbala mosusu okanisi ete baninga na yo nyonso bazali komisepelisa, kasi baboti na yo baboyi okende elongo na bango mpe bakangeli yo na kati ya ndako. Elakisi te ke olingi kosala makambo nyonso oyo baninga na yo baz’osala. Olingi kaka omisepelisa ata mwa moke! Na ndakisa, okolinga komisepelisa mingimingi na likambo nini na wikende oyo ez’oya?

□ kobina

□ fɛti

□ kokende concert

□ kokende kotala filme

□ likambo mosusu ․․․․․

Ozali na mposa ya komisepelisa. Ya solo, Mozalisi na yo alingi ete osepela na bolenge na yo. (Mosakoli 3:1, 4) Atako ntango mosusu ezali mpasi mpo ondima yango, baboti na yo mpe balingi omisepelisaka. Kasi, ezali na makambo mibale oyo etungisaka mpenza baboti na yo: (1) okokende kosala nini mpe (2) okozala elongo na banani.

Bongo soki baninga na yo basɛngi yo bóbima elongo, kasi oyebi te soki baboti na yo bakondima to te? Talá makanisi oyo misato mpe makambo oyo ekobimisa.

LIKANISI YA 1 NAKOSƐNGA NZELA TE​NAKOKENDE KAKA

Ntina oyo olingi kosala bongo: Olingi kolakisa baninga na yo ke yo mpe okoki kosala makambo na ndenge na yo. Okanisi ke oyebi mingi koleka baboti na yo, to oz’omemya makanisi na bango te.​—Masese 14:18.

Makambo oyo ekobimisa: Okoki kosepelisa baninga na yo, kasi bakoyeba likambo moko epai na yo: ete ozali mokosi. Soki ozali kokosa baboti na yo, mokolo mosusu okokosa mpe baninga na yo. Soki baboti na yo bamoni ete okosaki bango, bakoyoka mpasi makasi, mpe na ntembe te, bakopekisa yo obimaka! Koboya kotosa baboti na yo mpe kobima kozanga kosɛnga nzela ezali bozoba.​—Masese 12:15.

LIKANISI YA 2 NAKOSƐNGA NZELA TE​NAKOKENDE MPE TE

Ntina oyo olingi kosala bongo: Okanisi malamu mpe omoni ke likambo oyo bokosala kuna eyokani te na makambo oyo Biblia elobaka to mpe bato mosusu oyo bokosangana na bango bakozala baninga malamu te. (1 Bakorinti 15:33; Bafilipi 4:8) Na ngámbo mosusu, oza’ na mposa ya kokende kasi oza’ na makasi te ya kosɛnga nzela epai ya baboti na yo.

Makambo oyo ekobimisa: Soki oboyi kokende mpo oyebi ete ezali malamu te, okobanga te koyanola baninga na yo soki batuni yo mpo na nini oyaki te. Kasi soki oboyi kokende kaka mpo oza’ na makasi te ya kosɛnga nzela epai ya baboti, okotikala na ndako obandi koimaima, mpo oz’okanisa ke baz’opimela yo bisengo.

LIKANISI YA 3 NAKOSƐNGA NZELA​MPE NAKOZELA

Ntina oyo olingi kosala bongo: Oyebi ete baboti na yo bazali na bokonzi likoló na yo mpe ozali komemya makanisi na bango. (Bakolose 3:20) Olingaka baboti na yo mpe olingi te kokosa bango mpe kobima na baninga na yo, mpo yango ekoyokisa bango mpasi. (Masese 10:1) Ozali mpe na libaku ya komonisa ntina oyo olingi kokende kuna.

Makambo oyo ekobimisa: Baboti na yo bakomona ete olingaka bango mpe omemyaka bango. Mpe soki bamoni ke likambo oyo osɛngi eza’ mabe te, bakoki kondima.

Ntina oyo baboti bakoki koboya

Bongo soki baboti na yo baboyi? Yango ekoki kosala yo mpasi. Kasi, soki oyebi mpo na nini baboyi, yango ekosalisa yo otosa mibeko oyo batyeli yo. Na ndakisa, soki baboyi, ekoki kozala mpo na bantina oyo elandi:

Bayebi makambo mingi koleka yo. Soki olingi kokende na libongo, okosepela kobɛta mai (nager) esika oyo ezali na bato oyo basalaka mosala ya kobikisa bato oyo balingi kozinda na mai. Mpo na nini? Mpo ntango oz’osakana na mai, ozali koyeba mpenza te soki likama ezali. Kasi na esika oyo bazali, bato oyo basalaka mosala ya kobikisa baoyo balingi kozinda na mai bamonaka makama malamu mpenza.

Ndenge moko mpe, lokola baboti na yo bayebi makambo mingi koleka yo, mbala mosusu bazali komona makama mosusu oyo ozali komona te. Lokola bato oyo bazali kosala mosala ya kobikisa baoyo balingi kozinda na mai, mokano ya baboti na yo ezali te ya koyiba yo esengo, kasi ya kosalisa yo okima makama oyo ekoki kosilisa yo esengo na bomoi.

