Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Akɔti lisusu na tempelo

Akɔti lisusu na tempelo

Mokapo 103

Akɔti lisusu na tempelo

YESU mpe bayekoli na ye bauti kolekisa butu ya misato na Betania uta balongwaki na Yeriko. Lelo, mokolo ya liboso ya 10 Nisan, ntongo etaneli bango na nzela wana ezali bango kokende na Yelusaleme. Yesu aoki nzala. Mpe, ntango amoni nzeté na figi oyo ezali na bankasa, akei epai na yango koluka soko eboti mwa mbuma.

Nkasa na nzeté oyo ebimi liboso na elaká, mpamba te eleko ya mbuma na figi ebandaka na sanza ya motoba, nde sikawa tozali bobele na nsuka na sanza ya misato. Nzokande, Yesu akanisi mbala mosusu ete, lokola nzeté yango ebimisi nkasa liboso na ntango, mbuma ekoki mpe kobima liboso ya ntango. Kasi, elikya na ye ekokisami te; nkasa ekosi ye. Bongo, Yesu alakeli mabe epai na nzeté wana, ete: “Tika ete moto alya mbuma na yo lisusu te!” Lobi na ntongo nde tokoyeba likambo oyo likokómela nzeté yango mpe ndimbola na kolakelama mabe wana.

Kolandáká mobémbo na bango, nsima na mwa ntango, Yesu akómi na Yelusaleme elongo na bayekoli na ye, mpe akei na tempelo, oyo atalaki lobi loleki na nsima na midi. Kasi lelo, akosala likambo moko, lokola esalaki ye yango na mobu 30, esili koleka mbula misato, na ntango ayaki kokumisa Pasiká. Abéngani baoyo bazali kosomba mpe koteka kati na tempelo mpe, abaloli bamesa na bato oyo bazali kosanzé mbongo, mpe bakiti ya batekisi na bibengá. Apesi nzela epai na moto moko te ete amema ata mwa eloko longwa na tempelo.

Na kopameláká baoyo bazali kosanzé mbongo mpe batekisi na banyama kati na tempelo, alobi ete: “Ekomami te ete: ‘Ndako na ngai ekobyangama ndako na mabondeli mpo na mabota nyonso?’ Nde bino bosili kozalisa yango esika na miyibi.” Bazali solo miyibi mpamba te babakisi ntalo makasi na biloko oyo bato basengisami kosomba epai na bango, banyama oyo basengeli kopesa yango lokola mbeka. Na ntina yango, na miso na Yesu, mombongo wana ezali nde lolenge mosusu na koyiba to kobotola biloko na bato.

Ntango banganga-kapita, bakomeli mpe bakonzi na Bayuda bayoki nsango ya likambo oyo Yesu asali, baluki lisusu nzela ya koboma ye. Na bongo, bamonisi ete bakoki kobongwana te. Kasi bayebi te ndenge nini bakoki koboma Yesu, mpamba te bato nyonso bazali koyoka ye.

Longola Bayuda, Bapakano mpe bayei mpo na Pasiká. Bazali bapakano oyo babongwani na lingomba ya Bayuda. Tala sikawa Bagreke babelemi epai na Filipe mpe bazali kosenga nzela ya kokutana na Yesu, emonani lokola ete bango mpe babongwani na losambo na Bayuda. Filipe akei epai na André, mbala mosusu mpo na kotuna ye soki bokutani motindo yango ekozala malamu. Boye Yesu azali naino na kati ya tempelo, epai kuna Bagreke bakoki komona ye.

Yesu ayebi ete atikali bobele na mikolo moke, mpe asaleli lisese moko kitoko mpo na komonisa likambo na ye ete: “Ntango esili koya wana Mwana na moto akokumisama. Solo solo nazali koloba na bino ete, soko mbuma na blé ekokwea na mabelé mpe ekokufa te, ekotikala bobele moko mpenza; nde soko ekokufa, ekobota mbuma mingi.”

Mbuma moko na blé ezali na motuya mingi te. Kasi, ekómaka ndenge nini soki ekonami na mabelé mpe “ekufi,” elingi koloba soki etikali lisusu nkona te? Ekobóta mpe, na nsima, ekokóma nzeté oyo ekobimisa mbuma mingi ya blé. Lolenge moko, Yesu azali moto bobele moko ya kokoka awa na mabelé. Kasi, soki akufi sembo liboso na Nzambe, nde akómi nzela ya kopesa bomoi na seko epai na bato mingi na sembo lokola ye. Mpo na yango Yesu alobi ete: “Ye oyo alingi bomoi na ye akobungisa yango, nde ye oyo akoyina bomoi na ye kati na mokili oyo, akobatela yango mpo na bomoi ya seko.”

Yesu azali kokanisa mpo na ye moko te, mpamba te apesi ndimbola oyo: “Soki moto alingi kosalela ngai, tika ete alanda ngai, mpe na esika ezali ngai, mosali na ngai akozala wana lokola. Soki moto akosalela ngai, Tata akokumisa ye.” Oyo nde mbano kitoko mpo na moto oyo asili kolanda Yesu mpe asili kosalela ye! Akozwa bongo nkembo epai na Tata mpo na kozala elongo na Klisto kati na Bokonzi.

Kokanisáká na ntina na mpasi mpe liwa ya nsomo oyo ezali kozela ye, Yesu alobi lisusu ete: “Sikawa molimo na ngai etungisami, naloba nini? Tata bikisa ngai na ntango oyo.” Ya solo, soki nde likambo oyo lizali kozela ye likokaki kopengolama! Kasi te, mpamba te alobi ete: “Nakómi na ntango oyo mpo na likambo oyo.” Yesu andimi mpenza bibongiseli bikamatami na Nzambe, kati na yango liwa na ye lokola mbeka. Matai 21:12, 13, 18, 19; Malako 11:12-18; Luka 19:45-48; Yoane 12:20-27.

▪ Mpo na nini Yesu azali kolikya kozwa mbuma ya figi nzokande eleko na yango ekoki naino te?

▪ Mpo na nini Yesu abyangi baoyo bazali koteka na tempelo ete “miyibi”?

▪ Na ndimbola nini Yesu azali lokola mbuma na blé oyo ekufi?

▪ Yesu azali komiyoka ndenge nini wana ezali ye kokanisa na ntina na mpasi mpe liwa oyo ezali kozela ye?