Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Akundami mokolo ya mitano, alimwe mokolo ya lomingo

Akundami mokolo ya mitano, alimwe mokolo ya lomingo

Mokapo 127

Akundami mokolo ya mitano, alimwe mokolo ya lomingo

MOKOLO na mitano ebelemi na nsuka. Mosika te, le 15 Nisan, mokolo ya sabata molingi kobanda, wana moi mokolála. Nzoto na Yesu ekakisami likoló na nzeté nzokande asilaki kokufa, kasi basali na mabe mibale, baoyo bazali ngambo na ngambo na ye, bazali naino na bomoi. Nsima na midi na mokolo na mitano ebengami Ebongiseli, mpo ete Bayuda bazali kobongisa bilei na bango mpe bazali koluka kosilisa misala nyonso oyo mikoki kozela kino nsima na mikolo mibale te.

Sabata oyo elingi kobanda, ekokani na sabata mosusu te (elingi koloba mokolo ya nsambo ya poso), ezali nde sabata mibale esangani, to sabata “monene.” Le 15 Nisan ya mbula oyo ebengami bongo mpo ete, lokola ezali mokolo ya liboso kati na mikolo nsambo ya elambo na Mampa mazangi mfulu (mpe ekozalaka sabata, ata soko ekozala mokolo nini ya poso), ekwei mokolo moko na sabata ya poso na poso.

Mobeko na Nzambe elobi ete nzoto ya moto esengeli te kolekisa butu mobimba likoló na nzeté. Bayuda basengi na Pilato ete atinda basoda kobuka makolo ya bato oyo bakakisami na nzeté mpo ete bakufa noki. Basoda babuki bongo makolo ya basali mabe mibale, kasi batiki makolo na Yesu, mpo ete asili kokufa. Yango ekokisi maloba ya Makomami oyo ete: “Ata mokwa moko na ye ekobukama te.”

Kasi, mpo na koyeba ete Yesu akufi mpenza, moko na basoda atoboli ye likongá na mpanzi. Likongá likóti kino epai ya motema, mpe makila na mai mabimi. Ntóma Yoane, ye oyo azali komona makambo wana, akoyebisa nsima ete yango ekokisi liloba mosusu ya Makomami oyo elobi ete: “Bakotala epai na Ye oyo bango basili kotobola.”

Yozefe, moto ya engumba Arimaté, mosangani na lokumu na Sanedrina, azali mpe wana esika babomi Yesu. Ye aboyaki mokano ya basangani mosusu ya likita wana mpo na kokatela Yesu etumbu ezangi sembo. Tokoki koloba mpenza ete Yozefe azali moko na bayekoli na ye, atako abangaki komimonisa polele liboso na bato. Kasi sikawa, akóti na mpiko nyonso epai na Pilato mpo na kosenga nzoto na Yesu. Pilato abengi naino mokonzi na basoda mpo na koyeba soki Yesu akufi solo mpenza, mpe nsima apesi nzoto na Yesu epai na Yozefe.

Yozefe azwi ye, mpe abongisi ye mpo na bokundami na kolingáká ye molikani na peto. Asungami na Nikodeme, oyo azali mpe mosangani mosusu ya Sanedrina. Ye amonisaki kondima na ye te, noki te akolongolama na etelemelo na ye. Amemi mola mpe aloès, aloès yango ezali malasi ya motuya mingi, esangisami, nyonso lokola bozito na litela mokama na etangeli ya Baloma (soko 33 kilo). Nzoto na Yesu elingami na bilamba oyo bityami malasi, lokola ezali momeseno ya Bayuda mpo na kokunda mowei.

Na nsima, bakei kotya nzoto na liyita ya sika oyo bakundi naino moto wana te, ezali liyita na Yozefe oyo litimolami na mabangá kati na elanga ezali zingazinga na esika yango. Mpo na kosilisa, bapusi libangá monene kino monoko na liyita. Mpo ete nzoto ekundama liboso ete mokolo na sabata ebanda, esengelaki kobongisa yango na lombángo. Marie Madeleine mpe Marie, mama na Yakobo Moke, baoyo bazali mbala mosusu bapesi maboko mpo na kobongisa nzoto yango, bazongi nokinoki epai na bango mpo na kobongisa malasi mpe mafuta mosusu mpo na kobakisa. Bazali na likanisi ya kozonga nsima na sabata mpo na kobongisa lisusu nzoto, ete eumela ntango molai kozanga kopola.

Lobi lolandi, mokolo na poso, mokolo ya sabata, banganga-kapita mpe Bafalisai bakei epai na Pilato mpe balobi na ye ete: “Nkolo, tomikundoli ete mokosi yango alobaki naino azalaki na bomoi ete: ‘Nakosekwa nsima na mikolo misato.’ Na yango, tinda bato bakengele liyita kino mokolo ya misato, noki bayekoli na ye bakoyiba ye mpe koloba epai na bato ete: ‘Asili kosekwa kati na bakufi!’ Boye bokosi na nsuka ekoleka oyo na liboso.”

Pilato azongisi ete: “Bozali na bakengeli. Bokende kokengele yango lokola elingi bino moko kosala yango.” Bongo, banganga-kapita mpe Bafalisai bakei mpe bakangi liyita na libanga monene, batii mpe bakengeli Baloma wana.

Na ntongo mpenza, na mokolo na lomingo, Marie Madeleine mpe Marie, mama na Yakobo, elongo na Salomé, na Yoana, mpe basi mosusu bamemi malasi mabongisami mpo na kopakola na nzoto na Yesu. Na nzela, bakómi kolobana ete: “Nani akolongwela biso libangá na monoko na liyita?” Kasi ekómi bango na liyita, bamoni ete koningana na mabelé esalamaki mpe libangá lilongolamaki na anzelu na Jéhovah. Bakengeli basili kokende mpe liyita litikali mpámba! Matai 27:57 kino 28:2; Malako 15:42 kino 16:4; Luka 23:50 kino 24:3, 10; Yoane 19:14, Yn. 19:31 kino 20:1; 12:42; Levitike 23:5-7; Deteronome 21:22, 23; Nzembo 34:20; Zakaria 12:10, MN.

▪ Mpo na nini mokolo na mitano ebengami Ebongiseli, mpe sabata “monene” elimboli nini?

▪ Maloba nini ya Makomami makokisami na ntina na nzoto ya Yesu?

▪ Mosala nini Yozefe mpe Nikodeme basali mpo na kokundama na Yesu, mpe eloko nini ekangisi bango na Yesu?

▪ Likambo nini banganga bakei kosenga epai na Pilato, mpe bazwi eyano nini?

▪ Likambo nini lisalemi na ntongo ya mokolo na lomingo?