Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Botala moto ye wana!”

“Botala moto ye wana!”

Mokapo 123

“Botala moto ye wana!”

PILATO akamwi mingi mpo na Yesu mpe asosoli ete azali na mabe moko te; yango wana aluki mwango mosusu mpo na kotika ye. Alobi epai na ebele ete: “Motindo na bino ezali ete nakangwela bino moto moko na ntango na Pasika.”

Pilato, ye oyo azalaki lisusu na mobomi moko monene na nkombo Barabas kati na boloko na ye, atuni ete: “Bolingi ete nakangwela bino nani, Barabas soko Yesu oyo abengami Klisto?”

Kopusamáká na banganga-kapita baoyo bayanganisaki bibele, bato balombi ete babimisa Barabas nde baboma Yesu. Pilato atiki te. Mpo na koyanola, atuni bango lisusu ete: “Bolingi ete nakangwela bino nani kati na bango mibale?”

Bato bangangi ete: “Barabas.”

Pilato abangi, atuni ete: “Bongo, nasala nini na Yesu oyo abengami Klisto?”

Na mongongo makasi, bato bangángi ete: “Tika ete akakisama na nzeté!” “Kakisa ye na nzeté! Kakisa ye na nzeté!”

Koyebáká ete ebele bazali kosenga liwa ya moto oyo asali likambo moko te, Pilato atuni lisusu ete: “Mabe nini asali? Nazwi likambo moko libongi na kufa mpo na ye te; na bongo nakobeta ye fimbo mpe nakokangola ye.”

Atako nyonso oyo Pilato asali, ebele na bato bapeli na nkanda, oyo bapusami na mikóló ya mangomba, bakóbi bobele kongánga ete: “Tika ete akakisama na nzeté!” Wana bapusami na banganga, bato balingi makila. Nzokande emonani ete, mikolo mitano liboso, bamoko na Bayuda wana bakumisaki ye lokola mokonzi ntango akótaki na Yelusaleme! Na boumeli ya ntango oyo nyonso, soki bayekoli na Yesu bazali wana, nzokande bazali komimonisa te.

Komonáká ete milende na ye mizali mpamba, nde yikiyiki elingi kobima, Pilato azwi mai, asukoli maboko liboso na bato, mpe alobi ete: “Ngai nazali na likambo na makila na moto oyo te!” Bongo bato bazongisi ete: “Makila na ye mazali likoló na biso mpe likoló na bana na biso!”

Na yango, komonisáká mpenza mposa ya kosepelisa bibele, na esika ete akokisa likambo limoni ye ete lizali sembo, Pilato andimeli bato mpe akangoli Barabas. Akamati Yesu, alongolisi ye bilamba mpe abetisi ye fimbo. Ezali fimbo ya bongo na bongo te. Tala oyo Journal of the American Medical Association elobi mpo na minyoko ya fimbo epai na Baloma.

“Fimbo oyo bazalaki kosalela na momeseno na bango ezalaki mfimbo moko ya mokuse (flagrum to flagellum) ezalaki na nsinga ya mposo na nyama na molai mokeseni, elingámi to mpe te, oyo na katikati na yango batyaki mwa mabúngútulú mike mingi ya bibende to biteni mikemike ya mokuwa na meme oyo bikoki kozokisa. . . . Basoda Baloma bazalaki kobeta mbala mingi, mpe na makasi na bango nyonso na mikongo ya bakangami, mabúngútulú ya bibende ezalaki kobimisa matutu minene, nzokande bansinga ya mposo na nyama mpe mikuwa na meme ezalaki kopanza misuni. Wana kobeta ezalaki kolandana, yango ezalaki kopasola misuni oyo mizali na kati, miye mikangani na mikuwa, mpe ezalaki kobimisa ndambo na misuni oyo misanganaki na makila.”

Nsima na monyoko oyo, bamemi Yesu na ndako ya guvernere, mpe limpinga nyonso ya basoda liyangani. Basoda balandi kotyola ye: basali motólé ya nzube mpe balatisi Yesu. Basimbisi ye mokekele na loboko ya mobali mpe bazipi ye na elamba motane, lokola oyo ekolataka bakonzi. Mpe balobi na ye na kotyola ete: “Mbote, mokonzi na Bayuda!” Lisusu, babwakeli ye nsoi mpe babeti ye. Kobotoláká ye mokekele wana makasi na maboko, babeti ye na motó, kokótisáká lisusu kati na mposo ya motó na ye, banzube ya “motolé” wana ya kookisa nsoni.

Bopolo mpe mpiko monene oyo Yesu amonisi liboso na minyoko oyo ekamwisi Pilato kino apusami na komeka mwango mosusu mpo na kobikisa ye. Mpe alobi na bibele ete: “Tala, nazali koya na ye epai na bino mpo boyeba ete namoni likambo kati na ye te.” Mbala mosusu Pilato akanisi ete bakolembisa mitema wana bakomona lolenge oyo Yesu akómi likoló na minyoko oyo azwi. Kolatáká motólé ya nzubé mpe elamba motane, elongi etondi na makila mpe na bilembo ya fimbo, Yesu abimi liboso na ebele oyo ya motema makasi. Bongo Pilato alobi ete: “Botala moto ye wana!”

Atako azokisami mpe anyokwami, moto yango azali moto aleki ntina mingi kati na Lisolo na bato, ee, azali moto aleki bato nyonso kati na bikeke nyonso. Bopolo mpe kimya na Yesu ezali elembo ya bonene oyo ata Pilato asosoli yango, mpamba te maloba na ye mamonisi limemya mpe mawa oyo azali na yango. Yoane 18:39 kino 19:5; Matai 27:15-17, 20-30; Malako 15:6-19; Luka 23:18-25.

▪ Nini Pilato ameki kosala mpo na kokangola Yesu?

▪ Ndenge nini Pilato ameki komilongola na mikumba nyonso?

▪ Basaleli eloko nini mpo na kobeta Yesu?

▪ Nsima na kobeta Yesu fimbo, ndenge nini baseki ye?

▪ Mwango nini mosusu Pilato ameki kosala mpo na kokangola Yesu?