Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Balingi mokonzi oyo aleki bato

Balingi mokonzi oyo aleki bato

Mokapo 53

Balingi mokonzi oyo aleki bato

LOKOLA bamoni Yesu aleisi nkoto mingi na bato na ekamwiseli, bibele bakamwe. Balobi ete: “Solo oyo azali Mosakoli asengeli koya na mokili.” Bandimi ete Yesu azali mosakoli aleki Moïse na monene kasi lisusu ete akozala mokonzi aleki malamu. Balingi koya kokamata ye mpo na kozalisa ye mokonzi.

Kasi Yesu asili koyeba likambo elingi bango kosala. Amibendi nokinoki mpo na kokima likambo yango ete bamema ye na makasi te. Azongisi bibele, mpe alakisi bayekoli na ye ete bamata na masuwa mpe bakenda na Kapernaume, mpe ye moko akei na ngomba mpo na kobondela. Butu eingeli, mpe Yesu azali bobele wana, ye moko.

Mwa ntango moke liboso ete ntongo etana, uta na likolo na ngomba epai ye atelemi, Yesu amoni ete mai matomboki mpo na mopepe makasi. Lokola Pasika ebelemi, sanza engali; na lisalisi ya kongenga oyo sanza ebimisi Yesu amoni malamu masuwa mpe bayekoli na ye oyo bazali kobunda mpo na kotambwisa masuwa na mai oyo matomboki. Baluki nkai na makasi na bango nyonso.

Emoni ye bongo, Yesu alongwe na ngomba, akiti mpe abandi kotambola likolo na mai matomboki kino esika masuwa mazali. Masuwa esili kotambola bakilometele mitano to motoba mpe, ntango Yesu akomi esika bayekoli na ye bazali, azali ntango nyonso kotambola lokola ete alingi koleka bango. Ntango bamoni ye, bangangi ete: “Ezali elima!”

Mpo na kokitisa mitema na bango Yesu alobi: “Bobanga te, ezali ngai.”

Kasi Petelo alobi na ye: “Nkolo, soko ezali yo, loba na ngai natambola likolo na mai mpe naya epai na yo.“

Yesu ayanoli ete: “Yaka!”

Mpe Petelo akiti na masuwa, abandi kotambola likolo na mai kokendaka esika Yesu azali. Kasi, ntango amoni mopepe makasi, abangi mpe, abandi kozinda, angangi: “Nkolo, bikisa ngai!”

Nokinoki Yesu asemboli loboko na ye mpe asimbi ye, alobi na ye ete: “Yo moto na kondima moke, mpo na nini ozali kobeta ntembe?”

Ntango Petelo mpe Yesu bakoti na masuwa, mopepe ekiti, mpe bayekoli bakamwe. Ekokaki ete bakamwa? Soko basimbaki “ndimbola ya mampa,” ntina ya ekamwiseli monene oyo Yesu asalaki mwa bangonga liboso na koleisaka bankoto na bato bobele na mampa mitano mpe mbisi mibale ya mike, mbele bakokaki kokamwa te na komonaka ete azali kotambola likolo na mai mpe akitisi mopepe. Kasi sikawa, bayekoli bakumisi Yesu ete: “Solo yo ozali mwana na Nzambe.”

Mwa ntango moke na nsima, bakomi na Genesarete, esobe kitoko mpe ekobotaka mbuma mingi, oyo ezali pene na Kapernaume, mpe babwaki longo wana. Ntango babimi na mokili, bato basosoli Yesu, batamboli etuka mobimba mpo na kokenda koluka baoyo bazali na maladi. Ntango bakumbeli ye bato na maladi na kitikwala mpe basimbi bobele elamba na ye, bokono na bango nyonso esili.

Na mokolo elandi, bankoto na bato oyo Yesu aleisaki na ekamwiseli bayei komona ete Yesu asili kokende. Yango wana ntango ba masuwa mike ekomi koutaka na Tiberiade, bakoti na kati mpe bakei epai na Kapernaume, mpo na koluka Yesu. Ntango bamoni ye, batuni ye ete: “Nkolo, okomi awa ntango nini?“ Lokola tokomona yango, Yesu akopamela bango. Yoane 6:14-25; Matai 14:22-36; Malako 6:45-56.

Nsima wana Yesu aleisi nkoto mingi na bato na ekamwiseli bibele balingi kokomisa ye nani?

Likambo nini Yesu amoni longwa na likolo na ngomba esika azali ye moko mpe mpo na yango asali nini?

Mpo na nini bayekoli mbele bakokaki kokamwa mingi te na ntina na likambo oyo Yesu asali?

▪ Likambo nini esalemi ntango bakomi na ngambo mosusu?