Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Basáli kati na elanga na miwiti

Basáli kati na elanga na miwiti

Mokapo 97

Basáli kati na elanga na miwiti

“MINGI na baoyo bazali liboso bakozala nsima mpe baoyo na nsima bakozala liboso.” Nsima na koloba boye, Yesu apesi lisoló moko mpo na kolimbola maloba na ye. “Bokonzi na likoló ezali lokola moto moko, mokóló na ndako, oyo abimaki na ntongontongo mpo na kobyanga basáli kati na elanga na ye na miwiti.”

Alandi koloba ete: “Esili ye [mokóló na ndako] koyokana na basáli mpo na lopáta moko mokolo na mokolo, atindi bango na elanga na ye. Abimi mpe na ngonga misato na moi, mpe amoni bamosusu baoyo batelemi mpamba na esika ya zando, mpe alobi na bango ete: ‘Bino mpe bokenda na elanga na miwiti mpe nakopesa bino oyo ebongi malamu.’ Bongo bakei. Ekei ye lisusu na ngonga motoba mpe na ngonga libwa, asali bobele bongo. Penepene na ngonga zomi na moko, abimi mpe azwani na bamosusu bazali kotelema mpe alobi na bango ete: ‘Mpo na nini bozali kotelema mpamba moi mobimba?’ Balobi na ye ete: ‘Mpo ete moto abyangi biso na mosala te. Alobi na bango ete: ‘Bino bokenda mpe na elanga na miwiti.’”

Mokóló na ndako, elingi koloba mokóló na elanga na miwiti, azali Jéhovah Nzambe, mpe elanga na miwiti ezali libota na Yisraele. Basáli oyo batindamaki kati na elanga na miwiti bazali bato oyo bakótisamaki kati na kondimana ya Mibeko; ezali mingimingi Bayuda ya ntango na bantóma. Boyokani mpo na lifuti bosalemi bobele elongo na basáli oyo bazwami mpo na kosala mokolo mobimba, lopáta moko mpo na mokolo moko. Lokola “ngonga ya misato” ekokani na ngonga ya libwa na ntongo; baoyo babyangami na ngonga ya misato, na ngonga ya motoba, na ngonga ya libwa mpe na ngonga ya zomi na moko, moto na moto akosala ngonga 9, ngonga 6, ngonga 3 mpe ngonga 1.

Basáli oyo bakokisaki ngonga 12 ya mosala, elingi koloba mokolo mobimba, bazali bongo elilingi na bakonzi na Bayuda oyo bazalaki ntango nyonso na mosala mingi mpo na makambo na Nzambe, baoyo bakeseni na bayekoli na Yesu, bango balekisaki eteni monene ya bomoi na bango na kolɔba mbisi to na kosala misala mosusu ya mosuni. “Nkolo na ndako” atindaki Yesu Klisto te liboso na oktobre ya mobu 29 ya ntango na biso, mpo na kosangisa bango ete bakóma bayekoli na ye. Na lolenge yango nde bakómaki “bato na nsima,” basáli oyo bazwamaki na mosala na ngonga ya zomi na moko.

Nsuka na yango, mokolo ya mosala na elilingi esuki na liwa na Yesu, mpe ntango ya kofuta basáli ekómi. Na kokesena na lolenge esalamaka, bafuti liboso bato na nsima. Tala lolenge yango esalamaki: “Eyei ntango na mpokwa, mokóló na elanga alobi na kapita na ye ete: ‘Byanga basáli mpe pesa bango lifuti kobanda na baoyo na nsima kino baoyo na liboso.’ Eyei bango babyangamaki penepene na ngonga zomi na moko, bazwi moto na moto lopáta. Eyei baoyo na liboso, bakanisi ete bakozwa na koleka nde bango mpe bazwi moto na moto lopáta moko. Ezwi bango, baimaimeli mokolo na ndako, bango ete: ‘Baoyo basáli mosala bobele ngonga moko mpe ofuti bango motindo moko na biso bato tokumbi bozito mokolo mobimba mpe na moi makasi!’ Nde ye azongiseli moko na bango ete: ‘Moninga, nazali kosalela yo mabe te. Oyokanaki na ngai mpo na lopáta te? Kamata yango ekoki na yo mpe kenda. Nakopesa epai na oyo na nsima motindo moko na yo. Ekoki na ngai te kosala lokola ezali na ngai mposa na biloko bizali na ngai? Liso na yo ezali mabe mpo ete ngai nazali malamu?’” Mpo na kosukisa, Yesu azongeli likambo oyo alobaki liboso: “Na bongo, baoyo na nsima bakozala na liboso mpe baoyo na liboso bakozala nsima.”

Lopáta lokozwama te na ntango ya liwa na Yesu, kasi na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, ntango Klisto, ye “kapita,” akosopa elimo santu likoló na bayekoli na ye. Bayekoli oyo na Yesu bakozala lokola “bato na nsima,” basáli ya ngonga zomi na moko. Lopáta emonisi te likabo ya elimo santu yango moko, kasi eloko moko oyo bayekoli bakokaki kosalela yango awa na mabelé, eloko oyo ekopesa bango nzela na kozwa bomoi ya seko. Yango libaku ya kokóma Bayisraele na elimo baoyo bapakolami mpo na kosakola Bokonzi na Nzambe.

Mosika te, baoyo bazwamaki na mosala liboso bakomona ete bayekoli na Yesu basili kozwa lifuti, mpe bakomona bango kosalela lopáta ya elilingi. Nde bakozala na mposa na eloko mosusu koleka elimo santu mpe mikumba mizwami na yango; ezali bongo mikumba mitali Bokonzi. Koimaima na bango mpe ntembe na bango ekobota minyoko epai na bayekoli na Klisto, basáli “na nsima” oyo batindamaki na elanga na miwiti.

Lisese na Yesu likokanaki bobele na ekeke ya liboso? Te, na ekeke ya ntuku mibale, bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokutá, mpo na etelemelo na bango mpe mikumba na bango, bazalaki bato “na liboso” oyo bazwamaki mpo na kosala kati na elanga ya elilingi na miwiti na Nzambe. Batalelaki basakoli na molende baoyo bazalaki kosala elongo na la Société Watch Tower lokola bato “na nsima” na mosala na Nzambe. Nzokande, ezali baoyo bakonzi ya mangomba batyolaki nde bazwaki lopáta: mokumba ya kozala batindami bapakolami ya Bokonzi na Nzambe. Matai 19:30 kino 20:16.

▪ Elanga na miwiti ezali elilingi na eloko nini? Nani nkolo ya elanga, banani basáli oyo basalaki ngonga 12 mpe baoyo basalaki ngonga moko?

▪ Mokolo na mosala ya elilingi mosukaki ntango nini, mpe ntango nini lifuti lipesamaki?

▪ Lifuti ya lopáta limonisi eloko nini?