Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Babuki mbuma na mokolo na sabata

Babuki mbuma na mokolo na sabata

Mokapo 31

Babuki mbuma na mokolo na sabata

YESU mpe bayekoli na ye bakomi pene ya kotika Yelusaleme mpo na kozonga na Galilai. Tozali kati na sanza na aprili soko na mai, mpe kati na bilanga mito na mbuma na orge to na blé misili kotela. Bayekoli bayoki nzala. Babuki mwa mbuma mpe balei yango. Kasi lokola ezali mokolo na sabata, likambo bango basali ekoki kobombama te.

Eleki kala mingi te, na Yelusaleme, bakonzi na mangomba balukaki koboma Yesu na kolobaka ete ye azali kobuka mobeko ya sabata. Bafalisai bafundi ye sikawa boye ete: “Tala, bayekoli na yo bazali kosala oyo ebongi kosala na mokolo na sabata te.”

Bafalisai balobi ete kokamata mito na mbuma mpe kopalola yango na maboko mpo na kolya yango, ezali se ndenge moko na mosala monene ya bobuki mbuma mpe kotuta yango. Kasi ndimbola na bango ya mokuse mpo na oyo etali mosala ekomisi sabata eloko ya kilo, nzokande yango esengelaki kozala ntango ya esengo mpe ya kolendisama na elimo. Na yango, Yesu abimiseli Bafalisai bandakisa ezwami na Makomami oyo emonisi ete mokano ya Jéhovah Nzambe ezalaki ata mbala moko te ete asalela na ndenge ya kolekisa ndelo mobeko na Ye na ntina na sabata.

Yesu alobi na bango ete, ntango Davidi mpe bato na ye bayokaki nzala, batelemaki na hema mosantu mpe balyaki mampa malakisamaki liboso na Jehovah. Atako mampa yango malongolamaki liboso na Jehovah mpe na esika na yango batyaki oyo na sika, nzokande yango ebombamaki mpo elyama bobele na banganga-nzambe. Kasi, na libaku yango, Davidi mpe bato na ye bakweisamaki te mpo ete balyaki mampa yango.

Yesu apesi ndakisa mosusu: “Botangi mpe na Mibeko te lokola banganga bakobukaka sabata kati na tempelo na mokolo na sabata, nde bazali na ekweli te?” Ee, ata na mokolo na sabata, banganga-nzambe, na tempelo, bazali kokata banyama mpe kosala misala misusu mpo na kobongisa mbeka. “Nazali koloba na bino solo ete moto azali awa aleki tempelo.”

Bongo na nsima apameli Bafalisai: “Soko boyebaki ntina na oyo ete, ˈNalingi mawa, nalingi mbeka te,ˈ mbele bokweisi te bato oyo bazali na likambo te.” Mpe asukisi ete: “Mpamba te Mwana na Moto azali Nkolo na sabata.” Alingi koloba nini na wana? Azali kokanisa na Boyangeli na ye ya kimya ya mbula nkoto.

Ekoki sikawa mbula 6 000, libota na bato emoni mpasi na boombo ya Satan le Diable, mobulu mpe bitumba ezali kobima mokolo na mokolo. Nzokande, Sabata monene, Bokonzi na Klisto, ekosikola bato na mpasi nyonso mpe na minyoko nyonso. Matai 12:1-8; Levitike 24:5-9; 1 Samwele 21:1-6; Mituya 28:9; Hosea 6:6.

Bafalisai bafundi bayekoli na Yesu na likambo nini, mpe ndenge nini Yesu ayanoli na efundeli yango?

▪ Libunga nini ya Bafalisai Yesu abimisi yango polele?

▪ Na ndimbola nini Yesu azali “Nkolo na sabata”?