Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bayekoli mingi batiki kolanda Yesu

Bayekoli mingi batiki kolanda Yesu

Mokapo 55

Bayekoli mingi batiki kolanda Yesu

NA KAPERNAUME, kati na eyanganelo moko, Yesu azali kolimbola mokumba oyo azali kokokisa lokola limpa ya solo euti na likolo. Emonani lokola ete lisolo na ye ezali bolandani ya ntembe oyo ebimaki elongo na bato oyo balandaki ye nsima na bozongi na ye uta na ngambo mosusu ya libeke ya Galilai, epai kuna balyaki mampa mpe mbisi oyo epesamaki na nzela ya ekamwiseli.

Yesu azongeli makanisi ya lisolo: “Limpa ekopesa ngai ezali mosuni na ngai mpo na bomoi na mokili.” Mibu mibale liboso, na ebandeli ya mobu 30, alobaki na Nikodeme ete Nzambe alingaki mokili mingi mpe apesi Mwana na ye bobele moko lokola Mobikisi. Na kotalela maye azali koloba sikawa, moto nyonso oyo akolya nzoto na ye na elobeli na elilingi, na kozalaka na kondima kati na mbeka oyo mosika te nde apesi yango, moto wana, akoki kozwa bomoi ya seko.

Nzokande maloba yango mabetisi bayoki na ye libaku. Bayuda batunani ete: “Ndenge nini moto oyo akoki kopesa biso mosuni na ye ete tolya yango?” Yesu alingi kososolisa bango malamu ete kolya nzoto na ye ezali nde na elilingi. Mpo na komonisa malamu likambo yango, abimisi likanisi moko oyo bato bakoki kondima yango te soki balandi yango ndenge elobami.

“Solosolo nazali koloba na bino ete, soko bokolya mosuni na Mwana na moto te mpe bokomela makila na ye te, bokozala na bomoi kati na bino mpenza te. Ye oyo akolya mosuni na ngai mpe akomela makila na ngai azali na bomoi na seko mpe ngai nakosekwisa ye na mokolo na nsuka. Mpo ete mosuni na ngai ezali bilei ya solo mpe makila na ngai ezali bimeli ya solo. Ye oyo akolyaka mosuni na ngai mpe akomelaka makila na ngai, akoumela kati na ngai mpe ngai kati na ye.”

Ya solo, soki Yesu azalaki kolobela mpenza likambo etali kolya mosuni ya moto mpe komela makila ya moto, maloba na ye mbele mazalaki botyoli mpenza. Kasi azali kolendisa bayoki na ye te na kolya mosuni na ye to komela makila na ye mpenzampenza. Azali bobele komonisa ete, baoyo nyonso balingi kozwa bomoi ya seko, basengeli kondima mbeka oyo mosika te nde apesi yango na kokabaka nzoto na ye ya moto na kokoka mpe na kosopaka makila na ye. Atako bongo, ata kati na bayekoli na ye, mingi bazali komeka kokanga ntina ya mateya na ye te mpe babimisi ntembe: “Oyo nde liloba makasi! Nani akoki koyoka yango?”

Koyebaka ete mingi kati na bayekoli na ye bazali koimaima, Yesu alobi na bango: “Likambo oyo ezali kotutisa bino libaku? Soko nde bokomona Mwana na moto kobuta esika ezalaki ye liboso? . . . Maloba masili ngai kosolola na bino mazali elimo mpe bomoi. Kasi bamosusu kati na bino bazali kondima te.”

Yesu abakisi: “Tala ntina nalobaki na bino ete moto akoki koya epai na ngai te, bobele soko epesameli ye longwa na Tata.” Na maloba wana, mingi kati na bayekoli na ye bakei epai na bango mpe batiki kolanda ye. Na bongo, Yesu abongwani epai na bantoma na ye 12 mpe atuni bango ete: “Bino mpe bolingi kokenda?”

Petelo ayanoli: “Nkolo, tokenda epai na nani? Yo ozali na maloba na bomoi na seko; biso mpe tondimi mpe toyebi ete, yo ozali Mobulami na Nzambe.” Oyo elembo kitoko ya bosembo ya Petelo mpe ya bantoma mosusu baoyo, mbala mosusu nkutu bakangaki mpenza ntina te ya mateya na Yesu kati na likambo yango!

Atako eyano ya Petelo esimbi motema na ye, Yesu alobi boye: “Ngai moto naponaki bino bazomi na mibale te? Nde moko kati na bino azali moto na lokuta.” Azali koloba na ntina na Yuda Iskariote. Ekoki kozala mbala mosusu ete amoni epai na Yuda, “ebandeli” ya etamboli moko mabe.

Yesu akokisi te mposa ya bato oyo balingaki kotya ye mokonzi na bango, mpe mbala mosusu bato yango bazali kokanisa boye ete: ˈNdenge nini moto oyo akoki kozala Masiya nzokande azali koboya kosala mosala oyo ebongisami mpo na Masiya?ˈ Oyo ezali mpe motuna ya sika oyo eyeli bango nokinoki kati na makanisi na bango. Yoane 6:51-71; 3:16.

Yesu apesi mosuni na ye mpo na banani mpe na ndimbola nini tokoki koloba ete bato yango bazali ˈkolya mosuni na yeˈ?

Maloba nini mosusu na Yesu matungisi bato, kasi alobi bongo mpo na komonisa nini?

Ntango bato mingi batiki kolanda Yesu, Petelo alobi nini?