Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nakosala nini soki nazosepela na nzoto na ngai te?

Nakosala nini soki nazosepela na nzoto na ngai te?

Mokapo 7

Nakosala nini soki nazosepela na nzoto na ngai te?

Osepelaka te ndenge nzoto na yo ezali?

□ Ɛɛ □ Te

Ekómelá yo oboya kolya mingi mpo okɔnda?

□ Ɛɛ □ Te

Likambo to makambo nini ya nzoto na yo okolinga kobongola soki ozwi likoki? (Tyá elembo na makambo yango.)

Bolai

Bonene

Loposo

Kilo

Nsuki

Mongongo

SOKI oyanoli ɛɛ na mituna mibale ya liboso mpe oponi makambo misato to koleka na motuna ya misato, talelá likambo yango na ndenge ya malamu: Mbala mosusu bato batalelaka yo te ndenge yo moko omitalelaka. Ezalaka mpasi te moto amitungisa koleka ndelo mpo na nzoto na ye. Kutu, ankɛtɛ moko emonisaki ete mbala mingi bilenge basi babangaka kokóma na kilo mingi koleka ndenge babangaka etumba ya nikleere, maladi ya kanser, ata mpe liwa ya baboti na bango!

Ezali solo ete ndenge nzoto na yo ezali, ekoki kotinda yo omitalela boye to boye, yango ekoki kotinda basusu bátalela yo mpe bongo. Marina, elenge mwasi moko ya mbula 19 alobi boye: “Ntango tozalaki kokola, bayaya na ngai mibale ya basi bazalaki kitoko mingi, kasi ngai nazalaki monene. Na eteyelo, bazalaki kosɛka ngai mingi. Longola yango, mama leki abandaki kobenga ngai (Chubby), nkombo ya mbwa na ye oyo ezalaki mokuse mpe monene!” Julie, oyo azali na mbula 16 akutanaki mpe na likambo yango. Alobi boye: “Mwana mwasi moko na eteyelo azalaki kosɛka ngai mpe azalaki koloba ete mino na ngai ezali lokola ya lapin. Atako ezalaki na yango likambo ya monene te, ezalaki kosala ngai mabe, mpe ata lelo, nayokaka nsɔni mpo na mino na ngai!”

Esengeli komitungisa mingi mpo na yango?

Ezali mabe te kokanisa mpo na nzoto na yo. Kutu, Biblia elobeli na ndenge ya malamu basi mpe mibali mingi ya kitoko, na ndakisa Sara, Rashele, Yozefe, Davidi, mpe Abigaile. Biblia elobi ete mwasi moko na nkombo Abishage azalaki “kitoko mingi mpenza.”​—1 Bakonzi 1:4.

Kasi, bilenge mingi bamitungisaka mpo na nzoto na bango. Na ndakisa, bana basi mosusu bakanisaka ete kozala kitoko elimboli kozala nzoto mike, mpe bato mingi bandimaka likanisi yango. Emonani ete bazulunalo oyo ezalaka na bafɔtɔ kitoko ya ba-mannequin ya nzoto mike mpo na kosala piblisite ezali mpenza kolendisa likanisi yango. Babosanaka ete bafɔtɔ yango ebongisamaka na ordinatɛrɛ mpo ebima kitoko mingi mpe ete ba-mannequin yango bamibomaka nzala mpo bátikala nzoto mike! Atako bongo, komikokanisa na bato oyo ozali komona na bazulunalo yango ekoki kaka kosala yo mpasi. Okosala nini soki osepelaka mpenza na nzoto na yo te? Ya liboso, osengeli komitala na ndenge ebongi.

Omimonaka ete ozali kitoko te?

Osilá komitala na talatala oyo ebimisaka bato mabe? Ekoki kobimisa yo monene to moke koleka ndenge ozalaka mpenza, nzokande ozalaka bongo te.

Ndenge moko mpe, bilenge mingi bamimonaka ete bazali kitoko te. Na ndakisa: Na ankɛtɛ moko, bana basi 58 kati na bana basi 100 balobaki ete bazali minene mingi, nzokande kaka 17 nde bazalaki bongo. Na ankɛtɛ mosusu, basi 45 kati na basi 100 oyo bazalaki na kilo moke bazalaki kokanisa ete bazali na kilo mingi!

