Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nakoki kobanda kolinga?

Nakoki kobanda kolinga?

Mokapo 1

Nakoki kobanda kolinga?

“Baninga bazali kotya ngai mosukusuku mpo kaka nalinga. Epai mosusu mpe bilenge mibali ya kitoko bazali bɛbɔ.”—Sarah.

“Bana basi mosusu batyaka bana mibali mbamba kaka mpo bábanda kobima na bango; motema mosusu etindaka ngai nandima. Kasi nayebi ete soki natuni baboti na ngai, bakoboya.”—Philippe.

MPOSA ya kozala na moto moko oyo abɛtisaka yo motema—mpe oyo yo obɛtisaka motema—ekoki kozala makasi, ata ntango ozali naino elenge mpenza. Jenifer alobi boye: “Nakómaki koyoka mposa ya kolinga ntango nazalaki na mbula 11.” Esther alobi boye: “Na kelasi, soki ozali na mwa moto na yo te, ata soki ozali nani, okoyoka lokola nde eloko moko ezali kozanga yo!”

Bongo yo, okanisaka nini? Okoki mpo na kobanda kolinga? Liboso ya koyanola, tóluka naino eyano na motuna oyo ya ntina mingi:

“Kolinga mwana mobali to mwana mwasi” elimboli nini?

Tyá mwa elembo na eyano oyo okoki kopesa na mituna oyo:

Ozali elenge mwasi mpe mbala mingi obimaka ná elenge mobali moko. Okoloba ete bolingani?

□ Ɛɛ

□ Te

Yo ná elenge mwasi moko bólelana. Okomelaka ye mbala ebele na telefone na mokolo to obengaka ye mingi na telefone. Okoloba ete bolingani?

□ Ɛɛ

□ Te

Ntango nyonso oyo bokutani ná baninga, olingaka kaka kozala ná elenge mobali to elenge mwasi moko boye. Okoloba ete bolingani?

□ Ɛɛ

□ Te

Mbala mosusu ezalaki mpasi te mpo opesa eyano na motuna ya liboso. Kasi, ekoki kozala ete okanisaki mwa moke liboso opesa eyano na motuna ya mibale mpe ya misato. “Kolinga mwana mobali to mwana mwasi” ezali mpenza nini? Na mokuse, kolinga elimboli kolekisa ntango ná moto oyo osepelaka na ye mpe ye asepelaka na yo, kobɛta na ye masolo ya bolingo, to kosala na ye makambo mosusu. Yango wana, na mituna nyonso misato oyo touti kotuna, eyano ezali ɛɛ. Ezala bosololaka na telefone to bokutanaka, na miso ya bato nyonso to na ndenge ya kobatama, soki yo ná moninga na yo, ya mobali to mwasi, bóbɛtaka masolo ya bolingo mpe bosololaka mingi, tokoloba ete likambo ezali. Okanisi ete okoki mpo obanda kolinga? Mituna misato oyo ezali awa na nse ekosalisa yo oyeba soki okoki to te.

Mpo na nini olingi obanda kolinga?

Na mikili mingi, bato bamonaka mabe te soki elenge mwasi ná elenge mobali bakutanaka mbala na mbala mpo báyebana malamu. Kasi, kokutana ya ndenge wana esengeli kozala na ntina moko boye: kosalisa elenge mobali ná elenge mwasi bátalela soki bakobalana.

Ya solo, bilenge mosusu bamonaka te ete kokutana ndenge wana ezali mabe. Mbala mosusu basepelaka kaka kokutana na moninga moko, ya mwasi to ya mobali, ata soki bazali kokana kobalana te. Bamosusu bakanisaka ete soki bato mosusu bazali komona bango ná moninga wana ya mwasi to ya mobali, ematisaka mwa ngɛngɛ to epesaka bango mwa lokumu. Nzokande, mbala mingi bolingo ya ndenge wana eumelaka te. Elenge mwasi moko na nkombo Adrienne alobi boye: “Bilenge mingi oyo balinganaka ndenge wana, babebanaka kaka nsima ya pɔsɔ moko to mibale. Bakómaka kotalela bolingo lokola likambo ya ntango mokuse, oyo ebongisaka bango mpo na kokabwana na esika ya kobalana.”

Ntango olingani na moto moko, okómaka mokemoke kozwa esika na motema na ye. Yango wana, kolinga te osakana na motema ya moninga. Kanisá naino: Okosepela ete moto moko asakana na motema na yo ndenge mwana moke asakanaka na mwana-popi? Asepela na yo lelo mpe lobilobi abwakisa yo? Elenge mwasi moko na nkombo Ledy alobi boye: “Ntango mosusu nakanisaka ke kolinga moto eza n’ango kaka mpo na komisepelisa, nzokande ezalaka kitoko te soki moko aotalela yango lokola likambo ya solo kasi mosusu aozwa yango na masɛki.”

