Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bakangi Yesu te

Bakangi Yesu te

Mokapo 67

Bakangi Yesu te

NA BOUMELI ya elambo na Mingombo, bakonzi na mangomba ya Bayuda batindi bapolisi mpo ete bakanga Yesu. Na esika ete amibomba, Yesu akobi koteya liboso na bato polele, kolobaka ete: “Naino mwa ntango moke, nazali na bino mpe bongo nakokenda epai na Motindi na ngai. Bokoluka ngai nde bokozwa ngai te mpo ete esika ekozala ngai bino bokokoka kokoma wana te.”

Bayuda oyo bakangi ntina ya maloba wana te, bazali komituna bango na bango: “Moto oyo alingi kokende wapi ete biso tozwa ye te? Alingi kokende epai na Bayuda bapalangani kati na Baela mpe kolakisa Baela? Oyo liloba nini lilobi ye ete: ‘Bokoluka ngai nde bokozwa ngai te, mpe ete esika ezali ngai, bino bokokoka kokoma wana te’?” Ya solo, Yesu azali koloba nde mpo na liwa na ye oyo ebelemi mpe lisekwa na ye mpo na bomoi na likoló, epai kuna banguna na ye bakoki kolanda ye te.

Mokolo ya nsambo mpe ya nsuka mpo na elambo ekoki. Ntongo nyonso, nganga moko azalaki kosopa mai, oyo batokaki yango liboso na liziba ya Siloame, mpe asopaki yango na nse na etumbelo. Na ntembe te na kokundwelaka bayoki na ye molulu wana ya mokolo na mokolo, Yesu angangi: “Soko moto azali na mposa na komela, aya epai na ngai mpe amela; ye oyo akondima ngai, lokola elobi Likomi: ‘Longwa na motema na ye, bibale na mai na bomoi ekobima.’”

Na yango, Yesu azali koloba awa mpo na makambo kitoko oyo kosopama ya elimo santu ekobimisa, yango oyo ekosalema na Pantekote ya mobu molandi. Ntango bayekoli 120 bakobanda mosala na bango liboso na bato banso, bibele na mai na bomoi ekobanda bongo kosopana. Kasi, kino sikawa, bazwi naino elimo te, na ndimbola oyo ete moyekoli moko te na Klisto apakolami na elimo santu mpe moko te abyangami mpo na bomoi na likoló.

Eyoki bango mateya na Yesu, bamoko basimbami na mitema na bango mpe babandi koloba ete: “Solo oyo azali Mosakoli yango,” kokanisaka mpenzampenza na mosakoli monene koleka Moïse oyo koya na ye elakamaki. Bamosusu bazali koloba ete: “Oyo azali Klisto.” Nde mwa ndambo babeti ntembe ete: “Klisto akobima na Galilai? Likomi elobi te ete Klisto akobima na libota na Davidi mpe uta na Beteleme, mboka wana efandaki Davidi?”

Mokabwano moyingeli kati na bango. Bamosusu balingi ete bakanga Yesu, kasi moto moko te atye maboko likoló na ye. Ntango bapolisi bazongi maboko mpamba kozanga Yesu, banganga minene mpe Bafalisai batuni bango ete: “Mpo na nini boyei na ye te?”

Bapolisi bazongiseli bango monoko ete: “Naino moto moko alobi lokola moto oyo te”!

Bakonzi na mangomba basiliki makasi, babandi kongala, kotyola mpe kofinga bango. Balobi, na botyoli nyonso ete: “Bino mpe bokosami? Moko na mikolo to na Bafalisai andimi ye? Kasi bibele oyo na bato bayebi Mibeko te basili kolakelama mabe”!

Eyoki ye maloba oyo, Nikodeme, Mofalisai mpe mokonzi moko na Bayuda (elingi koloba mosangani ya Sanedrina), azwi mpiko ya kokotela Yesu. Ozali komikundola mbala mosusu ete esili koleka mibu mibale na ndambo, mobali yango akendaki kokutana na Yesu na butu mpo na komonisa ye kondima na ye. Sikawa, tala ye wana azali kokamata maloba: “Mibeko na biso mikokweisa moto soko toyoki ye liboso te mpe toyebi makambo masili ye kosala te?”

Bafalisai basiliki lisusu koleka na koyoka maloba na moko na bango oyo azali kokotela Yesu. Bazongiseli ye na nkanda nyonso ete: “Yo mpe outi na Galilai? Luka mpe mona ete mosakoli akobima na Galilai te.”

Atako Makomami mazali koyebisa sikisiki te ete mosakoli moko akobima na Galilai, atako bongo mamonisi ete Klisto akouta na etuka wana epai kuna, engebene Makomami, bato bakomona kongenga “na pole monene.” Lisusu, Yesu abotami na Beteleme mpe azali mokitani na Davidi. Emonani lokola ete Bafalisai, atako bayebi malamu makambo oyo nyonso, ezali bango nde bakotisi mobulu kati na makanisi na bato na ntina na Yesu. Yoane 7:32-52; Yisaya 9:1, 2; Matai 4:13-17.

▪ Likambo nini ezali kosalema ntongo nyonso na elambo, mpe ndenge nini Yesu abendi mbala mosusu likebi na ntina na likambo yango?

▪ Mpo na nini bapolisi bakangi Yesu te, mpe bakonzi na mangomba balobi nini mpo na yango?

▪ Nikodeme azali nani? Akanisi nini na ntina na Yesu, mpe Bafalisai mosusu balobi na ye nini?

▪ Nini emonisi ete Klisto asengeli kouta na Galilai?