Nasengeli koloba makambo oyo nasalaka na kobombana?
Mokapo 16
Nasengeli koloba makambo oyo nasalaka na kobombana?
□ Komɛla masanga
□ Kotambola na bilenge oyo baboti na yo bamonaka ete bazali baninga mabe
□ Koyoka miziki ya mabe
□ Kokende bafɛti ya mabe
□ Kolingana na moto na kobombana
□ Kotala bafilme ya mobulu, ya makambo ya nsɔni to kobɛta masano ya video ya mobulu
□ Kolobaka lokola bato ya mobulu
Baroma 2:15) Atako bongo, ezalaka mpasi koyebisa baboti na yo makambo mabe oyo osalaka. Soki okanisi ete baboti na yo bakosilika soki oyebisi bango, okoki kokanisa lokola bato mosusu oyo balobaka ete soki moto ayebi likambo te, esalaka ye mpasi te. Kasi, esi ekómelá yo okóma na bomoi ya lolenge mibale? Ekoki kozala ete nini etindaki yo mbala mosusu okóma kosala bongo?
TALÁ liste ya makambo oyo ezali na lokasa oyo ezali na lobɔkɔ ya mwasi. Osalaka makambo yango kozanga ete baboti na yo báyeba? Soki ezali bongo, ntango mosusu oyebi ete kosala boye ezali mabe. Kutu, mbala mosusu lisosoli na yo etungisamaka. (Mposa ya kosala oyo olingi
Biblia elobaka ete “mobali akotika tata na ye ná mama na ye.” (Ebandeli 2:24) Kasi, tokoki mpe koloba bongo mpo na mwasi. Moto nyonso azalaka na mposa akola, akanisa ndenge bomoi na ye ekozala mpe azwaka bikateli ye moko. Nzokande, soki baboti bapekisi bango kosala likambo moko oyo bamoni ete ezali mabe, bilenge mosusu batombokaka.
Toboyi te, baboti mosusu bazalaka makambo makasi. Elenge mwasi moko na nkombo Catherine alobi boye: “Baboti na biso balingaka te tótala ata filme moko.” Abakisi boye: “Papa apekisá biso koyoka miziki nyonso!” Soki bamoni ete baboti bazali kotyela bango mibeko ya makasi, bilenge mosusu babandaka kolula baninga oyo baboti na bango batikelá bango bonsomi mingi.
Elenge mwasi mosusu na nkombo Patricia amonisaki likambo mosusu oyo etindaka bilenge mosusu basalaka makambo mabe na kobombana: mpo baninga ya kelasi bándima bango. Alobi boye: “Nabandaki na elobeli ya balabala na kelasi. Nazalaki komimona ete nakómi lokola bilenge mosusu. Na nsima, nakómaki komeka komɛla makaya. Nakómaki mpe komɛla masanga tii na mwa kwiti. Na nsima, nakómaki kobima na bana mibali; kasi nazalaki kosala yango na kobombana mpo baboti na ngai bazalaki kolinga ata moke te nasala bongo.”
Elenge moko na nkombo Pierre akutanaki mpe na likambo ya ndenge wana: “Ntango nazokola, baboti na ngai bateyaki ngai mateya ya Batatoli ya Yehova. Kasi, nazalaki kobanga ete baninga básɛka ngai.” Pierre asalaki nini mpo baninga bátika kosɛka ye? Alobi boye: “Nalingaki nayebana mingi. Nazalaki kopesa biyano ndenge na ndenge ya lokuta soki batuni ngai ntina oyo nazwaka bakado te na mikolo ya fɛti.” Pierre abandaki naino kobuka mibeko na makambo ya mikemike, mpe eumelaki te, akómaki mpenza kosala makambo ya mabe koleka.
Yehova amonaka makambo nyonso
Kosala mabe na kobombana ebandi lelo te. Bayisraele mosusu balukaki kobomba mabe oyo bazalaki kosala mpe bakanisaki ete Nzambe akomona te. Kasi, mosakoli Yisaya akebisaki bango boye: “Mawa na baoyo bazali kozinda mpenza mosika mpo na kobombela Yehova ye moko mokano na bango, mpe baoyo makambo na bango esalemi na esika ya molili, wana bazali koloba: ‘Nani azali komona biso, mpe nani azali koyeba biso?’” (Yisaya 29:15) Bayisraele babosanaki ete Nzambe azalaki komona nyonso oyo bazalaki kosala. Na ntango oyo abongisaki, abengaki bango bázongisa monɔkɔ mpo na mabe oyo basalaki.
Ezali mpe bongo lelo oyo. Ata soki okoki kobombela baboti na yo mabe oyo osalaka, okoki te kobombela Yehova Nzambe. Mokanda ya Baebre 4:13 elobi ete: “Biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.” Yango wana, ntina ya kosala mabe na kobombana ezali te! Kobosana te ete Nzambe akosepela na yo te kaka mpo otutaka ntolo ete osambelaka mpo oyanganaka na makita. Yehova ayebaka ntango bato bazali ‘kokumisa ye na mbɛbu, kasi motema bango ezali mosika na ye.’—Marko 7:6.
