Basokemi mpe bato na lolendo
Mokapo 39
Basokemi mpe bato na lolendo
NSIMA na kolobela bizaleli malamu ya Yoane Mobatisi, Yesu abalukeli bato na lolendo mpe na kozanga sembo oyo bazingi ye. Alobi ete: “Libota oyo ezali lokola bana baoyo bazali kofanda na esika na zando, kobyanga baninga na bango ete, ‘Tobeteli bino pyololo nde bobini te, toleli mpo na bino nde boyoki mawa te.’”
Yesu alingi koloba nini? Apesi ndimbola oyo: “Yoane ayaki, azalaki kolya te mpe komela te mpe balobaki ete, ‘Azali na elimu mabe.’ Mwana na moto ayei, azali kolya mpe komela mpe balobi ete, ‘Tala moto na lokoso mpe momeli masanga, moninga na bakongoli na mpako mpe na bato na masumu.’”
Ezali mpasi mpenza mpo na kosepelisa bato. Eloko moko te ebongi na bango. Yoane azalaki na bomoi ya kokila biloko lokola monasili, amiboyaki mpe alandaki maloba ya anzelu oyo alobaki ete ‘asengeli komela vinyo te soko masanga makasi mpe te.’ Nzokande, bato bazali koloba ete azali na elimu mabe. Epai mosusu, Yesu azali na bomoi lokola oyo na bato nyonso, azali kokila biloko te, nde bafundi ye ete azali moto na lokoso.
Solo, bato baleki na mindondo! Bakokani na bana oyo baboyi kobina wana baninga na bango bazali kobeta pyololo, to baboyi koyoka mawa ntango baninga na bango bazali komilela. Ata bongo, Yesu alobi ete: “Mayele elongi na misala na yango.” Mpamba te, matatoli—elingi koloba misala—emonisi polele ete bifundeli na ntina na Yoane mpe na ntina na Yesu bizali ya lokuta.
Yesu akobi lisolo na ye na kopameláká mingimingi bingumba ya Kolazi, Betesaida mpe Kapernaume, epai autaki kokokisa misala na ye mingi ya nguya. Alobi ete soki misala yango misalemaki na Tire mpe na Sidona, bato na bingumba oyo na Fenisi mbele balingaki kobongola motema na kolataka saki mpe na kopakolaka putulu na nzoto mobimba. Kokweisáká Kapernaume, oyo emonani lokola engumba aponaki kofanda na boumeli ya mosala na ye, Yesu alobi: “Na mokolo na kosambisama, ekozala malamu mpo na Sodome koleka mpo na yo.”
Nsima na yango, Yesu akumisi polele Tata na ye na likoló. Apusami ete asala bongo mpamba te Nzambe abómbi solo ya elimo oyo ezali na motuya mingi, epai na bato na bwanya mpe bato na mayele, nzokande amonisi polele makambo oyo kitoko epai na basokemi, elingi koloba baoyo bazali lokola bana.
Na nsuka, Yesu apesi libyangami elandi: “Boya epai na ngai, bino nyonso bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bozala bayekoli na ngai; mpamba te, ngai nazali na bopolo mpe na motema mosokemi, bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.”
Kobondisama ya motindo nini Yesu apesi? Asikoli bato na boombo ya bonkoko oyo bakonzi na mangomba batyaki na mapeka na bango, ndakisa masengami makasi matali sabata. Lisusu, amonisi nzela ya kobondisama epai na bato oyo bazali konyokwama na nsé na boyangeli na bakonzi ya politike, mpe na baoyo bazali koyoka kilo ya masumu na bango mpo na lisosoli na bango etungisami. Amonisi epai na baoyo banyokwami na motindo yango ndenge nini masumu na bango makoki kolimbisama mpe ndenge nini bakoki kosala boyokani na motuya elongo na Nzambe.
Ekanganeli na motau oyo Yesu alingi ete tomema elongo na ye ezali bongo ete tomipesa mobimba na Jéhovah mpo na kosalela ye, ye oyo azali Tata na boboto mpe na koyokela bato mawa. Mpo na mokumba na pɛ́pɛ́lɛ́ oyo Yesu alingi komemisa baoyo bazali koya epai na ye, ezali bongo botosi na mitinda ya bomoi oyo Nzambe apesaki, oyo ezali bongo Mibeko na ye mikomami kati na Biblia. Ezali kilo te na kotosa mibeko yango. Matai 11:16-30; Luka 1:15; 7:31-35; 1 Yoane 5:3.
▪ Na likambo nini bato na ntango na Yesu, oyo bazali na lolendo mpe bazali bongolabongola, bakokani na bana?
▪ Mpo na nini Yesu apusami na kokumisa Tata na ye ya likoló?
▪ Mikumba nini bato bazali konyokwama na yango, mpe kobondisama nini Yesu apesi?