Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bongo soki nazali na libota ya babola?

Bongo soki nazali na libota ya babola?

Mokapo 20

Bongo soki nazali na libota ya babola?

Gregory, elenge moko na Mpoto ya Ɛsti, akokaka te kosomba bilamba mpe baaparɛyi oyo bilenge mosusu ya mboka yango bazali kosomba. Lokola azalaki koyoka mawa mpenza, alingaki kokende kofanda na Autriche. Okanisi ete Gregory azali mobola?

□ Ɛɛ □ Te

Loyiso, azali elenge moko oyo afandaka na mboka moko oyo ezali na sudi ya Afrika. Lokola bafandaka na mwa ndako ya matiti, Loyiso alulaka bilenge ya engumba na bango, oyo bazali na “bomoi ya malamu”​—bazali na mai ná kura. Okoloba ete Loyiso azali mobola?

□ Ɛɛ □ Te

MPO na koloba solo, mboka na mboka ezali na ndenge na yango ya kolimbola liloba “mobola.” Na ndakisa, Gregory akoki kokanisa ete azali mobola ya nsuka, kasi soki tokokanisi ye na Loyiso, tokomona ete ye azali na bomoi ya malamu. Osengeli koyeba ete ata soki ozali mobola ya ndenge nini, ezali na bato mosusu oyo bazali babola koleka yo. Nzokande, ntango ozali te na bilamba ya malamu ya kolata na kelasi to ntango ozangi biloko ya ntina lokola mai ya pɔmpi, motema na yo ekokita mpenza te soki bayebisi yo ete bato mosusu bazangi koleka.

Bilenge mosusu oyo bakolá na mabota ya bobola bamiyokaka ete bazangi ntina mpe bamonaka ete basusu baleki bango, mpe bamipesaka na masanga mpe bangi mpo na kobosana mpasi na bango. Nzokande, koluka kokima makambo ndenge wana ebebisaka nde kobebisa. Baoyo bamipesaka na masanga bamonaka ete “eswaka lokola nyoka, mpe ebimisaka ngɛngɛ lokola etupa.” (Masese 23:32) Maria, elenge mwasi moko ya Afrika ya Sudi, oyo abɔkwamá na moboti kaka moko ya mobola, alobi boye: “Koluka kokima makambo ya bomoi ebimisaka mikakatano mosusu na esika ebongisa makambo.”

Mbala mosusu, okomipesa na masanga to bangi te, kasi okoki komona ete ozali na elikya moke mpo bomoi na yo ebonga. Epai wapi okoki koluka toli? Batoli ya Biblia ezali lokola fungola oyo ekoki kofungola minyɔlɔlɔ mpe kopesa yo elikya, ekoki kosalisa yo okóma na makanisi ya malamu. Na ndenge nini?

Talelá biloko oyo ozali na yango

Likambo ya malamu oyo okoki kosala ezali kotya makanisi te na biloko oyo ozangi, kasi nde na biloko oyo ozali na yango. Na ntembe te, biloko lokola ndako mpe libota ya esengo ezali na ntina mingi koleka mbongo! Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Elubu ya ndunda, epai bolingo ezali, ezali malamu koleka ngɔmbɛ-mobali ya mafutamafuta mpe koyina elongo na yango.” (Masese 15:17) Bilenge bakristo bazali na eloko moko ya motuya mingi​—bazali na lisungi ya “lisangá mobimba ya bandeko.”​—1 Petro 2:17.

