Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nakosala nini mpo nalekisa ndelo te ntango nayoki nkanda to mawa?

Nakosala nini mpo nalekisa ndelo te ntango nayoki nkanda to mawa?

Mokapo 26

Nakosala nini mpo nalekisa ndelo te ntango nayoki nkanda to mawa?

OKANISI nini, mɔtɔ ezalaka malamu to mabe? Mbala mosusu okoloba ete etali ndenge bazali kosalela yango na ntango wana. Na butu oyo malili ezali makasi, kopelisa mɔtɔ ekoki kosalisa mpo na kosilisa malili. Wana mɔtɔ ezali mabe te. Nzokande, soki batiki yango kaka boye, mɔtɔ ekoki kopanzana mpe kozikisa ndako mobimba. Na ntango wana mɔtɔ ekómi mabe.

Ezali ndenge moko na makambo oyo toyokaka na motema. Soki opekisi yango, ekozala malamu, ekosalisa yo okóma na boyokani makasi ná basusu. Soki opekisi yango te, ekoki kosala yo mpe bato oyo ozalaka ná bango mabe.

Lokola ozali elenge, okoki na ntango mosusu komona ete okómi nkandankanda to mawamawa. Okoki kosala ndenge nini mpo olonga makambo yango? Tótalela mokomoko na yango.

Kitisá nkanda na yo

Ezalaka pɛtɛɛ te kopekisa mpasi to nkanda oyo eyaka soki basali yo mabe. Na ntango wana bato mosusu bamipekisaka te. Kutu, Biblia elobeli bato oyo ‘balingá kosilika’ mpe oyo ‘balingá nkɛlɛ.’ (Masese 22:24; 29:22) Ezali likambo ya lisɛki te. Soki opekisi yango te, nkanda makasi ekoki kotinda yo osala makambo oyo okoyoka mawa na nsima. Kasi, ndenge nini okoki kopekisa nkanda na yo ntango bazali kosala yo mabe?

Ya liboso, talelá likambo yango malamumalamu mpe talá soki okoki kolekisa yango to te. * (Nzembo 4:4) Kobosana te, ‘kozongisa mabe’ ekobebisa kaka makambo. (1 Batesaloniki 5:15) Nsima ya kotalela likambo yango malamumalamu mpe kobondela, okoki komona malamu obomba nkanda na motema te. Soki osali bongo, likambo yango ekotinda yo te na mabe.​—Nzembo 37:8.

Kasi, okosala nini soki mpasi ezali kosila kaka te? Biblia elobi ete ezali na “ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mosakoli 3:7) Okoki nde kosolola na moto oyo ayokisi yo mpasi na motema? Soki kosala bongo ezali malamu te, ekoki kozala malamu osolola na baboti na yo to na moninga moko oyo akɔmɛli ndenge oyo ozali komiyoka. Soki moto moko azali koluka kaka kotungisa yo, salá makasi osalela ye makambo na boboto.  Etanda oyo ezali na lokasa 221 ekoki kosalisa yo oyeba ndenge mosusu ya malamu ya kosala na makambo oyo tii sikoyo, epesaka yo nkanda mbala moko.

Mingimingi, bondelá Yehova mpe sɛngá ye asalisa yo mpo obombela te moto oyo azokisi yo nkanda na motema. Kobosana te ete atako okoki te kobongola likambo oyo esalemaki, okoki kobongola ndenge na yo ya kotalela likambo yango. Soki otiki nkanda etonda na motema na yo, okosila makasi, ndenge mbisi oyo ekangami na ndɔbɔ esilaka makasi. Wana okómi kotika moto mosusu atambwisa makanisi mpe makambo oyo ezali kotungisa yo. Okolinga te kotambwisa makambo yo moko?​—Baroma 12:19.

Ndenge ya kosala mpo na kosilisa mawa

Laura, elenge moko ya mbula 16, alobi boye: “Mikolo oyo nakómi mawamawa mpe nkandankanda mpe nazali komona makambo na ngai nyonso kaka mabe. Nazalaka na esengo ata moke te na bomoi. Nalelaka kaka kolela.” Na ndakisa ya Laura, bilenge mingi bayokaka ete mikakatano ya bomoi eleki bango kilo. Tokoloba nini mpo na yo? Makambo oyo baboti na yo, baninga na yo mpe balakisi na yo balingi osala, bambongwana ndenge na ndenge oyo ekómi kosalema na nzoto mpe na makanisi na yo lokola okómi elenge; to mpe makanisi ya kolɛmba nzoto mpo na mwa libunga oyo osalaki​—nyonso wana ekoki kotinda yo oyoka mawa mingi.

Bilenge mosusu kutu bamizokisaka mpo na kosilisa mitungisi. * Soki okómi na momeseno wana, luká koyeba ntina. Na ndakisa, komizokisa ezali lolenge moko ya kolonga mitungisi. Ezali na likambo moko​—mbala mosusu na libota na yo to epai ya baninga na yo—​oyo ezali kotungisa yo na makanisi?

Lolenge moko ya malamu ya kolonga makanisi ya mabe ezali ya kosolola na moboti to ndeko moko ya lisangá oyo akɔmɛli, oyo akoki kozala moninga oyo “abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17) Liliane, elenge ya mbula 16, afungolaki motema na ye epai ya bakristo mosusu ya basi oyo bazalaki mikóló na ye. Alobi boye: “Lokola bazali mikóló na ngai, toli na bango esalisaki mpenza. Bakómi sikoyo baninga na ngai.” * Dana, elenge moko ya mbula 15 alobi ete ayokaki mwa malamu ntango amipesaki na mosala ya kosakola. Alobi boye: “Ezalaki eloko oyo eleki malamu oyo nakokaki kosala. Kutu ezalaki ntango ya esengo mpenza na bomoi na ngai!”

