Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mabe ezali wapi soki tolingani na kobatama?

Mabe ezali wapi soki tolingani na kobatama?

Mokapo 2

Mabe ezali wapi soki tolingani na kobatama?

Jessica akómaki na mokakatano moko monene. Makambo nyonso ebandaki ntango Jeremy, moninga na ye moko ya kelasi, akómaki kolula ye. Jessica alobi boye: “Azalaki mobali kitoko, baninga na ngai bazalaki koloba na ngai ke nakozwa te mobali mosusu ya bizaleli malamu lokola ye. Bana basi mingi bazalaki na mposa alinga bango, kasi azalaki kosepela na bango te. Alelaki kaka ngai.”

Mwa moke na nsima, Jeremy asɛngaki Jessica bábimaka ná ye. Jessica alobaki na ye ete lokola azali Motatoli ya Yehova, akoki te kolingana na moto oyo azali Motatoli te. Jessica alobi boye: “Kasi Jeremy apesaki ngai likanisi moko: ‘Ekosala nini soki tolingani ata soki baboti na yo bayebi te?’”

OKOSALA nini soki moto moko oyo ozali kosepela na ye alobi na yo bongo? Mbala mosusu okokamwa soki oyoki ete Jessica andimaki likanisi ya Jeremy. Jessica alobi boye: “Nakanisaki ke soki ngai ná ye tolingani, nakosalisa ye alinga Yehova.” Kasi, esukaki ndenge nini? Tokoyeba yango nsima. Sikoyo, tótalela naino ndenge bilenge mosusu bakweaka na motambo ya kolingana na kobatama.

Ntina oyo bilenge mingi balinganaka na kobatama

Mpo na nini bilenge mosusu balinganaka na kobatama? Elenge mobali moko na nkombo David, alobi boye: “Baboyaka koloba mpo bayebaka malamu ete baboti na bango bakoki kondima likambo yango te.” Harlette, alobeli ntina mosusu. Alobi boye: “Kolingana na kobatama ezali ezaleli ya botomboki. Soki ozali komimona ete okoli, kasi ozali kokanisa ete baboti na yo bazali komona yo kaka mwana moke, okoluka osala makambo oyo motema na yo elingi, mpe okobombela yango baboti na yo.”

Okoki koyeba makambo mosusu oyo etindaka bilenge mosusu bálingana na kobatama? Soki ezali, komá yango awa.

․․․․․

Na ntembe te, oyebi malamu ete Biblia esɛngi otosa baboti na yo. (Baefese 6:1) Soki baboti na yo baboyaka olingana na mwana mobali to mwana mwasi, ntina ezali. Atako bongo, kokamwa te soki mokolo mosusu okómi na makanisi oyo:

 Nazali komiyoka lokola nazangi eloko mpo baninga nyonso baza’ na mwa bato na bango, kaka ngai nde nazangi mwa moto.

● Nazali kosepela na moto oyo azali Motatoli te.

● Nazali na mposa nabima na ndeko moko Motatoli, atako nakokisi naino te mbula ya kobala.

Ekoki kozala oyebi oyo baboti na yo bakoki koloba na makambo yango. Mpe na nse ya motema, oyebi ete bazali na makanisi ya malamu. Atako bongo, ekoki kozala ete ozali koyoka lokola elenge mwasi Manami, oyo alobaki boye: “Lokola baninga batyaka ngai mbamba mingi ete nalinga, ntango mosusu nakómaka na mitema mibale. Lelo oyo, bilenge mingi bakanisaka ete ekoki kosalema te ete moto azanga mwa moto na ye. Epai mosusu, ezali malamu te nazalaka kaka ngai moko!” Bilenge mosusu oyo bazalaki kokanisa bongo, babandaki kobima mpe babombelaki baboti na bango. Basalaki ndenge nini?

“Bayebisaki biso tóbomba”

“Kolingana na kobombana” esɛngaka kosalela mwa lokuta. Mpo bato báyeba te, bilenge mosusu basololaka mingimingi na telefone to na Internet. Na miso ya bato basalaka lokola nde bazali kaka bakamarade, kasi makambo oyo bakomelanaka na Internet mpe na telefone, mpe masolo oyo basololaka na telefone emonisaka mpenza ete balinganá.

