Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mabe ezali wapi soki nasangisi nzoto liboso nabala?

Mabe ezali wapi soki nasangisi nzoto liboso nabala?

Mokapo 5

Mabe ezali wapi soki nasangisi nzoto liboso nabala?

“Nayokaka mposa ya komeka soki kosangisa nzoto ezalaka ndenge nini.”​Karine.

“Namimonaka nsuka ya yuma mpo nayebi naino nzoto ya mwasi te.”​Arnaud.

“OSANGISÁ naino nzoto te?” Motuna ya boye ekoki kosala malili na nzoto! Na bisika mingi, bato bakamwaka soki bayebi ete elenge songolo asangisá naino nzoto te, bamonaka ete azali moto te! Yango wana, tokoki kokamwa te soki bilenge mingi basangisaka nzoto ntango bazali naino mike.

Epai mposa ya nzoto, epai mosusu baninga bazali kotya mbamba!

Soki ozali mokristo, oyebi malamu ete Biblia elobi ‘oboya pite.’ (1 Batesaloniki 4:3) Atako bongo, mbala mosusu omonaka ete kopekisa bamposa ya nzoto ezali mpasi. Elenge moko na nkombo Paul alobi boye: “Ntango mosusu makanisi ya kosangisa nzoto eyelaka ngai yango moko; eyaka kaka boye.” Soki likambo yango ekómelaka mpe yo, yebá ete ekómelaka mpe bato mosusu.

Kasi, esalaka mpasi soki baninga bazali kosɛka to kotumola yo mpo osangisá naino nzoto te! Na ndakisa, okoyoka ndenge nini soki baninga na yo balobi na yo ete soki osangisá naino nzoto te okómi naino mwasi to mobali ya solosolo te? Ellen alobi boye: “Baninga bamonisaka ete kosangisa nzoto ezalaka elɛngi mpe ezali likambo oyo moto nyonso asengeli kosala. Soki ozwaka mibali to basi te, oza’ mpenza yuma.”

Nzokande, ezali na likambo moko ekómelaka bilenge oyo basangisaka nzoto atako babalani naino te, oyo ntango mosusu baninga na yo balobelaka te. Na ndakisa, Maria, elenge moko oyo asangisaki nzoto ná mwana mobali moko, alobi boye: “Na nsima nayokaki mabe mpe nsɔni. Namiyokaki mabe mpe nayinaki mwana mobali yango.” Bilenge mingi bayebaka te ete bato ebele bayokaka ndenge wana. Na ntembe te, soki bato basangisi nzoto liboso bábalana, mbala mingi batungisamaka na makanisi, na ndakisa bayokaka nsɔni, mawa mpe batyelanaka motema te!

Kasi, elenge moko na nkombo Sandra atunaki boye: “Mpo na nini Nzambe akelá bilenge na mposa ya kosangisa nzoto, nzokande ayebi ete basengeli kokokisa yango kaka soki babali?” Ezali mpenza motuna ya malamu. Kasi, kanisá naino makambo oyo:

Longola mposa ya kosangisa nzoto, oyokaka mpe mposa mosusu? Ɛɛ, oyokaka mpe bamposa mosusu. Yehova Nzambe akelá yo na likoki ya koyoka bamposa ndenge na ndenge.

Soki oyoki mposa moko boye, esengeli kaka okokisa yango? Te, mpamba te Nzambe akelá yo mpe na likoki ya komipekisa.

Yango eteyi biso nini? Okoki te kopekisa bamposa mosusu eyela yo, kasi okoki komipekisa. Ezali mabe mpe bozoba, koluka ntango nyonso kokokisa mposa ya kosangisa nzoto; kosala bongo ekozala lokola kobɛta moto mbala nyonso oyo osiliki.

Nzambe akanaki te ete tósalelaka binama na biso ya kobotela na ndenge ya mabe. Biblia elobi boye: “Moko na moko na bino ayeba kokanga mbɛki [nzoto] na ye moko malamu na kati ya kosantisama mpe lokumu.” (1 Batesaloniki 4:4) Kaka ndenge “ntango ya kolinga mpe ntango ya koyina” ezali, ezali mpe na ntango ya kokokisa mposa ya kosangisa nzoto mpe ntango ya kosala yango te. (Mosakoli 3:1-8) Na mokuse, yo nde osengeli kopekisa bamposa na yo ya nzoto!

Kasi, okosala nini soki moto moko atuni yo na lityo nyonso ete, “Tii lelo oyo, osangisá naino nzoto te?” Kobanga te. Soki moto alobi bongo kaka mpo na kotyola yo, okoki koloba na ye boye: “Ɛɛ, nasangisá naino nzoto te mpe oyebi ko, nasepelaka ndenge naza bongo!” To okoki koloba boye: “Etali ngai moko, eza likambo na yo te.” * (Masese 26:4; Bakolose 4:6) Kasi, ntango mosusu okoki komona ete moto oyo atuni yo, azali mpenza na mposa ya koyeba ntina. Soki ezali bongo, ntango mosusu okosepela komonisa ye batoli ya Biblia oyo olandaka mpo na likambo yango.

Oyebi biyano mosusu oyo okoki kopesa soki moto atuni yo na ndenge ya kotyola ete “Tii lelo oyo, osangisá naino nzoto te?” Soki ozwi, komá yango awa na nse.