Minganga mosusu balobi ete bilenge basi mingi oyo bamitungisaka mpo na kilo na bango basengeli mpenza komitungisa te. Mbala mosusu likambo yango ekoki kotungisa yo, mingimingi soki ozali mpenza monene. Soki ezali mpe bongo mpo na yo, ekoki kozala mpo na nini?

Ekoki kozala likambo ya libota. Bato mosusu bayaka minene te mpe bazali nzoto mike ya kobotama. Kasi, soki ba-gènes na yo ebongisá yo mpo ozala na elongi etondá mpe ozala monene, okelamá mpenza te mpo ozala nzoto mike. Ata soki minganga bandimi ete ozali na kilo ya malamu, mbala mosusu okoki kozala na kilo mingi koleka oyo olingaka. Ngalasisi mpe koboya kolya biloko mosusu ekoki kosalisa, atako bongo okoki mpenza te kobongola nzoto oyo obotamá na yango.

Likambo mosusu ekoki kozala bambongwana oyo eyaka na bolenge. Ntango mwana mwasi abandi kokóma elenge, mafuta oyo ezali na nzoto na ye ebakisamaka, elongwaka na 8 % mpe ekómaka soki 22 %. Mbala mingi, likambo yango ebongwanaka na nsima ya mwa bambula, mpe mwana mwasi ya mbula 11 to 12 oyo azalaki monene mingi, akoki kokóma na monene ya kitoko soki akómi elenge. Kasi, okosala nini soki nzoto na yo ezali bongo mpo olyaka malamu te to mpo osalaka ngalasisi te? Okosala boni soki esengeli mpenza kokitisa kilo mpo obatela nzoto na yo kolɔngɔnɔ?

Zalá na bokatikati

Biblia elendisi biso ‘tólekisaka ndelo te na bizaleli na biso.’ (1 Timote 3:11) Na yango, komiboma nzala te to kosala ba-régime ya makasimakasi te. Mbala mosusu, ndenge oyo eleki malamu mpo na kokitisa kilo ezali nde kosala programɛ malamu ya kolya mpe kosalaka mwa ngalasisi.

Ezali na ntina te kolanda régime oyo bato bazali kokumisa. Na ndakisa, bankisi ya kokɔndisa nzoto ekoki kokitisa mposa na yo ya kolya mpo na mwa ntango; kasi nzoto ekoumela te komesana na yango, mpe mposa na yo ya kolya ekozonga. To estoma na yo ekobanda konika bilei malɛmbɛmalɛmbɛ, mpe okozongela bakilo oyo obungisaki​—kobosana mpe te bampasi oyo bato mosusu bamonaka, na ndakisa, kizunguzungu, tansiɔ komata, kobangabanga, mpe ata kokóma moombo ya bankisi yango. Ezali mpe ndenge moko mpo na bankisi oyo esubisaka mingi to oyo esalaka ete estoma enika bilei mbangumbangu.

Nzokande, programɛ malamu ya kolya, mpe kosala mwa ngalasisi mbala na mbala ekosalisa yo ozala malamu mpe omiyoka malamu. Kosala ngalasisi mbala mingi na pɔsɔ ekosalisa yo mpo ozala nzoto kolɔngɔnɔ. Okoki na ndakisa, kotambolaka mbangumbangu to komataka eskalye.

Kebá na motambo ya koboya kolya!

Kaka mpo na koluka kokɔnda, bilenge mosusu bakweaki na motambo ya koboya kolya to anorexie​—mpe yango etindaka moto akóma komiboma nzala. Sanza soki minei nsima ya kozwa lisalisi mpo na maladi ya anorexie, Masami alobaki boye: “Soki moto alobi na ngai ‘okómi kitoko,’ na nse ya motema nalobaka ete, ‘Ezali kaka mpo nayei monene.’ Na ntango wana, nazalaki kolela na motema mpe kokanisa ete, ‘Soki nazongelaka ata kilo oyo nazalaki na yango liboso​—kilo oyo nazalaki na yango na sanza minei oyo euti koleka!”

