Atɛkami mpe akangami
Mokapo 118
Atɛkami mpe akangami
KATIKATI na butu esili koleka na ntango Yuda akómi na elanga ya Getesemane, komema ebele na bato oyo kati na bango ezali na basodá, banganga-kapita mpe Bafalisai. Banganga bayokanaki mpo na kopesa ye paláta na misolo 30 mpo ete atɛka Yesu.
Mwa moke liboso, ntango babimisaki ye na elambo ya Pasiká, emonani polele ete akendaki mbala moko epai na banganga-kapita. Bango bayanganisaki noki basali na bango elongo na limpinga moko ya basodá. Mbala mosusu Yuda amemaki bango naino na esika oyo Yesu mpe bantóma na ye bakumisaki Pasiká. Emoni bango ete balongwaki wana, ebele na bato yango bamemi bibundeli, na miinda mpe na mpaká, babimi longwa na Yelusaleme Yuda liboso na bango, mpe bakatisi lobwaku ya Kedelona.
Soki Yuda azali komema molongó na bato wana epai na ngomba ya Olive, ezali mpo ete ayebi esika nini bakoki kokuta Yesu. Poso oyo euti koleka, na ntango bazalaki kosala mibémbo katikati na Betania mpe Yelusaleme, Yesu mpe bantóma na ye, mbala mingi bazalaki kofanda moke na elanga ya Getesemane mpo na kopema mpe kosolola. Kasi, na ngonga oyo, na ntembe te Yesu azali kati na molili na nsé na banzeté ya olive; ndenge nini basodá bakoyeba ye? Mbala mosusu bamóna ye naino liboso te. Yango wana Yuda apesi bango elembo, ete: “Soko nakopwepwa nani, ye wana. Bokanga ye, bokenda na ye mpe bokengela ye malamu.”
Yuda akambi ebele na bato na elanga, amoni Yesu elongo na bayekoli na ye, mpe akei mbala moko liboso na ye. Alobi na ye ete: “Mbote, Labi! Mpe apwepwi ye.”
Yesu azongisi: “Moninga ozali awa mpo na nini?” Mpe, ye moko ayanoli na motuna, ete: “Yuda, ozali kokaba Mwana na moto na lipwepwe?” Kasi tokoloba lisusu te na ntina na moteki oyo! Yesu apusani epai na kongenga ya mpaká mpe ya miinda, mpe atuni ete: “Bozali koluka nani?”
Bamosusu bayanoli ete: “Yesu moto na Nazarete.”
Abimi epai na bango na molende nyonso, ye ete: “Ngai oyo.” Ekamwi bango mpo na molende na ye mpe lokola bayebi te soki akosala bango likambo nini, mibali yango bazongi nsima mpe bakwei na mabelé.
Yesu akobi na kimya nyonso: “Nalobi na bino ete, ngai oyo; soko bozali koluka ngai, tika ete baoyo bakenda na bango.” Mwa ntango liboso, kati na eteni na ndako na likoló, Yesu abondelaki Tata na ye ete, abatelaki bantóma na ye ya sembo mpe ete moko te kati na bango abungaki, “bobele mwana na libebi.” Mpo ete liloba na ye likokana, asengi ete batika bayekoli na ye bakende.
Wana basodá bazwi lisusu makasi, batelemi mpe babandi kokanga Yesu na nsinga, bantóma basosoli likambo oyo likosalema nde batuni ete: “Nkolo, tobeta mopanga?” Naino Yesu ayanoli te, Petelo azwi moko na mipanga mibale oyo bantóma bamemaki mpe abeti Malukusu, moombo ya nganga monene. Azwi ye na motó te, kasi akati ye litoi ya mobali.
Yesu apekisi ete: “Botika; ekoki boye.” Asimbi litoi ya Malukusu mpe asilisi mpótá na ye. Apesi na bongo liteya moko monene, na kopesáká etinda epai na Petelo ete: “Zongisa mopanga na yo na esika na yango. Mpamba te baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga. Okanisi te ete nakoki kobondela Tata na ngai mpe ye akotindela ngai pwasa koleka bibele zomi na mibale na baanzelu?”
Yesu andimi kokangama, mpo alimboli ete: “Nde nzela nini makomi makokokana ete makambo masengeli kobima boye?” Mpe abakisi ete: “Kopo oyo epesi Tata epai na ngai, namela yango te?” Atósi mokano na Nzambe na ntina na ye, na mobimba na yango.
Yesu alobi epai na bibele ete: “Bobimi nde na mipanga mpe na nzeté kokanga ngai lokola mpo na moyibi? Nafandaki na tempelo kolakisa mokolo na mokolo nde bokangaki ngai te. Kasi nyonso ekómi mpo ete makomi na basakoli makokana.”
Nsima na koloba boye, limpinga na basoda, Komandá mpe basali ya Bayuda bakangi Yesu mpe balingi ye na nsinga. Emoni bango boye, bantóma batiki ye mpe bakimi. Nzokande, elenge mobali moko, ekoki kozala moyekoli Malako, atikali elongo na bibele. Mbala mosusu azalaki na ndako epai kuna Yesu akumisaki Pasiká mpe na nsima, alandaki bibele ntango bakendaki. Sikawa bayebi ye, mpe bato mosusu bameki kokanga ye. Abwaki bilamba na ye ya pɛpɛlɛ, mpe akimi. Matai 26:47-56; Malako 14:43-52; Luka 22:47-53; Yoane 17:12; 18:3-12.
▪ Mpo na nini Yuda azali na elikya ya kokuta Yesu kati na elanga ya Getesemane?
▪ Ndenge nini Yesu amonisi ete azali komibanzabanza mpo na bantóma na ye?
▪ Petelo asali nini mpo na kobikisa Yesu, kasi Yesu alobi na ye nini?
▪ Ndenge nini Yesu amonisi ete atósi mokano na Nzambe na ntina na ye, na mobimba na yango?
▪ Ntango bantóma bakimi Yesu, nani atikali, mpe likambo nini likómeli ye?