․․․․․

Likabo ya valɛrɛ mingi

Nzambe ayokaka ndenge nini ntango bato basangisi nzoto liboso bábalana? Kanisá ete osombeli moninga na yo kado. Kasi liboso opesa ye yango, okuti ye afungoli yango mpo alingi kaka ayeba nini ezali na kati. Okoyoka mawa te? Kanisá sikoyo ndenge oyo Nzambe akoyoka soki osangisi nzoto liboso obala! Alingi ozela tii ntango okobala, bongo osepela na likabo ya kosangisa nzoto.​Ebandeli 1:28.

Osengeli kosala nini ntango nyonso oyo oyoki mposa ya kosangisa nzoto? Na mokuse, yekolá ndenge ya kopekisa yango. Ozali na makoki ya kosala yango! Bondeláká Yehova asalisa yo. Elimo na ye ekoki kopesa yo makasi ya komipekisa. (Bagalatia 5:22, 23) Kobosana te ete Yehova “akoboya te kopesa eloko moko ya malamu na baoyo bazali kotambola na bosembo.” (Nzembo 84:11) Elenge moko na nkombo Matthieu alobi boye: “Soki nakómi na makanisi ete kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mabe te, nakanisaka ete kosala bongo ekobebisa boyokani na ngai ná Yehova mpe namonaka ete lisumu nyonso ekoki kobebisa boyokani na ngai ná ye.”

Koboya kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali likambo oyo esilá ngala te. Kutu, kosala pite nde esambwisaka moto, ekitisaka ye mpe ezali likama. Bato ya mokili balobaka ete ezali mabe soki moto azali kolanda makambo oyo Biblia elobaka; na yango, kotika te ete makanisi ya bongo etinda yo okanisa ete ozali bolole. Soki oboyi kosangisa nzoto liboso ya kobala, okobatela nzoto na yo, okozala na kimya ya makanisi, mpe na koleka, okobatela boyokani na yo ná Nzambe.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 23, NA VOLIMI 1

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 15 Kutu Yesu amonaki malamu afanda nyɛɛ ntango Erode azalaki kotuna ye mituna. (Luka 23:8, 9) Mbala mingi, kofanda nyɛɛ ezalaka lolenge malamu ya kosukisa mituna oyo ezangi ntina.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Soki moto . . . azwi ekateli yango na motema na ye moko, ya kobatela bongɔndɔ na ye mpenza, akosala malamu.”​1 Bakorinti 7:37.

TOLI

Kozala te moninga ya bato oyo baboyaka kotosa mibeko ya Nzambe, ata soki balobi ete bandimaka mateya ya Nzambe oyo olandaka.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Mbala mingi, bilenge oyo bazalaka na mobulu ya basi to ya mibali, batikaka ezaleli yango te ata soki babali. Nzokande, bilenge oyo batosaka mibeko ya Nzambe oyo epekisi kosangisa nzoto liboso ya kobala, batikalaka sembo epai ya mibali to basi na bango soki babali.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki nakosangisa nzoto kaka ntango nakobala, nakosala boye: ․․․․․

Soki baninga bazali kobimisela ngai mikakatano mpo natika ekateli na ngai, nakosala boye: ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Na makanisi na yo, mpo na nini bilenge mosusu batyolaka baninga na bango oyo basangisá naino nzoto te?

● Mpo na nini ekoki kozala mpasi mpo moto azela tii ntango akobala mpo na kosangisa nzoto?

● Matomba nini elenge akoki kozwa soki asangisi nzoto kaka na libala?

● Ndenge nini okoki kosalisa leki na yo amona matomba oyo akozwa soki aboyi kosangisa nzoto liboso abala?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 51]

“Koyeba ete ‘moto moko te ya pite to moto ya mbindo azali na libula na bokonzi ya Nzambe esalisaka ngai nalonga mposa ya kosangisa nzoto.’” (Baefese 5:5)​Lydia

[Etanda na lokasa 49]

Etanda ya mituna

Nini mpenza esalemaka na nsima?

Mbala mingi, bakamarade balobaka te polele makambo mabe oyo ekómelaka bilenge oyo basangisaka nzoto liboso ya kobala; ata mpe bafilme emonisaka yango polele te. Talá makambo misato oyo elandi. Makambo nini okanisi ete ekokómela mpenza bilenge yango?

● Moninga moko ya kelasi azali komikumisa ete asangisá nzoto ná bana basi ebele. Alobi ete kosangisa nzoto ezali elɛngi mpe esalaka moto moko te mabe. Nini mpenza esalemaka na nsima, epai na ye mpe epai ya bilenge basi wana ․․․․․

● Na nsuka ya filme moko, bilenge mibale oyo babalaná te basangisi nzoto mpo na kolakisa ete balingani. Soki ezalaki likambo ya solo, elingaki kosuka ndenge nini? ․․․․․

● Okutani na mwana mobali moko kitoko oyo asɛngi yo bósangisa nzoto. Alobi ete moto moko te akoyeba. Soki ondimi mpe obombi sɛkɛlɛ, nini ekosalema mpenza na nsima? ․․․․․

[Elilingi na lokasa 54]

Kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali lokola kofungola kado oyo bapesi yo naino te