Anorexie ekoki koya kozanga ete moto ayeba. Elenge mwasi akoki kobanda kosala mwa régime oyo emonani ete ekosala ye mabe te, mbala mosusu mpo na kolongola kaka mwa bakilo. Kasi, ntango alongoli bakilo yango, asepeli kaka te. Ntango amitali na talatala, amimoni mabe mpe alobi: “Nazali kaka monene!” Na yango, alingi kolongola lisusu mwa bakilo. Na nsima, kaka mwa moke lisusu nde ekiti. Mpe mwa moke lisusu. Na ndenge yango nde anorexie ebandaka.

Soki omoni bilembo ya anorexie to soki okómi kolya na ndenge ebongi te, osengeli koluka lisalisi. Sololá na moboti na yo to na mokóló moko oyo otyelaka motema. Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”​—Masese 17:17.

Kitoko ya solosolo ezali nini?

Biblia epesaka motuya mingi te na kitoko to bonene ya nzoto ya moto. Kasi, bomoto ya kati nde esalaka ete moto azala kitoko to te na miso ya Nzambe.​—Masese 11:20, 22.

Tózwa ndakisa ya Abisalome, mwana ya Mokonzi Davidi. Biblia elobi boye: “Na Yisraele mobimba, ezalaki na mobali moko te oyo akokanaki na Abisalome na kitoko, oyo bazalaki kokumisa mingi. Banda na lokolo na ye tii na motó azalaki ata na mbeba moko te.” (2 Samwele 14:25) Kasi, elenge mobali yango azalaki mokosi. Lolendo mpe mposa ya lokumu etindaki ye aluka kobɔtɔla kiti ya bokonzi ya mokonzi oyo Yehova atyaki. Na yango, Biblia ekumisi Abisalome te, kasi emonisi ete azalaki moto ya kozanga bosembo, moto asilá nsɔni mpe oyo mpo na likunya abomaki bato.

Likambo eleki ntina ezali ete “Yehova amekamekaka mitema mpo na koyeba ndenge ezali”​—kasi te mpo mwana mwasi azali monene to mpo elenge mobali azali na bapake. (Masese 21:2) Na yango, atako ezali mabe te koluka komonana kitoko, bizaleli na yo ezali na ntina mingi koleka kitoko ya nzoto. Nsukansuka, kotosa toli ya Nzambe nde ekokómisa yo kitoko na miso ya bato koleka kozala bapake to monene!

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 10, NA VOLIMI 1

NA MOKAPO OYO ELANDI

Bilenge mingi bazali kotungisama na maladi oyo esilaka te to bazali bibɔsɔnɔ. Soki ezali bongo mpo na yo, okosala ndenge nini?

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

Moto amonaka oyo emonanaka na miso; kasi Yehova, amonaka ndenge motema ezali.”​1 Samwele 16:7.

TOLI

Soki olingi okitisa bakilo . . .

● Koboya te komɛla ti na ntɔngɔ. Soki olekisi yango, nzala ekokanga yo mpe ekoki kotinda yo olya mingi koleka ndenge olingaki kolya.

● Mɛlá mai mingi liboso ya kolya. Yango ekokitisa mposa na yo ya kolya mpe ekosalisa yo olya mingi te.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Minganga balobaka ete soki ozali komiboma nzala mpo okɔnda, nzoto na yo ekoki kobanda kosala lokola nde “ezangi bilei,” estoma ekobanda konika bilei malamu te, mpe okozongela nokinoki bakilo oyo okitisaki!

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Nakoki kobatela nzoto na ngai malamu koleka soki nasali boye ․․․․․

Mpo na ngai, programɛ malamu ya ngalasisi esengeli kozala na ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Omonaka ete nzoto na yo ezali ndenge nini?

● Wapi mwa makambo ya malamu oyo okoki kosala mpo na kobongisa nzoto na yo?

● Okoloba nini na moninga oyo akómi kolya na ndenge ebongi te?

● Ndenge nini okoki kosalisa leki na yo ayeba kotalela nzoto na ye na bokatikati?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 69]

“Na boumeli ya ntango molai, bazalaki kosɛka ngai ete nazali na miso minene. Nayekolaki ndenge ya kolekisa yango na masɛki mpe ya kosepela na bomoto mpe na bizaleli na ngai ya malamu. Nayekolaki kondima nzoto na ngai ndenge ezali.”​—Angèle

[Elilingi na lokasa 68]

Ndenge omimonaka ekoki kozala lokola komitala na talatala ya monyato