Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Azwi zemi nde abali naino te

Azwi zemi nde abali naino te

Mokapo 4

Azwi zemi nde abali naino te

MARIE azali na zemi soki ya sanza misato. Alekisaki basanza ya liboso ya zemi na ye epai na Elizabete mpe sikawa asili kozonga epai na ye na Nazarete. Mosika te, bato banso na engumba moke oyo ye afandi, bakoyeba ete azali na zemi. Azali mpenza kati na mokakatano makasi.

Eloko eleki lisusu mpasi, ezali ete Marie asili kolakama mpo na libala na Yozefe, mosali na mabaya. Nzokande, lokola ayebi yango malamu, na mibeko oyo Nzambe apesaki na Yisraele, soki elenge mwasi oyo asili kolakama na libala andimi kosangisa nzoto na mobali mosusu, ye asengeli kobomama na mabanga. Akosala nini mpo na kolimbola na Yozefe na nzela nini azwi zemi?

Uta Marie akendaki mobembo, eleki sanza misato; na ntembe te Yozefe azali na motema likolo mpo na komona ye lisusu. Wana bakutani mpo na mbala ya liboso, na ntembe te Marie asili koyebisa likambo yango na Yozefe. Asali nyonso mpo na kondimisa ye ete azwi zemi na nzela na elimo santu na Nzambe, kasi Yozefe azali kondimela ye te.

Yozefe ayebi ete Marie azali elenge mwasi ya mobulu te, mpe ntembe ezali te ete alingi ye mingi. Nzokande, ata nyonso oyo azali koloba, Yozefe azali komona bobele ete asanganaki na mobali mosusu, nsima na yango nde azwi zemi. Nde atako bongo, Yozefe alingi te ete abomama na mabanga soki mpe koyokisa ye nsoni na miso ya bato. Yango wana azwi ekateli ya kotika ye na nkuku. Na eleko yango, bafianse bazalaki lokola bato babalani, mpe kokabwana esengelaki kosalama lokola bakobomaka libala.

Na nsima, Yozefe akei kolala, makanisi na ye mazali se kotungisama na likambo oyo. Bongo anzelu na Jehovah abimeli ye na ndoto mpe alobi na ye ete: “Kobanga te mpo na kokamata Marie lokola mwasi na yo, mpamba te asili kozwa zemi na nzela na elimo santu na Nzambe. Akobota mwana mobali mpe okopesa ye nkombo Yesu, mpo ete ye akobikisa bato na ye na masumu na bango.”

Yozefe alamuki na esengo nyonso mpe na botondi. Kotosaka etinda azwi epai na anzelu, akei noki kokamata Marie mpe ayei na ye na ndako. Libala esalami, mpamba te amonisi bongo na miso ya bato nyonso ete ye na Marie babalani mpenza. Nzokande, Yozefe akosangisa nzoto na Marie te kino akobota Yesu.

Botala! Zemi ya Marie ekomi sikawa monene; kasi Yozefe azali komatisa ye likolo ya mpunda. Bakei wapi? Mpo na nini bakei mobembo nzokande mikolo ya Marie mpo na kobota mibelemi? Luka 1:39-41, 56; Matai 1:18-25; Deteronome 22:23, 24.

Yozefe asali nini ntango ayoki ete Marie azali na zemi? Mpo na nini?

Ndenge nini Yozefe alingi koboma libala na ye na Marie, nzokande babalani naino te?

Libala ya Yozefe na Marie esalami ndenge nini?