Ozali na mbula boni?

Mpo na yo, elenge asengeli kobanda kolinga na mbula nini? ․․․․․

Sikoyo, tuná moboti to baboti na yo motuna yango mpe komá eyano oyo bakopesa awa. ․․․․․

Ekoki mpenza kozala ete mbula oyo okomaki na esika ya liboso ezali moke koleka oyo baboti na yo bayebisi yo. Mbala mosusu mpe bongo te! Ntango mosusu ozali na kati ya bilenge mingi ya mayele oyo bazelaka bákola naino mpe bámiyeba malamu liboso bákóma na makanisi ya kolinga. Yango nde likambo Danielle, elenge mwasi moko ya mbula 17 asalaki. Alobi boye: “Soki nazongisi makanisi mbula mibale na nsima, nayebaka ete makambo oyo nazalaki koluka epai ya mobali oyo akobala ngai, ekeseni mpenza na oyo nazali kokanisa lelo oyo. Kutu, ata tii lelo, namonaka ete nakoki naino te mpo nazwa ekateli ya ndenge wana. Soki namoni mpenza ete nakɔmɛli, mbala mosusu nsima ya mbula mibale to misato, na ntango wana nde nakoki kobanda kolinga.”

Ezali na ntina mosusu oyo emonisi ete kozela ezali likambo ya mayele. Biblia elobeli “ebandeli ya bolenge,” elingi koloba mbula oyo mposa ya kosangisa nzoto mpe mposa ya kolinga ekómaka makasi. (1 Bakorinti 7:36) Kozala seresere ná mwana mwasi to ná mwana mobali na ntango oyo ozali naino na ebandeli ya bolenge, ekoki kolamusa bamposa ya nzoto mpe kotinda yo osala likambo moko ya mabe. Na ntembe te, baninga na yo mosusu bakoki komona yango likambo moke. Mingi na bango bazali na mposa bámeka kosangisa nzoto mpo báyeba soki ezalaka ndenge nini. Kasi yo okoki kobengana makanisi wana! (Baroma 12:2) Kutu, Biblia ezali kolendisa yo ‘okima pite.’ (1 Bakorinti 6:18) Soki ozeli tii oleka ebandeli ya bolenge, okomibatela mpe okozwa “mpasi” te.​—Mosakoli 11:10.

Okoki mpo na kobala?

Mpo na kosalisa yo ozwa eyano na motuna yango, omitalela naino yo moko malamumalamu. Talelá makambo oyo:

Boyokani na yo ná bato mosusu. Ndenge nini ofandaka ná baboti na yo mpe bandeko na yo? Soki olingi koloba, osilikelaka bango mpambampamba, mbala mosusu mpe okatelaka bango mangala to otyolaka bango? Soki batuni bango ndenge oyo ozalaka na likambo yango, bakoloba nini? Makambo oyo osalaka epai ya baboti ná bandeko na yo emonisaka ndenge oyo okofanda ná mwasi to mobali na yo.​—Tángá Baefese 4:31.

Ndenge bato batalelaka yo. Ozalaka moto ya esengo to omilelalelaka mingi? Ozalaka makambo makasimakasi te to olingaka kosala makambo kaka ndenge olingi? Oyebaka kokanga motema ntango likambo moko ezali kotungisa yo? Ozalaka motema molai? Soki ozali komonisa mbuma ya elimo santu ya Nzambe sikoyo, yango ekosalisa yo ntango okobala, ozala mobali to mwasi ya malamu.​—Tángá Bagalatia 5:22, 23.

Mbongo. Oyebaka kosalela mbongo malamu? Okɔtaka nyongo mpambampamba? Oyebi kobatela mosala? Soki te, mpo na nini? Ezali mpo na mosala yango moko to mpo na nkolo-mosala? To ezali nde mpo na likambo moko to ezaleli moko ya mabe oyo ozalaka na yango? Soki oyebaka kosalela mbongo malamu te, ndenge nini okoyeba kosalela mbongo ya libota mobimba?​—Tángá 1 Timote 5:8.

Boyokani na yo ná Nzambe. Soki ozali Motatoli to Témoin, ozali na boyokani ya ndenge nini ná Nzambe? Ozalaka na programɛ malamu ya kotánga Liloba ya Nzambe, kosakola mpe kopesa biyano na makita? Moto oyo okobala, akosepela kozala na mwasi to mobali oyo alingaka mpenza Nzambe.​—Tángá Mosakoli 4:9, 10.