Mbala mosusu, okoki mpe komeka kotalela biloko na yo ya mosuni na ndenge ya malamu koleka. Ya solo, mbala mosusu ofandaka na ndako moko ya bongobongo kaka. Ozali na bilamba ya kala, oyo enzuluka, to ya bibamba. Mpe okoki kozala na mposa ya kolya bilei ndenge na ndenge. Kasi esengeli kaka ozala na bilamba soki ya modɛlɛ nini to ndako ya kitoko mpo osepelisa Nzambe? Osengeli kaka kolyaka bilei ya malamu ndenge na ndenge mpo ozala na bomoi mpe na nzoto kolɔngɔnɔ? Mpenza te. Ntoma Paulo azwaki liteya kitoko na likambo yango. Ntango moko azalaki na biloko mingi, ntango mosusu azangaki. (Bafilipi 4:12) Asukisaki ndenge nini? “Soki tozali na bilei pe bilamba, wana ekoki na biso.”​—1 Timote 6:8, Bible na lingala ya lelo oyo.

Eldred, mobali moko ya Afrika ya Sudi oyo akolá na libota ya bozwi mingi te, alobi boye: “Tozalaki kaka kondima ete libota na biso ezali na mbongo mingi te mpe ete tokokaki te kozwa eloko nyonso oyo tolingi.” Eldred akanisi lisusu ntango azalaki kotánga, patalo na ye etɔbɔkaki, mpe mama na ye azalaki kobambabamba yango mbala na mbala! Eldred alobi boye: “Nasengelaki kokanga motema soki basɛki ngai. Kasi, likambo eleki ntina ezali ete bilamba na biso ezalaki pɛto mpe ekokaki kolatama.”

Yekolá komipesa kilo

James, elenge ya mbula 11, afandaka ná mama na ye mpe leki na ye ya mwasi na mwa mboka moko ya bongobongo pene na Johannesburg, na Afrika ya Sudi. Bazalaki babola mpenza. Nzokande, James azalaki na biloko ya motuya​—ntango mpe makasi na ye—​mpe azalaki kosalela yango mpo na kosalisa basusu. Na bawikende nyonso, James azalaki komipesa mpo na kosalisa na mosala ya kotonga Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na mboka na bango. Na mosala yango asalelaka ntango na ye malamu, oyo ekokaki koleka kaka mpamba kasi mpe esalisaka ye amona ete asali mosala ya ntina mpe ete ye moko mpe azali na ntina. Alobi boye: “Nsima ya kolekisa mokolo mobimba esika bazali kotonga Bandako ya Bokonzi, nayokaka esengo na motema!”

Likambo mosusu ya malamu ya kosala ezali kosakola Biblia na ndako na ndako. (Matai 24:14) Bilenge Batatoli ya Yehova bamipesaka na mosala yango kozanga kotika. Na ndenge yango, bazali kopesa basusu elikya ya bomoi ya malamu na mikolo oyo ezali koya, bazali mpe kopesa nzoto na bango kilo mpe kobatela lokumu na bango. Ya solo, bafutaka bango te mpo na mosala yango. Kasi, kobosana te maloba oyo Yesu atindelaki bakristo ya lisangá ya Simirna ya kala. Bazalaki babola makasi na mosuni. Atako bongo, lokola bazalaki kokangama makasi na Yehova, Yesu alobaki na bango boye: “Nayebi bolɔzi na yo mpe bobola na yo​—kasi ozali mozwi.” Nsukansuka, lokola misala na bango emonisaki ete bazalaki mpenza kondimela makila ya Yesu oyo esopanaki, bakokóma mpenza bazwi, bakozwa motole ya bomoi oyo ezangi kufa.​—Emoniseli 2:9, 10.

Zalá na elikya

Moto nyonso, mobola to mozwi akoki kokóma na boyokani makasi ná Yehova. Biblia elobi boye: “Mozwi mpe moto oyo akelelá bakutani. Mokeli na bango nyonso ezali Yehova.” (Masese 22:2) Likambo yango esalisi bankóto ya bilenge Batatoli ya Yehova bázala malamu atako bobola ezali. Bandimaka ete esengo eutaka, na kozala na biloko mingi ya mokili te, kasi na kokóma moninga ya Yehova Nzambe, oyo ayambaka bato nyonso oyo balingi kosalela ye. Nzambe apesi elikya ya kozala na bomoi na mokili ya sika oyo ezangi bobola.​—2 Petro 3:13; Emoniseli 21:3, 4.

