Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Azali koluka baoyo basili kobunga

Azali koluka baoyo basili kobunga

Mokapo 85

Azali koluka baoyo basili kobunga

YESU azali koluka na molende mpenza, baoyo balingi kosalela Nzambe na bopolo nyonso. Azali kokende epai na bato banso, ata epai na basali na masumu mingi, mpo na koloba na bango na ntina na Bokonzi. Sikawa, ezali mpenza bato na masumu nde babelemi penepene na ye mpo na koyoka ye.

Bafalisai mpe bakomeli baoyo bazali komona likambo yango, bazali kotonga Yesu mpo ete azali kokende epai na bato batyolami na miso na bango. Bazali koimaima ete “Moto oyo akoyambaka bato na masumu mpe akolyaka na bango elongo.” Bango moko bakomikitisa te mpo na kosala likambo yango! Ya solo, Bafalisai mpe bakomeli bazali kotalela bato mpamba lokola mputulu na nse na makolo na bango. Nkutu bazali kobenga bango ete ˈam haˈaˈrets, “bato ya mboka [ya mokili],” oyo emonisi lolenge oyo bazali kotyola bango.

Nzokande, Yesu azali kotalela moto nyonso na limemya, na boboto mpe na motema mawa. Yango wana ebele na bato yango ya bopolo, bakisa mpe bato oyo bayebani ete basalaka masumu, balingi mpenza koyoka ye. Kasi tokanisi boni mpo na matongi makasi ya Bafalisai mpo ete Yesu azali kosala mingi mpo na baoyo bango bazali kotelala ete babongi te?

Yesu ayanoli na matongi na bango na lisese moko. Na kotalela likanisi ya Bafalisai, baoyo bazali komitanga sembo mpe na boyokani malamu elongo na Nzambe, na likeseni na bato mpamba oyo ete ˈam ha-ˈaˈrets, bango basili kozimbisama mpe basili kobunga, Yesu alobi ete:

“Nani kati na bino soko azali na bampate mokama, nde moko ebungi, akotika yango ntuku libwa na libwa te kati na lisobe, mpo na koluka yango ebungi kino ekozwa ye yango? Esili ye kozwa yango, akotya yango na mapeka na ye mpe akosepela. Akoingela na ndako mpe akoyanganisa baninga na ye, na bazalani na ye, mpe akoloba na bango ete: ˈSepela na ngai, mpo ete nazwi mpate na ngai oyo esilaki kobunga.ˈ”

Na nsima apesi ndimbola ya lisolo na ye, na maloba oyo: “Bongo nalobi na bino ete, esengo ekozala kati na likolo mpo na moto moko na masumu oyo akobongola motema, ekoleka esengo mpo na bayengebene ntuku libwa na libwa baoyo bazali na mposa na kobongola motema te.”

Bafalisai bakanisi ete bazali bayengebene mpe bazali na mposa na kobongola motema te. Mibu mibale liboso, ntango bamoko kati na bango bapamelaki Yesu mpo ete azalaki kolya elongo na bakongoli na mpako mpe na bato na masumu, Yesu alobaki na bango ete: “Nayei kobyanga bayengebene te kasi bato na masumu.” Bafalisai, bango bandimisami ete bazali bayengebene, bazali komona ntina ya kobongola mitema te, esengo bazali kopesa na likolo te. Nzokande, ezali bongo ntango bato na masumu bazali mpenza kobongola mitema.

Mpo na kolendisa likanisi oyo ete kotelemisa bato na masumu oyo bazimbisami ezali kopesa esengo monene, Yesu apesi lisese mosusu. “Mwasi nani soko azali na mbuma ya palata zomi, nde akobungisa mbuma moko, mpe akopelisa mwinda te, mpe akokomba ndako te mpo na kolukaluka kino ekozwa ye yango? Esili ye kozwa yango, akoyanganisa baninga na ye, na bazalani na ye, mpe akoloba ete: ˈBosepela na ngai elongo, mpo ete nazwi mbuma oyo ebungaki.ˈ”

Yesu apesi ndimbola ekokani ete: “Nalobi na bino ete, esengo ekozala bongo kati na baanzelu na Nzambe mpo na moto moko na masumu oyo abongoli motema.”

Emonani polele ete baanzelu bazali kosepela na bolingo nyonso na kotelemisama ya basumuki oyo babungaki nzela. Emonani mpenza polele ete, ba ˈamha-ˈaˈrets, wana ya bopolo mpe batyolami, bazwi libaku ya kokoma basangani ya Bokonzi ya Nzambe na likolo, oyo na nzela na yango, na nsuka, bakokota na makolo na etelemelo monene koleka oyo na baanzelu! Kasi, na esika ete bayoka zuwa to nkanda, baanzelu bazali kososola na komikitisa nyonso ete bato wana ya masumu bazali kokutana mpe kolonga mikakatano oyo mizali kobongisa bango mpo na kosala na likolo lokola mikonzi mpe banganga na kobondisa mpe na mitema mawa. Luka 15:1-10; Matai 9:13; 1 Bakolinti 6:2, 3; Emoniseli 20:6.

Mpo na nini Yesu azali kokende epai na basali na masumu mingi, mpe matongi nini yango ebimisi epai na Bafalisai?

▪ Ndenge nini Bafalisai bazali kotalela bato mpamba?

▪ Masese nini Yesu asaleli, mpe liteya na yango ezali nini?

▪ Mpo na nini ezali polele ete baanzelu bazali kosepela?