Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Asimbaki elamba na ye

Asimbaki elamba na ye

Mokapo 46

Asimbaki elamba na ye

NSANGO ekomi na Kapernaume ete Yesu azongi uta na Dekapoli, mpe bibele bayangani mpo na koyamba ye na libongo. Na ntembe te, bato basili koyoka ete akitisaki mopepe makasi mpe abenganaki bilimu mabe bikotelaki bato. Sikawa, ntango abimi na masuwa, bato banso bazingi ye, bazali na motema mokuse mpe na elikya ya komona makambo akosala.

Kati na baoyo bazali na mposa makasi ya kokutana na Yesu, ezali bongo Yailo, moko na bakambi na eyanganelo. Akwei na makolo na Yesu mpe azali kobondela ye ete: “Mwana na ngai ya mwasi alingi kokufa. Nabondeli yo ete oya kotiela ye maboko na yo ete abika mpe azala na bomoi.” Yailo alingi mingi mwana yango, mpamba te azali sé na mwana moko wana mpe azali bobele na mibu 12.

Nokinoki, Yesu akei elongo na Yailo na ndako na ye, mpe bibele na bato balandi ye lokola. Tokanisa yikiyiki na bato, lokola bayebi ete ekamwiseli mosusu elingi kosalema. Kati na bango, mwasi moko azali wana, nde ye azali komibanzabanza liboso mpo na mpasi na ye moko.

Uta mibu 12, azali kobèla maladi ya kotanga makila. Asili kokende epai na minganga ndenge nyonso, mpe asilisi mosolo na ye nyonso mpo na kozwa libiki. Kasi eloko moko ebongwani te; maladi ezali koya nde makasi koleka.

Longola bolembu oyo maladi yango ezali kopesa ye na nzoto, azali mpe kooka nsoni mingi mpo na yango. Mingimingi balobelaka maladi ya boye na miso na bato te. Lisusu, na Mibeko na Moïse, mwasi azali peto te ntango azali kotànga makila, mpe moto nyonso oyo akosimba ye, ezala ye moto to bilamba na ye oyo bibebisami, asengeli kosukola nzoto mpe akotangama ete moto na mbindo kino na mpokwa.

Mwasi yango ayokaki nsango na bikamwiseli na Yesu; sikawa azwi libaku ya komona Yesu. Mpo ete azali peto te, azali koluka nzela katikati na bato kozanga ete abenda likebi na bango; azali komiloba ete: “Soki nakosimba ata bilamba na ye, bokono na ngai ekosila.” Mpe asimbi yango; bobele na ntango yango, makila matiki kotànga ye!

“Nani asimbi ngai?” Maloba oyo ya Yesu mabangisi ye! Ndenge nini Yesu ayebi ete moto asimbi ye? Petelo alobi na ye ete: “Molakisi, bibele bazali kokangana na yo mpe bazali kotuta yo, mpe olobi ete: ‘Nani asimbi ngai?’”

Kolukáká mwasi yango kati na ebele na bato, Yesu alobi ete: “Moto asimbi ngai, mpamba te nayoki nguya kobima na ngai.” Na yango, kosimba oyo mwasi asimbi ye ekeseni na ndenge bato mosusu bazali kotutana na ye, mpamba te kobikisama ya mwasi na bokono na ye ebimisi ndambo na nguya epai na Yesu.

Komonáká ete akokaki kobombama te, mwasi wana ayei liboso na Yesu mpe akwei na makolo na ye, na kobanga mpe kolénga. Alobeli maladi na ye liboso ya bato nyonso, mpe lolenge nini auti kobika na yango.

Yesu ayoki mawa na ndenge mwasi andimi mpasi na ye, mpe akitisi ye motema ete: “Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo. Kenda na kimya, mpe obikisama na maladi na yo.” Ezali likambo malamu mingi na koyeba ete moto oyo Nzambe aponi mpo na koyangela mabelé, azali moto moko azali mpenza kosepela na bato, azali koyokela bato mawa, azali komibanzabanza mpo na bato mpe azali na nguya ya kosalisa bango! Matai 9:18-22; Malako 5:21-34; Luka 8:40-48; Levitike 15:25-27.

▪ Yailo azali nani, mpe mpo na nini ayei kokutana na Yesu?

▪ Mwasi moko azali wana, azali komitungisa sé na nini, mpe mpo na nini ezali mpasi mpo na ye ete akenda kokutana na Yesu?

▪ Ndenge nini mwasi yango abiki, mpe ndenge nini Yesu akitisi motema na ye?