Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Akei na Yudea mpo na mobembo ya motema mawa

Akei na Yudea mpo na mobembo ya motema mawa

Mokapo 89

Akei na Yudea mpo na mobembo ya motema mawa

NA NTANGO na elambo ya Epetweli na Yelusaleme, Bayuda balingaki koboma Yesu. Emonani ete akendeki nordi, mpe akomaki na etuka moko pene na libeke ya Galilai.

Auti kozongela mobembo na ye na nzela ya ngele mpo na kokende na Yelusaleme, kosakolaka na nzela kati na bamboka mike ya Peleo, etuka oyo ezali epai moi ekobimaka na Yordani. Lokola asilaki kopesa lisese ya mozwi mpe Lazare, akobi koteya bayekoli na ye makambo oyo alakisaki na ntango bazalaki na Galilai.

Na ndakisa alobi ete, ekoleka malamu mpo na moto ete “libanga monene lizinga nkingo na ye mpe abwakama na mai-monene” na esika ete abetisa libaku na moko na baoyo “mike” bazali mpo na Nzambe. Alobeli mpe ntina ya kolimbisa, ete: “Ata soki [ndeko moko] asaleli yo lisumu mbala nsambo na mokolo moko, mpe abongwi epai na yo mbala nsambo koloba ete: ˈNakwei,ˈ boye limbisa ye.”

Ntango bayekoli basengi na Yesu ete: “Bakisela biso kondima,” ayanolaki bango ete: “Soko bozalaki na kondima lokola mbuma na sinapi, mbele bokokaki koloba na nzete oyo ete: ˈPikolama mpe konama kati na mai!ˈ mpe mbele etosi bino.” Na elobeli mosusu, ata kondima moke ezali kopesa nzela na kosala makambo minene.

Na nsima, Yesu alobeli likambo oyo liyebani malamu epai na bato banso mpo na komonisa elimo oyo esengeli kozala epai na mosaleli na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Yesu amonisi ete: ”[Nani kati na bino] soko azali na moombo oyo azali kotimola mabele soko kobatela mpate, nde akolongwa na elanga mpo na kokota na ndako, akoloba na ye ete: ˈYaka noki kofanda na mesa?ˈ Nde akoloba na ye boye te ete: ˈBongisa biloko na kolya na ngai, lata bilamba, mpe pesa ngai biloko kino esili ngai kolya mpe komela; na nsima yo okolya mpe okomela?ˈ Akotonda moombo mpo ete asali mosala molaki ye? Bongo bino, soko bosili kosala makambo nyonso masengami na bino, boloba ete: ˈTozali baombo mpamba, tosali oyo esengelaki na biso kosala.ˈ” Na bongo mosaleli na Nzambe asengeli kokanisa te ete azali kosalisa Nzambe ntango azali kosalela ye. Nkutu, asengeli ntango nyonso komikundola ete ezali libaku kitoko na kosambela ye mpe kozala moto ya kotyela motema kati na ndako na Ye.

Ekoki kozala mwa ntango moke nsima wana Yesu alobelaki lisese yango, momemi nsango moko akorni. Atindami na Marie mpe Malata, bandeko basi ya Lazare, baoyo bafandi na Betania na Yudea. Momemi nsango alobi ete: “Nkolo, tala ye oyo olingi abeli malali.”

Yesu ayanoli ete: “Kobela oyo ezali mpo na kufa te kasi mpo na nkembo na Nzambe ete Mwana na Nzambe akumisama na yango.” Yesu aumeli mikolo mibale na esika oyo azalaki, mpe na nsima alobi na bayekoli na ye ete: “Tokenda lisusu na Yudea.” Kasi bango bakundoli ye likambo oyo ete: “Labi, Bayuda baluki kobola yo mabanga bobele sikawa, mpe olingi kokende lisusu kuna?”

Mpo na koyanola, Yesu atuni bango ete: “Ngonga ezali zomi na mibale na mokolo moko te? Soko moto akotambola kati na moi, akobeta libaku te, mpo ete azali komona moi na mokili oyo. Nde soko moto akotambola kati na butu, akobeta libaku, mpo ete moi ezali kati na ye te.”

Oyo Yesu alingi koloba, emonani mpenza ete “ngonga kati na mokolo,” to elaka etyami na Nzambe mpo na mosala na ye na mabele naino esili te, mpe lokola yango ezali naino, moto moko te akosala ye likambo. Asengeli kosalela malamu ntango moke oyo atikali na yango na boumeli ya “mokolo,” mpamba te “butu” ekoya na nsima, ntango banguna na ye bakoboma ye.

Yesu abakisi ete: “Moninga na biso Lazare asili kolala mpongi; kasi nakokenda kolamwisa ye.”

Kokanisaka mpenza ete Lazare alali mpongi mpo na kopemisa nzoto, mpe ete ezali likambo malamu soko akomi lisusu na nzoto kolongono, bayekoli balobi na ye ete: “Soko alali mpongi, boye akobika.”

Bongo Yesu ayebisi bango polele ete: “Lazare akufi. Nazali mpe na esengo mpo na bino mpenza ete nazalaki wana te mpo ete bozala na kondima. Kasi tokenda epai na ye.”

Toma akanisi ete Yesu azali na likama ya kobomama na Yudea. Kasi, lokola alingaki kosunga ye, alendisi bayekoli mosusu na maloba oyo ete: “Biso mpe tokenda ete tokufa na ye elongo.” Kotyaka bongo bomoi na bango na likama, bayekoli balandi Yesu na Yudea mpo na mobembo wana ya motema mawa. Luka 13:22; 17:1-10; Yoane 10:22, 31, 40-42; 11:1-16.

Epai wapi Yesu azali kosakola uta mwa ntango?

▪ Mateya nini Yesu azongeli yango lisusu? Alobeli ezalela nini ya bomoi na bato, mpe mpo na komonisa likanisi nini?

▪ Nsango nini Yesu azwi, mpe maloba “butu” mpe “moi” malimboli nini?

▪ Toma alingi koloba nini wana elobi ye ete: ˈTokenda kokofa elongo na yeˈ?