Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Akɔti na nkembo nyonso na Yelusaleme

Akɔti na nkembo nyonso na Yelusaleme

Mokapo 102

Akɔti na nkembo nyonso na Yelusaleme

NA NTONGO ya mokolo molandaki, na mokolo ya lomingo ya 9 Nisan, Yesu atiki Betania elongo na bayekoli na ye; bakei na Yelusaleme na nzela na ngomba na Olive. Nokinoki, bakómi pene na Betefajé, engumba oyo ezali na ngomba wana. Bongo Yesu alobi epai na mibale kati na bayekoli na ye ete:

“Bokenda na mboka oyo ezali liboso na bino mpe nokinoki bokomona mpunda ekangami mpe mwana na mpunda na ye elongo. Bokangola yango mpe boya na yango epai na ngai. Soko moto alobi likambo nini na bino, boloba ete, ‘Nkolo azali na mposa na yango.’ Mpe akotinda yango nokinoki.”

Na ebandeli, bayekoli bakangi ntina te ete malako yango mazali na boyokani na kokokisama na esakweli moko ezwami na Biblia, kasi bakokanga ntina na yango na nsima. Mpo na yango, mosakoli Zakaria asakolaki ete Mokonzi oyo alakamaki na Nzambe, akokóta kati na Yelusaleme likoló na mwana na mpunda. Salomo mpe amataki likoló na mwana na mpunda ntango akendaki kopakolama mafuta.

Bongo, bayekoli bakei na Betefajé, bazwi mwana na mpunda mpe mama na ye, kasi bamoko na baoyo bazali wana batuni bango ete: “Bozali kosala nini?” Eyoki bango ete nkolo nde asengi banyama yango, bato wana batiki bayekoli ete bamema banyama epai na Yesu. Na nsima, bayekoli batandi bilamba likoló na mama mpe mwana na mpunda, kasi Yesu akomata nde likoló na mwana na mpunda.

Wana Yesu azali kobelema na Yelusaleme, bato mpe bazali sé kobakama. Mingi kati na bato bazali kotanda bilamba na bango na nsé, nzokande bamosusu bazali kokáta bitape na nzeté oyo bazali mpe kotanda yango na nsé. Bangangi ete: “Mokonzi oyo azali koya na nkombo na Jéhovah, asanzolama! Kimya na Likoló, mpe nkembo na bisika bileki likoló!”

Bafalisai bazali mpe kati na bato yango, nzokande basiliki mpo na kokumisa wana, mpe bafundi bango epai na Yesu, ete: “Molakisi, pamela bayekoli na yo!” Nde Yesu ayanoli bango ete: “Nalobi na bino solo ete soko baoyo bakozala nyɛ, boye mabángá makongánga.”

Ebelemi ye na Yelusaleme, Yesu amoni engumba yango mpe aleli mpo na yango kolobaka ete: “Soko na mokolo oyo oyebaki yo mpenza makambo makopesa kimya; nde sikawa mabómbámi na miso na yo.” Lokola Yesu asakoli yango sikawa, Yelusaleme esengeli kozwa etumbu mpo na kozanga botosi na yango:

“Bayini na yo [Baloma oyo batambwisami na Titus, mokonzi na basodá] bakosala lopango monene, mpe bakozinga yo kokangisa yo na bipai binso, mpe bakobwaka yo na nsé na bana na yo na kati na yo, mpe bakotika libángá moko na likoló na libángá mosusu kati na yo te.” Kobomama na Yelusaleme oyo esakolami na Yesu ekosalema mbula 37 na nsima, na mobu 70.

Eleki bobele mwa baposo, bato mingi oyo bazali kati na etuluku na bato wana, bamonaki ndenge Yesu asekwisaki Lazare. Sikawa bazali sé koyebisa yango epai na bato mosusu. Yango wana ntango Yesu akɔti na Yelusaleme, engumba mobimba ekómi na yikiyiki. Bato batuni ete: “Ye azali nani?” Bibele bazongisi ete: “Oyo mosakoli Yesu uta na Nazarete na Galilai.” Emoni bango boye, Bafalisai bamitungisi, mpamba te bakoki lisusu kosala eloko te; lokola bango moko balobi yango ete, “Bato nyonso bandimi ye.”

Lokola ameseni kosala yango na ntango nyonso oyo azali na Yelusaleme, Yesu akei koteya na tempelo. Kuna, bakufeli miso mpe bibósono bayei epai na ye mpe abikisi bango! Banganga-kapita mpe bakomeli basiliki wana emoni bango makambo minene oyo Yesu azali kosala, mpe wana eyoki bango bilenge mibali kongánga na tempelo ete: “Osana, Mwana na Davidi!” nde balobi na ye ete, “Oyoki makambo bango bazali koloba?”

Yesu ayanoli ete: “Ee, botangi naino te ete, ‘Longwa na minoko na bana mpe baoyo bakomelaka mabɛle, obimisi lisanzoli na malamu nyonso’?”

Yesu alandi koteya, mpe azali kotala baoyo nyonso bazali kati na tempelo. Mpe lokola ntango eleki, akei elongo na bazomi na mibale, mpe azongeli mobémbo ya bakilometele misato longwa na esika oyo ye azali, kino na Betania. Ezali kuna nde epai akei na butu ya mokolo na lomingo, ekoki mpenza kozala epai na moninga na ye Lazare. Matai 21:1-11, 14-17; Malako 11:1-11; Luka 19:29-44; Yoane 12:12-19; Zakaria 9:9.

▪ Ntango nini mpe motindo nini Yesu akɔti na Yelusaleme lokola Mokonzi?

▪ Ezali na ntina ete bibele bakumisa Yesu?

▪ Yesu aoki ndenge nini wana emoni ye Yelusaleme, mpe asakoli likambo nini?

▪ Likambo nini lisalemi na ntango Yesu akei na tempelo?