Oyo okoki kosala

Soki baninga bakómi kotya yo mbamba mpo olinga moto ntango omibongisi naino te, ezali lokola nde bazali kosɛnga yo osala ekzamɛ ya liteya oyo obandi koyekola kaka sikoyo. Ezali polele ete okozwa na ekzamɛ yango te. Osengeli kozwa ntango ya koyekola liteya yango mpo oyeba mikakatano oyo okokutana na yango ntango okosala ekzamɛ.

Ezali mpe bongo na likambo etali kolinga. Ndenge tomoni yango, kolinga ezali likambo ya lisɛki te. Yango wana, liboso obanda kokutana na moto moko, osengeli koyekola “likambo” moko ya ntina mingi: ndenge ya kosala boninga ya malamu. Na nsima, ntango okokutana na moto oyo abongi na yo, okoyeba ndenge ya kofanda ná ye malamu. Kutu, na libala ya malamu, mwasi ná mobali bazalaka baninga ya solosolo.

Kozela liboso ete obanda kolingana na moto ekozala bolɔkɔ te. Kutu, ekopesa yo ntango mingi mpo ‘osepela na bolenge na yo.’ (Mosakoli 11:9) Ekopesa yo mpe ntango ya komibongisa, mpe okokóma na bizaleli ya malamu, mpe lisusu okokóma na boyokani makasi na Nzambe.​—Bileli 3:27.

Kasi, ata sikoyo, okoki kozala na baninga ya mibali soki ozali mwasi, to baninga ya basi soki ozali mobali. Wapi lolenge eleki malamu oyo okoki kosala yango? Bósanganaka ná bato ya lolenge nyonso, basi, mibali ata mpe mikóló oyo bakotambwisa makambo. Elenge mwasi moko na nkombo Mamie alobi boye: “Nakanisi ete kosala bongo nde likambo eleki malamu. Eleki malamu kozala na baninga ebele.” Monica mpe alobi kaka bongo. Alobi boye: “Kozala bato ebele ezali mpenza likanisi ya malamu, mpamba te ekosalisa yo omona bizaleli ya bato ndenge na ndenge.”

Nzokande, soki okei mbangu mpe okangami kaka na moto moko, okomilukela makambo. Yango wana, kowela te. Salelá ntango oyo mpo na koyekola ndenge ya kokóma na baninga mpe kobatela boninga yango. Na nsima, soki okómi na mposa ya kolinga, okomiyeba malamu mpe okoyeba bizaleli nini osengeli koluka epai ya moto oyo okobala.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 29 MPE 30, NA VOLIMI 1

NA MOKAPO OYO ELANDI

Ozali na mposa ya kozala na mwa moto, kozanga ete baboti na yo báyeba? Kosala bongo, ezali na makama mingi, oyo mbala mosusu okoki koyeba te.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.”​—Masese 14:15.

TOLI

Soki olingi kobanda kolingana ná mwana mobali to mwasi, tángá 2 Petro 1:5-7 mpe poná ezaleli moko oyo olingi kosala makasi ozala na yango. Nsima ya sanza moko, talá makambo oyo oyekoli mpe ndenge okolisi ezaleli yango.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Baankɛtɛ mingi emonisi ete soki bilenge babalani liboso bákokisa mbula 20, mbala mingi, mabala na bango ekufaka liboso ekokisa mbula mitano.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mpo nabanda komibongisa mpo na libala, esengeli nakolisa bizaleli oyo: ․․․․․

Nakokóma na bizaleli yango soki nazali ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Wapi bisika ya malamu oyo okoki kolekisa ntango elongo na bana basi soki ozali mwana mobali, to na bana mibali soki ozali mwana mwasi?

● Ndenge nini okoki kosalisa ndeko na yo oyo azali naino mwana moke, kasi akómi na mposa ya kolinga?

● Soki olingani ná mwana mobali to mwana mwasi, kasi ozali na makanisi ya kobala te, yango ekoki kosala nini epai na ye?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 18]

‘‘Nakanisi esengeli kolinga moto oyo omoni ete bizaleli na ye esepelisi yo mpe oyo omoni ete bokofanda malamu. Balingaka nde moto, kasi balingaka kaka bilingela te.’’​—Angèle

[Elilingi na lokasa 16, 17]

Soki ozali seresere na moto na likanisi ya kobalana na ye te, ozali kosala lokola mwana moke oyo azali kosakana na mwana-popi ya sika mpe na nsima abwaki yango