Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki kobengana makanisi ya kosangisa nzoto?

Ndenge nini nakoki kobengana makanisi ya kosangisa nzoto?

Mokapo 29

Ndenge nini nakoki kobengana makanisi ya kosangisa nzoto?

ELENGE mobali moko na nkombo Michael alobi boye: “Nakanisaka bana basi ntango nyonso—ata soki bazali pene na ngai te. Ezali mawa mpenza. Na ntango mosusu, nakokaka ata kotya makanisi esika moko te!”

Na ndakisa ya Michael, ekómelaka mpe yo, obanda kokanisa basi to mibali ntango nyonso? Soki ezali bongo, mbala mosusu ozali kotungisama na makanisi. Mposa ya basi to ya mibali ekoki kotonda na makanisi na yo ndenge kaka mampinga ya basoda ya banguna bakɔtaka na esika moko boye. Michael alobi boye: “Makanisi wana ekoki kosala ete okanisaka makambo mosusu te. Ekoki kotinda yo otika nzela oyo ozalaki kokende mpe oleka na nzela mosusu kaka mpo omona mwana mwasi moko boye ya kitoko, to kotinda yo okɔta na magazini moko oyo okanaki kokɔta te kaka mpo omona mwana mwasi moko ya kitoko na pembeni.”

Kasi kobosana te ete bamposa ya kosangisa nzoto ezali na yango mabe te. Kutu, Nzambe nde moto asalá ete mwasi asepela na mobali mpe mobali asepela na mwasi, mpe kosangisa nzoto ezali mabe te mpo na bato oyo babalaná. Ntango ozali naino elenge, na ntango mosusu okoki koyoka mposa makasi ya kosangisa nzoto. Soki yango ekómeli yo, koloba mbala moko te ete ozali moto mabe mpenza to ete okokoka te kotikala pɛto na bizaleli. Soki olingi, okoki kotikala pɛto na bizaleli! Kasi mpo okoka kotikala pɛto, osengeli koyeba kopekisa makanisi ya kosangisa nzoto. Ndenge nini okoki kosala yango?

Talelá baninga na yo malamumalamu. Soki baninga na yo ya kelasi babandi masolo ya mbindo, mbala mosusu okolinga kokɔta na masolo na bango, kaka mpo bámona te ete okeseni na bango. Kasi soki osali bongo, ekokóma nde mpasi koleka mpo obengana makanisi ya mbindo. Osengeli mpenza kotɛlɛma mbala moko mpe kokende; mpe osengeli koyokela yango nsɔni te! Mbala mingi, okoki koluka ndenge ya kokende kozanga ete omimonisa mosantu mpe yango ekosala ete bábanda kotyola yo te.

Boyá masano ya mbindo. Ya solo, bafilme mpe miziki nyonso ezalaka mabe te. Kasi, masano mingi ya mikolo oyo ebongisamaka mpo na kolamusa bamposa ya kosangisa nzoto. Biblia epesi toli nini na likambo yango? Elobi boye: “Tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo, tómonisaka ete tozali kobanga Nzambe mpo bosantu na biso ekóma ya kokoka.” (2 Bakorinti 7:1) Boyá masano nyonso oyo ekoki kolamusa bamposa ya kosangisa nzoto. *

Likambo ya kosakana na binama ya kobotela

Bilenge mosusu basakanaka na binama ya kobotela mpo na kokitisa mposa ya kosangisa nzoto. Kasi momeseno yango ekoki kobimisa makama minene. Biblia elendisi bakristo ete: “Na yango, bóboma binama ya nzoto na bino ya mabele na likambo ya pite, mbindo, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo eyokisaka mpasi, mpe bilulela.” (Bakolose 3:5) Soki moto azali kosakana na binama ya kobotela, azali ‘koboma mposa ya kosangisa nzoto te.’ Kutu, azali nde kolamusa mpe kobakisa mposa yango!

Kosakana na binama ya kobotela, ekoki kokómisa yo moombo ya bamposa na yo. (Tito 3:3) Moko na makambo ya liboso oyo okoki kosala mpo na kolonga momeseno yango ezali ya koyebisa moto mosusu likambo yango. Ndeko moko oyo abundanaki bambula mingi na momeseno ya kosakana na binama ya kobotela alobi boye: “Esengelaki nazala na mpiko mpo nayebisa moto moko likambo yango ntango nazalaki naino elenge! Na boumeli ya bambula mingi, lisosoli na ngai ezalaki se kotungisama; yango ebebisaki mpenza boyokani na ngai ná basusu, mpe na koleka ná Yehova.”

Kasi osengeli koyebisa nani? Mbala mingi, kosolola na tata to mama na bino ekoki kozala malamu mpenza. Ntango mosusu, kosolola na ndeko moko ya lisangá oyo akɔmɛli, ekoki komema matomba. Okoki kobanda koloba boye: “Nazali na likambo moko oyo ezali kotungisa ngai mingi, mpe nalingi koyebisa yo yango.”