Oyebaka ete bato oyo basalaka mabe na kobombana bayokisaka Yehova mawa? Ekoki nde kosalema? Ɛɛ, ekoki kosalema! Ntango Bayisraele batikaki Mobeko ya Nzambe, “bayokisaki Mosantu ya Yisraele motema mpasi.” (Nzembo 78:41) Ayokaka mpenza mpasi ntango bilenge oyo babɔkwami na “disiplini mpe na makebisi ya Yehova” bazali kosala mabe na kobombana!—Baefese 6:4.
Sembolá makambo
Ya solo, kaka yo nde osengeli koloba makambo ya mabe oyo osalaka na kobombana epai ya Nzambe mpe baboti na yo. Toyebi ete soki osali yango okoyoka nsɔni mpe mbala mosusu okoki kozwa etumbu. (Baebre 12:11) Na ndakisa, soki kokosa ekómaki momeseno na yo, ntango mosusu baboti na yo bakotyela yo lisusu mpenza motema te. Na yango, kokamwa te soki mpo na mwa ntango, bakómi kopekisa yo makambo mingi koleka ndenge ezalaki liboso. Atako bongo, koyebisa mabe na yo ezali likambo eleki malamu. Mpo na nini?
Tózwa ndakisa oyo: Kanisá ete libota na bino mobimba bokei kozwa mopɛpɛ. Ntango baboti na yo bazali kotala te, obuki mobeko oyo bapesaki ya kozala esika moko, mpe okómi mosika na bango mpe obungi. Mbala moko, epai okei omoni ete okɔti na pɔtɔpɔtɔ mpe obandi kozinda. Okoyoka nsɔni kobelela
mpo báya kosalisa yo? Okobanga mpo baboti na yo bakopesa yo etumbu ndenge otosaki te? Te! Kutu, okobelela na mongongo makasi.Ndenge moko mpe, soki ozali kosala mabe na kobombana, esengeli básalisa yo nokinoki. Kobosana te ete okoki te kozonga nsima mpe kolongola makambo mabe oyo osalá. Kasi, okoki kobongisa avenire. Ata soki ekosala yo mpasi ndenge nini, ezali mpenza na ntina oluka lisalisi ya baboti na yo liboso osala mabe moko oyo ekotungisa yo to libota na yo. Soki oyoki mpenza mawa mpo na bomoi ya mabe oyo ozalaki na yango, Yehova mpe akoyokela yo mawa.—Yisaya 1:18; Luka 6:36.
Masese 27:11; 2 Bakorinti 4:2.
Yango wana, kobombela baboti na yo te. Kokamwa te ete esala bango mpasi. Ndimá disiplini oyo bakopesa yo. Soki osali bongo, baboti na yo bakosepela, Yehova Nzambe mpe akosepela. Yo moko mpe okoyoka mpenza ete motema ekiti mpo lisosoli na yo ekómi lisusu pɛto.—Yo ná baninga na yo ya kelasi bokokani na makambo ebele. Kasi, makambo nini osengeli koyeba na ntina etali kosala boninga na kelasi?
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te, kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.”—Masese 28:13.
TOLI
Kozwa mabunga na yo na lisɛki te; kasi kebá okwea te na motambo ya kokanisa ete okobonga lisusu te. Kobosana te ete Yehova alimbisaka na motema moko.—Nzembo 86:5.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Soki lisosoli ya moto ezali kotungisama, ekoki kozala malamu; yango ekoki kotinda ye atika kosala mabe. Kasi, moto oyo atingamaka kaka kosala lisumu abebisaka lisosoli na ye. Lisosoli na ye ekotika kosala, ekokóma lokola mposo oyo eziki na mɔtɔ mpe na nsima ekómi makasi.—1 Timote 4:2.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Soki nasalaka mabe na kobombana, nakoyebisa ․․․․․
Nakoki kondima disiplini nyonso oyo bakopesa ngai soki ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Nini etindaka bilenge mosusu básalaka mabe na kobombana?
● Wapi mwa makama ya kosala mabe na kobombana?
● Mpo na nini ezali na ntina kotika kosala mabe na kobombana?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 140]
‘‘Nakanisi ete bilenge basengeli komimonisa ete bazali bakristo oyo batosaka makambo oyo Nzambe alobaka. Basengeli kosala yango nokinoki. Soki bazeli ntango molai, ekómaka mpasi.’’—Linda
[Elilingi na lokasa 141]
Soki ozali kozinda na kati ya pɔtɔpɔtɔ, elingi koloba ezaleli ya kobombaka makambo mabe oyo ozali kosala, osengeli kosɛnga lisalisi