Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bamonisami polele na nzela na masese na vinyo

Bamonisami polele na nzela na masese na vinyo

Mokapo 106

Bamonisami polele na nzela na masese na vinyo

KATI na tempelo, Yesu auti kobulunganisa makanisi ya bakonzi na mangomba baoyo balingaki koyeba soko na bokonzi nini azali kosala makambo mosusu. Naino balongwe na mobulungano wana te, Yesu atuni bango ete: “Bokanisi nini mpo na makambo oyo?” Mpe na nzela na lisese, amonisi motindo na bato nini bango bazali mpenza.

Yesu alobi ete: “Moto moko azalaki na bana mibale. Ekei ye epai na oyo na liboso, alobi ete: ‘Mwana, kenda lelo kosala mosala na elanga na vinyo.’ Azongisaki monoko ete: ‘Nakei, nde akendaki te.’ Eyei ye epai na oyo na mibale, alobi bobele bongo. Ye azongisi ete: ‘Nalingi te,’ nde na nsima abongoli motema mpe akei. Nani kati na bango mibale asali mokano ya tata na ye?”

Banguna na ye bayanoli ete: “Oyo na nsima.”

Bongo Yesu apesi bango ndimbola oyo: “Nazali koloba na bino solo ete, bakongoli na mpako mpe basi na pite, bakoingela na Bokonzi na Nzambe liboso.” Ya solo, bakongoli na mpako mpe basi na pite bazali bato oyo liboso baboyaki kosalela Nzambe. Kasi, lokola mwana na mibale, babongolaki mitema mpe bakómaki kosalela ye. Na kokesena, bobele lokola mwana wana ya liboso, bakonzi ya mangomba bazalaki koloba ete bazali kosalela Nzambe, nzokande Yesu alobi ete: [Yoane Mobatisi] ayei epai na bino na nzela ya boyengebene nde bondimi ye te. Kasi bakongoli na mpako mpe basi na pite bandimi ye. Mpe wana emoni bino yango, bobongoli mitema te mpo na kondima ye.”

Na nsima, Yesu amonisi ete mabe ya bakonzi wana ya mangomba ezali bobele mpo ete bazali kosalela Nzambe te, kasi lisusu mpo bazali mpenza bato na lofundo. Akóbi koloba ete: “Nkolo na ndako akonaki elanga na vinyo, mpe azingeli yango na lopango, mpe atimoli ekamwelo na vinyo kati na yango mpe atongi ndako molai, mpe atiki yango epai na basali mpe akei na mokili mosusu. Ebelemi elaká na mbuma, atindi baombo na ye epai na basali ete bakamata mbuma na ye. Nde basali basimbi baombo na ye mpe babeti moko, mpe babomi mosusu, mpe babwakeli mosusu mabángá. Nde atindi baombo mosusu koleka baoyo na liboso na motuya, mpe basali bango motindo moko.”

“Baombo” bazali nde basakoli oyo Jéhovah Nzambe, ye “Nkolo na ndako” atindaki epai na “basali” na “vinyo.” Basali yango nde bakonzi minene ya mboka Yisraele, “vinyo” na Nzambe oyo elobelami kati na Biblia.

Lokola “basali” banyokoli mpe babomi “baombo,” nkolo na vinyo asali lisusu eloko moko: “Na nsuka, atindi mwana na ye epai na bango, ye ete: ‘Bakotosa mwana na ngai.’ Wana basali bamoni mwana, balobani kati na bango ete: ‘Oyo motuki na libula! Yakani toboma ye mpe tozwa libula na ye!’ Bakangi ye, mpe babwaki ye libándá na elanga, mpe babomi ye.”

Kolobáká epai na bakonzi ya mangomba, Yesu atuni bango ete: “Bongo wana ekoya nkolo na elanga, akosala nini epai na basali yango?”

Bakonzi na mangomba bayanoli ete: “Lokola bazali bato mabe akoboma bango. Bongo akopesa elanga wana na basali mosusu. Bango nde bakopesa ye mbuma na ye na ntango ekoki.”

Kozanga koyeba, bauti komikatela etumbu bango moko, lokola batangami mpe kati na Bayisraele oyo bazali “basali” na elanga na “vinyo” na Jéhovah, libota na Yisraele. Mbuma oyo Jéhovah azali kozela epai na basali yango, ezali nde kondima epai na Mwana na ye, Masiya ya solo. Lokola baboti mbuma yango te, Yesu akebisi ete: “Botangi naino kati na makomi [na Nzembo 118:22, 23] te ete: ‘Libángá liboyaki batongi, lisili kokóma motó na nsuka. Yango esalemi na Jéhovah, mpe likambo na kokamwa liboso na biso?’ Bongo nazali koloba na bino ete: Bokonzi na Nzambe ekolongwa na bino mpe ekopesama na libota likobotaka mbuma. Moto oyo akokwea likoló na libángá oyo akopasuka; mpe soki libángá oyo likweli moto moko, ekonika ye.”

Bakomeli mpe banganga-kapita basosoli sikawa ete Yesu azali koloba mpo na bango, mpe balingi koboma ye, “motuki na libula” oyo andimami na mibeko. Yango wana libota na Yisraele likobotolama mokumba ya koyangela kati na Bokonzi na Nzambe, nde libota mosusu ya ‘basali na vinyo’ likosalema; libota oyo likobota mbuma ebongi.

Lokola bakonzi na mangomba bazali kobanga bato, baoyo bandimi Yesu lokola mosakoli, bameki koboma ye na ntango wana te. Matai 21:28-46; Malako 12:1-12; Luka 20:9-19; Yisaya 5:1-7.

▪ Banani bamonisami na bana mibale ya lisese oyo Yesu asalaki liboso?

▪ Kati na lisese ya mibale, nani azali “nkolo na ndako,” “vinyo” ezali nini, “basali,” “baombo” mpe “motuki na libula” bazali banani?

▪ Nini ekokómela ‘basali na elanga na vinyo,’ mpe nani akokitana bango?