André asololaki na nkulutu moko ya lisangá, mpe azali na esengo na ndenge asalaki yango. Alobi boye: “Ntango nkulutu yango azalaki koyoka ngai, mpisoli ebandaki kobima na miso na ye. Ntango nasilisaki koloba, ayebisaki ngai ete Yehova alingaka ngai mingi. Alobaki ete likambo yango ekómelaka mpe bato mosusu. Alakaki ngai ete akobanda kotala milende oyo nakosala mpe akomemela ngai mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia, oyo elobeli likambo yango. Nsima ya kosolola na ye, nazwaki ekateli ya kokoba kosala makasi mpo na kotika momeseno yango, ata soki nakwei lisusu.”

Marc azwaki ekateli ya koyebisa tata na ye, mpe tata yango amityaki mpenza na esika na ye. Kutu ayebisaki Marc ete ye mpe azalaki na momeseno yango ntango azalaki elenge. Marc alobi boye: “Lokola tata ayebisaki ngai makambo polele, yango elendisaki ngai mpenza. Namonaki ete soki ye atikaki momeseno yango, ngai mpe nakoki kotika. Ezaleli oyo tata amonisaki esimbaki mpenza motema na ngai mpe nakokaki lisusu te kokanga motema mpe nalelaki.”

Na ndakisa ya André ná Marc, yo mpe okoki kozwa lisalisi na milende oyo ozali kosala mpo na kotika momeseno ya kosakana na binama ya kobotela. Ata soki okwei lisusu, kolɛmba nzoto te! Yebá ete okoki kolonga etumba yango. *

Ndenge ya kobatela makanisi na yo

Ntoma Paulo alobaki boye: “Nazali kobɛtabɛta nzoto na ngai mpe kokómisa yango lokola moombo.” (1 Bakorinti 9:27) Ndenge moko mpe, mbala mosusu ekosɛnga ete omityela mpenza mibeko ntango makanisi ya mbindo na oyo etali basi mpe mibali ebandi kokɔtela yo. Soki makanisi yango ezokima kaka te, meká kosala mwa ngalasisi. Biblia elobi ete: “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba na mwa makambo moke.” (1 Timote 4:8) Mbala mosusu kotambola mwa mbangu to kosala ngalasisi mwa miniti moke ekoki kosalisa yo obengana makanisi wana ya mabe.

Likambo ya ntina koleka, luká lisalisi epai ya Tata na yo ya likoló. Ndeko moko alobi boye: “Soki mposa ya kosangisa nzoto ebandi koyela ngai, nasalaka makasi nabondela.” Ya solo, Nzambe akolongola mposa ya kosangisa nzoto te. Kasi na lisalisi na ye, okoki komona ete ezali na makambo mosusu mingi oyo okoki kokanisa na yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Eteni 8 ya buku oyo elobeli makambo mingi oyo etali kominanola mpe masano.

^ par. 14 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali momeseno ya kosakana na binama ya kobotela, talá na Volimi 1, mokapo 25 mpe 26.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

Soki ezaleli moko ya malamu ezali mpe soki eloko moko oyo ebongi kokumisama ezali, bókoba kokanisa makambo wana.Bafilipi 4:8.

TOLI

Soki okwei lisusu na momeseno ya kosakana na binama ya kobotela, kotika te! Luká koyeba likambo oyo esali ete okwea, mpe salá makasi mpo ozongela yango lisusu te.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Makambo oyo otikaka ekɔta na makanisi na yo ekoki kobongola bomoto mpe bizaleli na yo.​—Yakobo 1:14, 15.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mpo nabengana makanisi mabe ya basi to mibali, nako ․․․․․

Soki lisolo ná baninga ya kelasi ebandi kokende na makambo ya mabe to ya nsɔni, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini tosengeli te komona ete bamposa ya kosangisa nzoto ezalaka “kaka mabe”?

● Mpo na nini osengeli kopekisa bamposa na yo ya kosangisa nzoto?

● Masano nini ekoki kotinda yo okóma kokanisa makambo ya basi mpe mibali?

● Mpo na nini ezali na ntina obenda nzoto soki lisolo ebandi kolobela makambo ya mabe to ya nsɔni?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 240]

‘‘Eloko oyo esalisaka ngai, ezali kolongola makanisi oyo ezali kolamwisa bamposa ya kosangisa nzoto mpe kokanisa makambo mosusu. Nayebaka ete nsukansuka bamposa yango ekoleka.’’—Serge

[Elilingi na lokasa 239]

Okotika ete bavirisi ekɔta na ordinatɛrɛ na yo? Soki ezali bongo te, mpo na nini kotika ete makanisi ya mbindo ekɔtela yo?