Likambo eleki ntina, soki ozali na mawa to otungisami na makanisi, kobosana libondeli te. Davidi, moko ya bakomi ya nzembo, oyo akutanaki mpe na mikakatano, akomaki boye: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo.” (Nzembo 55:22) Yehova ayebi mpasi na yo. Mpe likambo eleki ntina, “atyelaka bino likebi.” (1 Petro 5:7) Soki motema na yo ezali kokweisa yo, kobosana te ete “Nzambe azali monene koleka motema [na yo] mpe ayebi makambo nyonso.” (1 Yoane 3:20) Kutu, ayebi malamu koleka yo moko ntina oyo ozali kotungisama na makanisi, mpe akoki kolongola mitungisi na yo.

Soki mawa ezali kaka kosila te, ekoki kozala ete ozali kobɛla maladi moko, mbala mosusu maladi ya konyokwama na makanisi to basusi. * Soki ezali bongo, ekozala malamu okende komona monganga. Kokipe likambo yango te ezali lokola komatisa mongongo ya radio ya motuka mpo oyoka te makelele oyo ezali kobima na motɛrɛ. Ezali malamu kosala makasi ya kosilisa likambo yango. Ya solo, ezali likambo te ya koyokela nsɔni. Bilenge mingi oyo bazalaki na maladi ya konyokwama na makanisi mpe bamaladi mosusu ya ndenge wana bazwaka lisalisi ya monganga.

Kobosana te, makambo oyo ezali kotungisa yo na motema ezali lokola mɔtɔ. Soki opekisi yango, ekosalisa yo, kasi soki opekisi yango te ekosala yo mabe. Salá makasi olekisa ndelo te ntango oyoki nkanda to mawa. Ya solo, na ntango mosusu, okoki kosala to koloba likambo moko oyo na nsima okoyoka mawa. Kasi kangá motema. Malɛmbɛmalɛmbɛ, okotika te ete makambo yango ekóma kotambwisa yo, kasi yo nde okotambwisa yango.

NA MOKAPO OYO ELANDI

Olukaka kosala makambo lokola moto ya kokoka? Soki ezali bongo, ndenge nini okoki koyeba ndenge ya kotalela mabunga na yo?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 8 Soki minyoko ekómi tii na kobɛta, talá Mokapo 14 ya buku oyo mpo na koyeba ndenge ya kosala na ntango wana. Lisusu, soki moninga moko asilikisi yo, Mokapo 10 ekoki kosalisa yo.

^ par. 13 Bato oyo bamizokisaka bamisalaka mabe na ndenge mingi, na ndakisa, komikata, komizikisa, komiswa to mpe komilongola mposo.

^ par. 14 Soki okokoka kokutana na bango te mpo bósolola, meká kokomela bango mokanda to kobenga bango na telefone. Kotyela moto moko motema ezali likambo ya liboso oyo ekoki kosalisa yo omiyoka malamu.

^ par. 16 Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali maladi ya konyokwama na makanisi, talá Volimi 1, mokapo 13.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Kotika mabe elonga yo te, kasi saláká malamu mpo na kolonga mabe.”​—Baroma 12:21.

TOLI

Yebisáká baboti na yo mikolo nyonso likambo moko ya kosepelisa oyo ekómelaki yo​—ata soki ezali kaka likambo ya moke. Boye soki likambo ya monene esalemi, ekozala pɛtɛɛ mpo oyebisa bango. Mpe bakoyoka yo noki.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Soki moto azali kolala malamu te mpe azali kolya malamu te, akoyeba te ndenge ya kosala liboso ya mitungisi na ye.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Likambo ya mabe oyo nakokaka te kokanga motema ezali ․․․․․

Mpo na kolonga likambo yango, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini Nzambe asepelaka te na moto oyo apekisaka nkanda na ye te?

● Ndenge nini kozanga kopekisa nkanda na yo ekoki kosala yo moko mabe?

● Makambo nini ekoki kosalisa yo oyoka mawa te koleka ndelo?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 223]

‘‘Likambo ya ntina ezalaki ya koyeba ete moto moko azali kotyela ngai likebi, ete ezalaki na moto oyo nakokaki kosolola na ye ntango nazali konyokwama na makanisi.’’—Jennifer

[Etanda/​Bililingi na lokasa 221]

 Etanda ya mituna

Pekisá nkanda na yo Tondisá tablo oyo

Likambo Kosilika mbala Kokanga motema

moko

Moninga ya Nakofinga ye Nakokipe ye te,

kelasi atyoli ngai mpe nakomonisa

ye ete akoki

kosilikisa ngai te

Ndeko na ngai Ngai mpe ․․․․․

ya mwasi “alati” nakozwa

sapato na ngai eloko na ye

oyo nalingaka

kozanga kosɛnga

Baboti na ngai ․․․․․ ․․․․․

bapekisi ngai kobima

[Elilingi na lokasa 220]

Moto oyo abombaka nkanda azali lokola mbisi oyo ekangami na ndɔbɔ​—bango nyonso mibale bakangami na motambo