Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Abyangami epai na Mofalisai

Abyangami epai na Mofalisai

Mokapo 83

Abyangami epai na Mofalisai

EYAMBAMI ye epai na mofalisai moko monene, Yesu auti kobikisa moto moko oyo maboko na ye mpe makolo na ye mavimbaki mpo na mai. Komonaka ete babyangami bazali kopona bisika na lokumu, apesi bango liteya na komikitisa.

“Soko obyangami na moto moko na elambo na libala, fanda na kiti na lokumu te, mpo na kobanga soko moto mosusu oyo aleki yo na lokumu asili kobyangama na ye, mpe mobyangi na bino akoya koloba na yo ete: ‘Pesa esika wana na moto oyo.’ Boye okoyoka nsoni mpe okokende kofanda na esika ya nsuka.”

Na bongo Yesu apesi toli oyo: “Soki babengi yo na elambo, kenda kofanda na esika ya nsuka, mpo ntango nkolo ndako akoya, aloba na yo ete: ‘Moninga na ngai, yaka kofanda awa na esika ya lokumu.’ Boye okozwa lokumu na miso ya bato bafandi na yo na mesa.” Mpe, mpo na kosukisa, Yesu alobi ete: “Mpamba te moto nyonso oyo akomitombola akokitisama, nde ye oyo akomikitisa akotombwama.”

Na nsima Yesu abandi koloba na Mofalisai oyo abyangaki ye mpe amonisi ye ndenge nini moto akoki kokaba elambo oyo ekozala mpenza na motuya na miso na Nzambe: “Soko okokaba kolya na ntongo soko elambo na mpokwa, byanga baninga na yo soko bandeko na yo te soko biboto na yo te soko bazalani bazwi te; noki bango mpe bakobyanga yo mpe bakozongisela yo. Kasi soko okosala elambo, byanga babola, na bibosono, na batengumi, na bakufeli-miso, mpe okozala na esengo mpo ete bakoki kozongisa na yo lisusu te.”

Kopesa bilei epai na babola ekozwela moto esengo mpamba te, lokola Yesu alimboli yango epai na mobyangi na ye, “okozwa libonza kati na lisekwa na bayengebeni.” Ndimbola ya bolei wana ebongi na lokumu ebimisi epai na moko na babyangami likanisi mpo na bolei ya lolenge mosusu. Alobi ete “esengo mingi na moto oyo akolya limpa kati na Bokonzi na Nzambe.” Nzokande, lokola Yesu akomonisa yango na nzela na lisese moko, bato nyonso bazali kopesa motuya na elikya kitoko wana te.

“Moto moko asalaki elambo moko monene na mpokwa, mpe abyangi bato mingi. Na ntango na elambo atindi moombo na ye koloba na bango basili kobyangama ete: ‘Boya mpo ete biloko binso bisili kobongisama.’ Kasi bango nyonso baboyi koya. Oyo na liboso alobi na ye ete: ‘Nasombi elanga mpe nasengeli kokende kotala yango. Limbisa ngai.’ Mosusu alobi ete: ‘Nasombi bangombe zomi mpe nakei komeka yango soki ezali makasi. Limbisa ngai.’ Oyo mosusu alobi ete: ‘Nauti kobala mwasi, yango wana nakoki koya te.’”

Oyo nde koluka bolimbisi ezangi ntina mpenza! Nani akoki kosomba elanga to ebwele oyo atali naino yango te? Na bongo mosombi mbele asengeli mpenza te kokende nokinoki mpo na kotala eloko oyo asilaki kosomba. Bobele bongo, libala ezali ntina mpenza te mpo na koboya koya na elambo wana monene. Koyokaka bolimbisi wana, nkolo ndako asiliki mpe atindi na moombo na ye ete:

“‘Kende noki na balabala minene mpe na balabala mike na mboka, mpe yela ngai bato bakelela, mpe bato bakufa makolo to maboko, na bato bakufa miso mpe bibosono.’ Na nsima, moombo alobi ete: ‘Nkolo, nasali nyonso lokola otindaki ngai, mpe esika ezali naino.’ Bongo nkolo alobi na moombo ete: ‘Kenda na banzela mpe kati na mapango, kamata bato mpe kotisa bango na makasi mpo ete ndako na ngai etonda. . . . moto moko te kati na bato oyo babyangamaki liboso akolya ata ndambo na elambo na ngai.’”

Lisese oyo ezali koteya likambo nini? “Nkolo,” oyo azali kosalisa elambo, ezali bongo Jéhovah Nzambe; “moombo,” oyo azali kobyanga bato, ezali Yesu Klisto; mpe “elambo monene ya mpokwa,” ezali libaku ya kokoma mosangani na Bokonzi ya likoló.

Ezali liboso bakonzi na mangomba ya Bayuda na eleko na Yesu nde babyangamaki na kokoma basangani na Bokonzi, libyangi oyo baboyaki kondima yango. Na yango, libyangami ya mibale epesamaki, mbala oyo epai na bato mike na libota na Bayuda oyo batyolamaki, mingi mpenza kobanda na Pantekote ya mobu 33. Baoyo bayanolaki na libyangami oyo bazalaki mingi mpenza te mpo na kokamata bisika 144 000 oyo bibongisamaki kati na Bokonzi ya Nzambe. Yango wana, mibu misato na ndambo na nsima, na mobu 36, libyangami ya misato mpe ya nsuka epesamaki epai na Bapakano, mpe koyanganisama wana elandanaki kino na mikolo na biso. Luka 14:1-24.

▪ Liteya nini ya komikitisa Yesu apesi?

▪ Ndenge nini moto akoki kosalisa elambo oyo ekozala mpenza na motuya na miso na Nzambe, mpe mpo na nini akozala na esengo?

▪ Mpo na nini tokoki koloba ete babyangami bazali kosenga bolimbisi ezangi ntina?

▪ Yesu alingi koteya nini kati na lisese na “elambo monene na mpokwa”?