Balingaka yo. Baboti na yo bazali na mposa makasi ya kobatela yo. Bolingo nde etindaka bango bándima soki balingi, kasi mpe báboya soki mwaye eza’ te. Ntango osɛngi bango nzela ya kosala likambo moko, bango moko bamitunaka soki bakoki kopesa nzela, mpe soki bakondima makambo oyo ekobima na nsima. Bakondima kopesa yo nzela na likambo yango kaka soki bamindimisi mpenza ete likama moko te ekokómela yo.

Ndenge ya kosala ete baboti na yo bápesa yo nzela

Okoki kotalela makambo minei oyo.

Koloba solo: Liboso, osengeli komituna na bosembo nyonso ete: ‘Mpo na nini nalingi mpenza kokende? Ezali libosoliboso mpo naz’osepela na likambo yango, to mpo nalingi kosepelisa baninga na ngai? Ezali mpo moto moko oyo nasepelaka na ye akozala kuna?’ Na nsima, lobelá baboti na yo solo. Bazalaki bilenge liboso, mpe bayebi yo malamu. Yango wana, bakoyeba kaka nini mpenza ezali kotinda yo okende kuna. Bakosepela na yo soki olobi na bango solo, mpe okozwa matomba na bwanya na bango. (Masese 7:1, 2) Kasi, soki oza’ lokuta, bakobanda kondimela yo lisusu te mpe bakopesa yo lisusu nzela te ya kobima.

Kopona ntango: Kobanda te kosɛngasɛnga baboti na yo makambo ntango kaka bauti mosala to ntango bazali kosala makambo mosusu. Sololá na bango ntango bazali motema ya kokita. Kasi kozela mpe te tii ntango ngonga ekotikala moke mpo obanda kotya bango mbamba mpo báyanola yo. Baboti bakosepela te kozwa ekateli ya mbangumbangu. Soki osɛngi baboti nzela liboso mpenza, mpo bázala na ntango ya kokanisa, bakosepela mpenza ndenge omoniseli bango limemya.

Makambo oyo bokosala: Kobomba makambo mosusu te. Limbolá mpenza likambo oyo olingi kosala. Baboti bakomiyoka malamu te soki ntango batuni yo: “Banani bakozala kuna?” “Mokóló moko akozala?” to “Likambo yango ekosila ntango nini?” yo ozongisi kaka: “Nayebi te.”

Makanisi na yo: Komona baboti na yo te lokola banguna na yo. Moná bango nde lokola baninga na yo, mpo soki totali malamu, bazali mpenza bongo. Soki ozali komona baboti na yo lokola baninga na yo, okoluka koswanisa bango te mpe bango bakozala matata te. Kobimisaka te maloba lokola “Botyelaka ngai motema te,” “Bato nyonso bakokende,” to “Baboti ya baninga na ngai bapesi bango nzela bákende!” Monisá baboti na yo ete okoli mpe okoki kondima ekateli na bango mpe komemya yango. Soki osali bongo, bakosepela na yo. Mpe na nsima, bakondima kopesa yo nzela soki osɛngi bango.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 32, NA VOLIMI 2

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai.”​—Masese 27:11.

TOLI

Soki okei fɛti to esika moko boye, osengeli kokanisa liboso oyo okosala soki makambo ebebi kuna. Liboso okende, yebá oyo okosala to okoloba, mpo soki esɛngi olongwa na esika yango, otikala na lisosoli ya kimya.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Baboti oyo balingaka bana na bango bazalaka ekɛngɛ mingi. Soki bayebi malamu te likambo oyo ozali kosɛnga to soki bayebi te makambo mosusu ya ntina mpo na likambo yango, bakopesa yo nzela te.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki lisosoli na ngai ezali kotungisama mpo na likambo oyo natalaki to nayokaki ntango nakendaki kotala filme moko to nazalaki esika mosusu, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini mbala mosusu ezalaka mpasi oyebisa baboti na yo makambo nyonso oyo basengeli koyeba liboso bázwa ekateli?

● Soki baboti na yo bandimi atako obombeli bango makambo ya ntina, makambo nini yango ekoki kobimisa na nsima?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 268]

“Nasalaki bozoba mingi ntango nazalaki elenge. Makambo mosusu oyo nazalaki kosala mpo na ‘komisepelisa’ ezalaki komonana na nsima ete ezalaki kosepelisa te. Makambo nyonso oyo osalaka ekolanda yo. Naz’oyoka mawa ndenge nayokelaki baboti na ngai te.”​—Josué

[Elilingi na lokasa 269]

Lokola bato oyo basalaka mosala ya kobikisa baoyo balingi kozinda na mai, baboti na yo bamonaka malamu bisika oyo makama ezali