Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bayekoli ya liboso ya Yesu

Bayekoli ya liboso ya Yesu

Mokapo 14

Bayekoli ya liboso ya Yesu

NSIMA na mikolo 40 kati na esobe, Yesu azongi epai na Yoane, ye oyo abatisaki ye. Ntango abelemi penepene na ye, Yoane alakisi ye epai na baoyo bazali na ye esika moko ete: “Tala Mwana-na-Mpate na Nzambe, molongoli na masumu na mokili! Ye oyo nalobi mpo na ye ete: Moto akoya nsima na ngai aleki ngai mpo ete azalaki liboso na ngai.” Atako Yoane azalaki mokolo na Yesu, ayebi ete Yesu azalaki na bomoi liboso na ye lokola ekelamu na elimo kati na makolo.

Nzokande, mwa baposo liboso, ntango Yesu ayaki mpo na kozwa batisimo, emonanaki lokola ete Yoane ayebaki sikisiki mpenza te ete ezali ye nde akozala Masiya. Andimi ete, “Ngai nayebaki ye te, nde mpo ete amonisama na Yisraele yango wana nayei kobatisaka na mai.”

Na nsima alimboli epai na bayoki na ye likambo lilekaki ntango abatisaki Yesu: “Namoni elimo ezalaki kokita lokola ebenga longwa na likolo mpe eumeli likolo na ye. Ngai mpe nayebaki ye te, nde ye oyo atindi ngai kobatisa na mai alobi na ngai ete: ˈYe oyo okomona elimo kokita mpe koumela likolo na ye, ye wana azali mobatisi na elimo santu.ˈ Nasili komona mpe nasili kotatola ete oyo azali Mwana na Nzambe.”

Mokolo molandaki, Yoane atelemi na esika yango elongo na bayekoli na ye mibale. Komonaka lisusu Yesu azali koya, alobi ete: “Tala Mwana-na-Mpate na Nzambe!” Eyoki bango maloba oyo, bayekoli mibale na Yoane Mobatisi babandi kolanda Yesu. Moko na bango Andre; emonani polele ete mosusu azali bobele ye oyo akomaki makambo oyo mpe oyo nkombo na ye ezali Yoane. Engebene bandimbola epesameli biso, Yoane yango azali mpe ndeko na Yesu na mama mosusu, mpamba te azali mwana ya Salome, ndeko mwasi ya Marie.

Kotalaka nsima mpe komonaka Andre mpe Yoane bazali kolanda ye, Yesu atuni: “Bozali koluka nini?”

Bango ete, “Moteyi ozali kofanda wapi?”

Yesu ayanoli ete, “Boya mpe bokomona.”

Ekomi pene na ngonga ya minei nsima na midi. Andre mpe Yoane balekisi eteni ya mokolo oyo etikali elongo na Yesu. Nsima na yango, Andre ayoki mpenza esengo mingi mpe aweli kokende kopesa nsango epai na ndeko na ye mobali, oyo bazali kobenga Petelo. Alobi na ye ete: “Tosili komona Masiya.” Mpe akumbi Petelo epai na Yesu. Na ntango se moko wana, Yoane akei mpe koluka ndeko na ye Yakobo mpe amemi ye epai na Yesu. Nzokande, lokola momeseno na ye, Yoane alobeli likambo yango te oyo etaleli ye mpenza kati na Evanzile na ye.

Mokolo molandaki, Yesu akutani na Filipe, ye oyo azali moto na Betesaida, mboka epai kuna Andre mpe Petelo bazalaki kofanda liboso. Abyangi ye ete: “Landa ngai.”

Na ngala na ye, Filipe akei epai ya Natanaele, oyo nkombo na ye mosusu Bartelemi, mpe alobi na ye ete: “Tosili kokutana na ye oyo Moise akomaki kati na Mibeko mpe oyo Basakoli bakomaki na ntina na ye: Yesu, Mwana na Yozefe, uta na Nazarete.” Kasi Natanaele andimi te. Atuni ete, “Eloko malamu ekoki nde kobima na Nazarete?”

Filipe alendisi ye ete, “Yaka mpe omona.” Ntango bakomi pene na Yesu, ye alobi na Natanaele: “Tala moyisraele na solo, bokosi ezali kati na ye te.”

Natanaele akamwi mpe alobi na ye ete, “Oyebi ngai motindo nini?”

“Liboso ete Filipe abenga yo, ntango ofandaki na nse na nzete na figi, ngai nasilaki komona yo.”

Natanaele azongisi, na kokamwa nyonso ete: “Labi [oyo elimboli Moteyi], yo ozali Mwana na Nzambe, ozali mokonzi na Yisraele.”

Yesu atuni ete, “Ondimi mpo nalobi na yo ete namonaki yo na nse na nzete na mosuke? Okomona makambo minene koleka yango.” Alaki mpe ete: “Solo solo nazali koloba na bino ete: bokomona likolo ezipolami mpe baanzelu na Nzambe bazali kobuta mpe kokita epai na Mwana na moto.”

Mwa moke nsima na makambo oyo, Yesu mpe bayekoli na ye oyo auti kozwa bango sika batiki lobwaku ya Yordani mpe bakamati nzela mpo na kokende na Galilai. Yoane 1: 29-51.

Banani bayekoli ya liboso ya Yesu?

Ndenge nini Petelo, mpe mbala mosusu Yakobo, balakisami epai na Yesu?

Nini endimisi Natanaele ete Yesu azali solo Mwana na Nzambe?