Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Akokisi esakweli moko ya Yisaya

Akokisi esakweli moko ya Yisaya

Mokapo 33

Akokisi esakweli moko ya Yisaya

LOKOLA ayoki ete Bafalisai mpe bato na Hérode bazali kokana koboma ye, Yesu amibendi epai na libeke ya Galilai elongo na bayekoli na ye. Kuna, bibele bayei epai na ye longwa na Palestine mobimba, mpe ata koleka bandelo na yango. Yesu abikisi bato mingi na maladi, na motindo boye ete bato nyonso oyo bazali na maladi makasi bazali kowela mpo na kosimba ye.

Liboso na bato mingi boye, Yesu asengi epai na bayekoli na ye ete babongisa bwato moko mpo na ye. Na kotangwáká na mokili, akoki kopengola ete bibele bakangisa ye te. Akoki koteya bango uta na bwato to lisusu kokende na libongo moko moko ya ebale mpo na kosalisa bato bazali kuna.

Moyekoli Matai amonisi ete mosala na Yesu mokokisi “liloba lilobaki mosakoli Yisaya.” Nsima na yango atangi esakweli yango mobimba oyo Yesu akokisi:

“Tala, mosaleli na ngai oyo esili ngai kopona ye, molingami na ngai; molimo na ngai esepeli na ye; nakotyela ye elimo na ngai mpe akosakola boyengebene epai na mabota na bapaya. Akowelana te, akonganga te, moto akoyoka mongongo na ye kati na nzela te. Monkékele mogúmbámi, akobuka yango te; móto molingi kozimana, akozimisa yango te; kino akolongisa boyengebene, mpe mabota makolikya na nkombo na ye.”

Yesu azali mpenza mosaleli alingami mingi oyo Nzambe andimi ye. Azali komonisa polele boyengebene na solo, oyo ezipami na mitindo na bonkoko na mangomba na lokuta. Na bongo, mpo ete bazali kopesa ndimbola mabe na ntina na mobeko ya Nzambe, Bafalisai bakoki ata kosalisa te moto oyo azali na maladi na mokolo ya sabata! Na yango, komonisáká bongo polele boyengebene ya Nzambe, Yesu asikoli bayoki na ye na mokumba ya mitindo mizangi sembo; yango wana bakonzi na mangomba balingi koboma ye.

‘Akowelana te, akonganga te, moto akoyoka mongongo na ye kati na nzela te.’ Yango elingi koloba nini? Wana Yesu azali kobikisa bato, azali mpe ‘kopekisa bango makasi ete bayebanisa ye polele te.’ Alingi te ete bato balobaloba na ntina na ye epai na epai to kopanza nsango oyo ekoki kobebisama, wana ezali yango kopanzana.

Epai mosusu, Yesu azali kopesa nsango ya kobondisa epai na bato oyo, na elobeli na elilingi, bakokani na monkékele mogúmbami, monyatami na makolo na bato. Bango bakokani na nsinga na mwinda oyo móto na yango molingi kozimana, baoyo elikya ya nsuka ya bomoi elingi kokufa. Yesu anyati monkékele mogúmbami te, azimisi mpe móto molingi kozimana te. Nde na bolingo, ayebi ndenge nini kotombola basokemi. Yesu azali mpenza ye oyo mabota bakoki kolikya epai na ye! Matai 12:15-21; Malako 3:7-12; Yisaya 42:1-4.

▪ Na ndimbola nini Yesu alakisi boyengebene, kozanga kowelana to kotombola mongongo na nzela minene?

▪ Banani bakokani na monkékele mogúmbami mpe na nsinga na mwinda oyo móto na yango molingi kozimana, mpe ezalela na Yesu ezali nini liboso na bango?