Mayele mosusu ya mabe oyo bilenge basalelaka ezali ya kokutana na baninga ebele, nzokande basalaka nyonso wana kaka mpo bákutana mibalemibale. James, alobi boye: “Mokolo moko, baninga babengisaki biso tókutana esika moko boye; kasi na nsima, toyaki koyeba ete babongisaki yango kaka mpo bilenge mibale bákutana. Bayebisaki biso tóbomba.”

Ndenge James amonisi yango, mbala mingi baninga ya bilenge oyo balingani na kobombana nde bapesaka bango mabɔkɔ mpo sekele eyebana te. Carol alobi boye: “Mbala mingi, ezalaka na moninga ata moko oyo ayebaka likambo yango kasi abombaka sekele mpo bayokanaka ete bábomba likambo yango.” Ntango mosusu, bilenge oyo basalaka bongo babukaka mpenza lokuta. Beth, elenge moko ya mbula 17 alobi boye: “Mpo makambo oyo bazali kosala na kobatama eyebana te, bilenge mingi bakosaka baboti na bango epai bazali kokende.” Misaki, elenge moko ya mbula 19, asalaki bongo. Alobi boye: “Nazalaki kokanisa malamumalamu ndenge nakokosa. Mpo baboti na ngai bákoba kotyela ngai motema, nazalaki kosala nyonso nakosaka te na makambo mosusu; kasi nazalaki kokosa bango ete nalingaka makambo ya bolingo te.”

Makama ya kolinga na kobatama

Soki makanisi ezali koyela yo olinga na kobatama, to soki osalaka yango, osengeli komituna mituna mibale oyo:

Ezaleli oyo ekosukela ngai ndenge nini? Ozali na makanisi ya kobalana na moto yango nsima ya mikolo moke? Evan, elenge moko ya mbula 20, alobi boye: “Kolingana na moto oyo bokobalana na ye te, ezali lokola kosala piblisite ya eloko oyo ozali kotɛka te.” Ekoki kosukela yo ndenge nini? Masese 13:12 elobi boye: “Eloko ya kozelisazelisa ebɛlisaka motema.” Okolinga mpenza ete moto oyo olingaka abɛla motema? Toli mosusu yango oyo: Soki olingani na moto na kobombana, yo ná ye bokozanga batoli ya baboti na bino mpe ya mikóló mosusu. Na ndenge yango, likama ezali monene ete bókwea na pite.​—Bagalatia 6:7.

Ndenge nini Yehova Nzambe atalelaka likambo oyo nazali kosala? Biblia elobi ete: “Biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.” (Baebre 4:13) Yango wana, soki bolingani na kobatama to soki moninga na yo moko nde asalaka yango, kobosana te ete Yehova ayebi yango malamu. Mpe soki obukaka lokuta, osengeli kokanisa malamu. Yehova Nzambe ayini mpenza lokuta. Biblia etángi “lolemo ya lokuta” na kati ya makambo ya liboso oyo Yehova ayinaka!​—Masese 6:16-19.

Bimisá sekele

Soki bolinganá na kobatama, ekozala malamu oyebisa baboti na yo to mokristo moko oyo akɔmɛli. Mpe soki moninga na yo moko abimaka na moto na kobatama, kobomba ye te, noki te osangana na mabe na ye. (1 Timote 5:22) Kanisá naino, okoyoka ndenge nini soki likambo moko ya mabe esalemi? Omoni te ete yo mpe okoki kozala na mwa foti?

Tópesa ndakisa: Kanisá ete moninga na yo moko abɛlaka diabɛti, kasi alyaka mingi biloko ya sukali na kobatama. Okosala nini soki okuti ye azali kolya biloko yango, mpe abondeli yo oloba te? Okosala nini? Okobomba sekele to okosala likambo oyo ekoki kobikisa ye?

Ezali mpe ndenge moko soki oyebi moninga moko oyo akutanaka ná mwana mobali to mwasi na kobatama. Kokanisa te ete boninga na bino ekobeba mpo na libela! Nsima ya mikolo, soki azali moninga ya solo, akoyeba ete osalaki yango mpo na bolamu na ye.​—Nzembo 141:5.

Sekele to kaka likambo ya bato mibale?