Liboso ntango yango ekóma, salelá na mayele biloko oyo ozali na yango. Zalá na elikya. Omibombela biloko ya motuya ya elimo. (Matai 6:19-21) Monáká bobola lokola mokakatano oyo okoki kolonga!

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.”​—Luka 12:15.

TOLI

Kobɛta te masano ya mbongo, komɛla likaya te, mpe komɛla masanga mingi te. Soki bato mosusu ya libota na yo basalaka bongo, ezaleli na yo ya malamu ekoki koteya bango.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Kotosa mitinda ya Biblia ekoki kosalisa yo oyeba kosepela na oyo ozali na yango ata soki bomoi na yo ezali ndenge nini.​—Bafilipi 4:12, 13; 1 Timote 6:8; Baebre 13:5.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Biloko oyo nazali na yango ․․․․․

Mpo nakosalela biloko yango mpo na kosalisa basusu, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini liloba “mobola” ezali na ndimbola ndenge moko te na mikili ndenge na ndenge?

● Mpo na nini ezali mabe komɛla bangi, masanga, to bilangwiseli mosusu mpo na kokima mikakatano ya bomoi?

● Makambo nini okoki kosala mpo ozala malamu atako bobola ezali?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 168]

“Atako nakokaki kokima bobola te, namonaki ete komikɔtisa na etuluku ya babandi to koyiba mpo na kobikela ekosalisa ata moke te. Lelo, baninga mingi ya mbula na ngai oyo basalaki makambo yango babebisá bomoi na bango, bakóma baombo ya masanga mpe bangi, to mpe bakɔtá bolɔkɔ.”​—George

[Etanda/​Bililingi na lokasa 164]

Etanda ya mituna

Nasengeli kokende na mboka mopaya?

Bilenge mosusu balingaka kokende na mboka mopaya mpo na koluka mbongo, ezala mpo na bango moko to mpo na kosunga mabota na bango. Bamosusu bakendaka mpo na koyekola monɔkɔ moko ya bapaya, kokoba kelasi, to mpo na kokima mikakatano ya ndako. Bilenge bakristo mosusu bakendaki na mikili mosusu epai mposa ya basakoli ezali mingi. Kokende na mboka mopaya ezali ekateli moko monene mpe esengeli kozwa yango na lisɛki te. Yango wana, soki ozali kokanisa kokende kofanda na mboka mopaya, tángá mpe kanisá malamumalamu bavɛrsɛ oyo ezali awa na nse. Omituna mituna mpe okoma biyano na yo na papye. Na nsima, bondelá mpo na kozwa ekateli.

□ Makambo nini Leta asɛngaka?​—Baroma 13:1.

□ Ekosɛnga mbongo boni mpo na kokende na mboka mopaya?​—Luka 14:28.

□ Makambo nini nazali kosala sikoyo oyo emonisi ete nakokoka kokokisa bamposa na ngai ya mosuni na mboka mopaya?​—Masese 13:4.

□ Toli nini nazwi epai ya bato oyo bakɔmɛli oyo bafandá na mboka mopaya?​—Masese 1:5.

□ Baboti na ngai bakanisi nini na likambo yango?​—Masese 23:22.

□ Nini ezali kotinda ngai nakende na mboka mopaya?​—Bagalatia 6:7, 8.

□ Soki nakofanda ná bato mosusu, bakolendisa ngai nabatela bizaleli malamu ya kokangama na Yehova?​—Masese 13:20.

□ Nakoki kokutana na makama nini na bizaleli, na nzoto mpe na elimo?​—Masese 5:3, 4; 27:12; 1 Timote 6:9, 10.

□ Matomba nini nazali mpenza kolikya kozwa soki nakei na mboka mopaya?​—Masese 14:15.

[Elilingi na lokasa 167]

Toli ya Biblia ezali lokola fungola oyo ekoki kofungola minyɔlɔlɔ mpe kopesa yo elikya