Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bakani lisusu koboma Yesu

Bakani lisusu koboma Yesu

Mokapo 81

Bakani lisusu koboma Yesu

EZALI ntango na malili mingi. Yesu azali kotambola kati na mbalasáni to véranda ya tempelo mpe oyo babengaka yango ete makonzi na Salomo. Kuna, Bayuda bazingi ye mpe balobi na ye ete: “Kino ntango nini okotika biso na mitema likoló? Soko ozali Klisto, yebisa biso polele.”

Yesu azongiseli bango monoko ete: “Nasili koyebisa bino nde bondimi te.” Ezali solo ete, Yesu alobaki na bango polelepolele te ete ye azali Klisto, lokola alobaki yango epai na mwasi Mosamaria pene na libulu na mai. Nzokande, amonisaki bango soko azali nani mpo ete alobaki na bango ete autaki na likoló mpe azalaki na bomoi liboso na Abrahame.

Na bongo mposa na Yesu ezali ete bato bango moko bayeba ete ye azali Klisto nsima na kosala boyokani kati na misala na ye mpe makambo oyo, engebene Makomami, Klisto asengeli kokokisa. Yango wana apekisaki bayekoli na ye ete baloba na moto moko te ete ye azali Klisto. Mpe ezali mpo na yango nde abakisi ntango azali koloba epai na Bayuda oyo bazali kotemela ye ete: “Misala mizali ngai kosala na nkombo na Tata na ngai, yango ekotatola mpo na ngai. Nde bino bozali kondima te.”

Mpo na nini Bayuda bazali kondima te? Bazangi mpenza bilembo ete Yesu azali solo Klisto? Bilembo bizali, kasi Yesu apesi ntina ya solo ya kozanga kondima na bango: “Bozali bampate na ngai te. Bampate na ngai bakoyokaka mongongo na ngai mpe ngai nayebi bango mpe bazali kolanda ngai. Nazali kopesa bango bomoi na seko mpe libela bakobeba te,—moto moko akobotola bango na loboko na ngai te. Oyo Tata na ngai apesi ngai eleki biloko nyonso, mpe moto moko ayebi kobotola bango na loboko na Tata te.”

Na nsima Yesu alimboli boyokani oyo bozali kosangisa ye na Tata na ye: “Ngai mpe Tata tozali moko.” Alobi mpenza te ete ye, awa na mabelé, mpe Tata na ye, kuna na likoló, bakomi moto bobele moko. Amonisi nde ete bango mibale bazali na mokano moko, bazali na boyokani.

Maloba na ye mapesi Bayuda nkanda, babandi kolokota mabanga mpo na kobwakela ye, lokola basalaki yango na libaku mosusu, na ntango na elambo ya Mingombo. Na molende nyonso, Yesu azongisi monoko epai na baoyo balingi koboma ye ete: “Namonisi bino misala malamu mingi uta na Tata na ngai. Bozali kobwakela ngai mabanga mpo na mosala nini kati na yango?”

Bayuda bayanoli ete: “Tozali kobwakela yo mabanga mpo na mosala malamu te kasi na ntina na kotuka Nzambe, mpo ete yo moto lokola bato banso olobi ete ozali nzambe.” Kasi mpo na nini balobi boye, nzokande Yesu azalaki na likanisi wana te?

Ezali mpo ete Yesu azali komipesa makoki oyo, engebene banguna na ye, ezali bobele mpo na Nzambe. Na ndakisa auti koloba na ntina na “bampate” na ye ete: “Nazali kopesa bango bomoi na seko,” likambo oyo moto moko awa na mabelé akoki kosala yango te. Nzokande Bayuda bazali kobosana ete Yesu alobaki ete azwi nguya yango epai na Tata na ye.

Na nzela na motuna moko, Yesu amonisi polele ete ye azali na nse ya Nzambe. Atuni bango ete: “Ekomami kati na mibeko na bino te ete [na Nzembo 82:6]: ‘Nalobi ete: “Bozali banzambe”’? Soko abyangi bango ‘banzambe’ baoyo liloba na Nzambe eyeli bango, . . . bozali nde koloba na ye oyo Tata abulisi ye mpe atindi na kati na mokili ete: ‘Ozali kotuka Nzambe,’ mpo nalobi ete: Nazali Mwana na Nzambe?”

Soki Makomami mabyangi ata bato oyo bazali basambisi bazangi kokoka ete bazali “banzambe,” efundeli nini monene Bayuda wana bakokaki komona kati na Yesu, ye oyo alobaki bobele ete: “Nazali Mwana na Nzambe?” Yesu abakisi: “Soko nazali kosala misala na Tata na ngai te, bondima ngai te. Nde soko nazali kosala yango, ata bondimi ngai te, bondima misala mpenza ete bososola mpe boyeba ete Tata azali kati na ngai, ngai mpe nazali kati na Tata.”

Koyokaka bongo, Bayuda bameki kokanga ye, kasi ye akimi bango, lokola asalaki yango na ntango na elambo na Mingombo. Na bongo atiki Yelusaleme mpe akati ngambo mosusu ya Yordani, akei epai kuna Yoane abandaki kobatisa eleki bongo pene na mibu minei. Esika yango ezali penepene na libongo ya sudi ya libeke ya Galilai, pene na mikolo mibale ya botamboli longwa na Yelusaleme.

Bato mingi bazali koya epai na Yesu na esika yango mpe balobi ete: “Yoane asali elembo moko te kasi nyonso elobi Yoane mpo na moto oyo ezali solo.” Mpe bato mingi bandimi ye esika wana. Yoane 10:22-42; 4:26; 8:23, 58; Matai 16:20.

▪ Na lolenge nini Yesu alingi bato bayeba ye ete azali Klisto?

▪ Na ndimbola nini Yesu mpe Tata na ye bazali moto moko?

▪ Ekoki kozala mpo na maloba nini na Yesu Bayuda basiliki na ye ete amikomisi nzambe?

▪ Na kosalelaka mokanda na Nzembo, ndenge nini Yesu amonisi ete ye akokani na Nzambe te?