Nzokande, tokoloba ntango nyonso te ete soki bato mibale balingani, kasi balingi naino te eyebana, bazali kokosa. Na ndakisa, elenge mwasi ná elenge mobali oyo babandi kokutana mpo báyebana malamu bakoki komona malamu ete likambo na bango eyebana naino te. Ndenge elenge mobali moko na nkombo Thomas alobaki, ntango mosusu “balingi te ete bato bábanda kotunatuna bango, ‘Bokobalana mokolo nini?’”

Ekoki kozala mabe soki bato bazali kotya bilenge mbamba ete bábalana. (Loyembo ya Salomo 2:7) Yango wana, ntango balingani sika, bilenge mosusu bamonaka malamu báloba te. (Masese 10:19) Anna, elenge moko ya mbula 20, alobi boye: “Yango esalisaka mwana mobali ná mwana mwasi báyeba soki bakoki kobalana. Soki bamoni ete bakoki kobalana, na ntango wana nde bakoki koyebisa bato.”

Nzokande, ekozala malamu te kobombela bato oyo ebongi báyeba likambo yango, na ndakisa baboti na yo to baboti ya moto oyo olingani na ye. Soki olingi te ete bato báyeba ete olingani ná mwana mobali to mwana mwasi, osengeli komituna mpo na nini. Na motema na yo oyebi ete baboti na yo bakozala na bantina oyo bakoki koboya likambo yango?

“Nayebaki oyo nasengelaki kosala”

Jessica oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo abongolaki makanisi na ye ntango ayokaki lisolo ya mokristo mosusu ya mwasi oyo alinganaki na mwana mobali moko na kobatama. Jessica alobi boye: “Ntango nayokaki ete akabwani na mwana mobali yango, nayebaki oyo nasengelaki kosala.” Ezalaki pɛtɛɛ mpo aboyana ná mwana mobali yango? Te! Jessica alobi boye: “Azalaki mwana mobali kaka moko oyo nalingaki mpenza. Nazalaki kolela mikolo nyonso mpe eumelaki bapɔsɔ mingi.”

Jessica ayebaki ete alingaka Yehova. Atako abungaki nzela mpo na mwa ntango, azalaki na mposa ya kosala oyo ezali malamu. Nsukansuka, mpasi na ye ekitaki. Jessica alobi boye: “Sikoyo, nakómi na boyokani ya malamu koleka ná Yehova. Nazali kopesa ye mersi mingi ndenge alakisaka biso nzela malamu na ntango oyo ebongi!”

NA MOKAPO OYO ELANDI

Okoki mpo na kobanda kolinga, ozwi moto oyo osepeli na ye. Ndenge nini oyebi soki moto yango abongi na yo?

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”​—Baebre 13:18.

TOLI

Esɛngi te ete obelela mpo mokili mobimba eyeba ete ozali na mwa moto na yo. Kasi, osengeli koyebisa bato oyo bazali na lotomo ya koyeba likambo yango. Mingimingi baboti na yo mpe baboti ya moto oyo bolingani.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Kotyelana motema nde eloko esimbaka boyokani ya solosolo na kati ya bato. Soki ozali kokutana ná mwana mwasi to mwana mobali moko na kobatama, ekoki kosala ete baboti na yo bátika kotyela yo motema mpe ekokitisa boyokani na yo ná moto oyo olingani na ye.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki nabimaka ná ndeko mokristo moko na kobatama, nako ․․․․․

Soki moninga moko akómi kobima na mwa moto na kobatama, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Talelá lisusu  makambo misato oyo ezali na makomi ya moindo makasi na lokasa 22. Wapi oyo ezali komonisa ndenge oyo ntango mosusu yo mpe oyokaka?

● Okoki kosala nini mpo olonga mokakatano yango kozanga ete olingana na moto na kobatama?

● Soki oyebi ete moninga na yo moko abimaka ná moto na kobatama, okosala nini, mpe mpo na nini okosala bongo?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]

‘‘Nakabwanaki na elenge oyo nazalaki kobima ná ye na kobatama. Ya solo, nazalaki koyoka mpasi mikolo nyonso soki namoni ye na kelasi. Kasi, Yehova Nzambe ayebi makambo nyonso, nzokande biso tomonaka mosika te. Tosengeli kaka kotyela ye motema.’’—Jessica

[Elilingi na lokasa 25]

Kobomba sekele ya moninga oyo alingani na mwana mobali to mwana mwasi na kobatama ezali lokola kobomba moto oyo abɛlaka diabɛti kasi azali kolya na lokoso biloko ya sukali