Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ayoki mawa mpo na banyokwami

Ayoki mawa mpo na banyokwami

Mokapo 57

Ayoki mawa mpo na banyokwami

NSIMA ya kokitisa Bafalisai mpo ya bonkoko na bango na moimi, Yesu akei elongo na bayekoli na ye. Tozali komikundola ete mwa ntango moke liboso, akokaki te komibenda esika moko elongo na bayekoli na ye mpo na kopema, mpo ete bibele balandaki ye. Kasi sikawa, amemi bango na Tula mpe na Sidona, bamboka oyo ezali na ntáka ya bakilometele mingi kuna na nord. Ekoki kozala mobembo bobele moko oyo akosala elongo na bayekoli na ye na libanda na Yisraele.

Nsima wana bazwi ndako ya kolala, Yesu alobi ete alingi te bato bayeba esika bango bazali. Kasi, ata na mokili wana libanda na Yisraele, akoki kobombama te. Mwasi moko mogreke, ye mobotámá na mokili wana, mokili na Fenisi epai na Sulia, abelemi epai na ye mpe abandi kobondela ye ete: “E Nkolo, Mwana na Davidi, yokela ngai mawa! Mwana mwasi na ngai azali na elimu mabe.” Kasi, Yesu ayanoli ye ata liloba te.

Nsima na mwa ntango, bayekoli balombi Yesu ete: “Loba na ye azonga, mpamba te azali konganga nsima na biso.” Mpo na komonisa ntina nini aboi koyanola, Yesu alobi: “Natindami bobele epai na bampate na ndako na Yisraele baoyo basili kobunga.”

Kasi ata bongo, mwasi alembi te. Abelemi epai na Yesu, afukami liboso na ye mpe abondeli ye ete: “Nkolo, salisa ngai.”

Mwasi yango abondeli ye na bosembo nyonso mpe likambo yango epesi Yesu mawa mingi. Kasi amonisi lisusu ete mokumba na ye ya liboso ezali ya kosalela Yisraele, libota na Nzambe. Na ntembe te, ezali mpo na komeka kondima ya mwasi yango nde Yesu alobeli komitombola oyo Bayuda bazali na yango liboso na bapaya, na kolobáká ete: “Ezali malamu te kokamata bilei na bana mpe kopesa yango epai na bana na mbwa.”

Mongongo na ye mpe elongi na ye emonisi polele ete azali koyokela bapakano mawa. Alembisi ata kokesena oyo ezali kati na Bapakano mpe bambwa na kobengáká bango “bana na mbwa.” Na esika ete mwasi yango ayoka mpasi na motema, azongeli nde likanisi na Yesu na ntina na liyoki ya komitombola na Bayuda mpe, na kosokema nyonso alobi na ye ete: “Ee Nkolo, kasi ata bana na mbwa bakolyaka biteni oyo ekokweaka longwa na mesa na nkolo na bango.”

Bongo Yesu ayanoli ye ete: “E mwasi, kondima na yo ezali solo monene! Tika ete kosenga na yo esalema lokola elingi yo.” Mpe yango esalemi bongo mpenza! Ezongi ye, akuti mwana na ye alali na mbeto, na nzoto malamu, elimu na mbindo esili kobima.

Kolongwa na etúka na Sidona kuna pembeni na mai monene, Yesu mpe bayekoli na ye batamboli mpo na kokoma na Yordani epai na nord, oyo na ntembe te bakatisi yango na makolo kuna na likoló ya libeke ya Galilai. Bakoti na nsima na etúka ya Dekapole, na est ya ebale. Kuna, bamati likoló na ngomba moko, kasi bibele balandi bango mpe bakumbeli Yesu batengumi, bibosono, bakufeli-miso, babába mpe ba andikapé ndenge nyonso mpe bato na maladi. Babwaki bango na makolo na ye mpe abikisi bango. Bato bakamwe, mpamba te babába bazali koloba, bibosono bazali kotambola mpe bakufeli-miso bazali komona, mpe bazali kokumisa Nzambe na Yisraele.

Yesu atye likebi na ye mingi epai na moto moko mokufeli-matoi, oyo azali na likekuma makasi. Bakufeli-matoi bakomitungisaka mpenza, mingimingi soki bazali kati na ebele na bato. Mbala mosusu mpo ete Yesu amoni mayoki na ye, ayokeli ye mawa mpe abendi ye pembeni. Ntango bakomi bobele bango mibale, amonisi ye likambo akosala mpo na ye. Akotisi ye misapi na matoi mpe, nsima na kobwaka nsoi, asimbi lolemo na ye. Mpe kotaláká na likoló, apemi makasi mpe alobi ete: “Fungwama!” Nokinoki, mobali yango abandi koyoka mpe abandi koloba malamumalamu.

Ntango bamoni Yesu asali makamwísi oyo nyonso, bibele batondi ye, balobi ete: “Asali makambo nyonso malamu, akoyokisaka bato bakufeli matoi, akolobisaka ba bába.” Matai 15:21-31; Malako 7:24-37.

▪ Mpo na nini Yesu abikisi mwana na mwasi mogreke nokinoki te?

▪ Na nsima Yesu amemi bayekoli na ye epai wapi?

▪ Ndenge nini Yesu amonisi mawa epai na mokufeli matoi oyo azali na likekuma makasi?