Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ekolo ekweisami, kasi nyonso te

Ekolo ekweisami, kasi nyonso te

Mokapo 79

Ekolo ekweisami, kasi nyonso te

YESU auti kosolola na bato oyo bayanganaki liboso na ndako na Mofalisai moko. Mwa moke na nsima, bayebisi ye ‘likambo likomeli bato na Galilai baoyo [guvernere moloma Ponce] Pilate asangisi makila na bango na oyo ya mbeka na bango.’ Ekoki kozala ete Bagalilai wana babomamaki na ntango oyo bankoto na Bayuda batemelaki kotongama ya terasé moko oyo esengelaki kosunga Yelusaleme, mpamba te Pilate nde azalaki kosalisa mosala yango na mosolo ya tempelo. Bato oyo bazali koyebisa lisolo yango epai na Yesu bazali mbala mosusu koloba ete mpasi ezwi Bagalilai wana na ntina na mabe na bango.

Nzokande Yesu asemboli balobani na ye na kotunaka bango motuna oyo: “Bokanisi ete Bagalilai yango balekaki bato nyonso na masumu mpo ete basili kozwa mpasi yango? Nalobi na bino ete, te, kasi soko bokobongola mitema te, bino nyonso bokokufa bobele bongo.”

Na nsima Yesu ayebisi likambo mosusu ya nsomo mingi esalemaki kati na mboka, mbala mosusu na ntango na botongami ya terasé moko wana: “Lisusu mpo na bango zomi na mwambe baoyo ndako molai na Siloame ekwelaki bango mpe ebomaki bango, bokanisi ete bango balekaki bato nyonso bafandi na Yelusaleme na mabe?” Yesu alimboli ete, te, bato wana bakufi mpo na masumu na bango te. Mingimingi, ezali ‘ntango mpe makambo makanami te’ nde ebongi kofunda mpo na makama motindo oyo. Nzokande, Yesu azwi lisusu libaku ya kopesa likebisi oyo: “Kasi soko bokobongola mitema te, bino nyonso bokokufa bobele bongo.”

Na nsima Yesu apesi lisese moko ebongi mpenza na likambo yango: “Moto moko akonaki nzete na figi na elanga na ye na vinyo, ayaki koluka mbuma na yango nde azwi te. Alobaki na mobateli na elanga ete: ‘Tala nasili koya koluka mbuma na nzete na figi oyo mbula misato mpe nazwi te. Kata yango. Ezali kokanga mabelé mpamba mpo na nini?’ Ye nde azongiseli ye monoko ete: ‘Nkolo, tika yango mbula oyo lokola, bongo nakotimola bipai na bipai na yango, mpe nakobwaka matiti mapoli wana, mbala mosusu ekobota mbuma na mbula na nsima. Soko te, okokata yango.’”

Na boumeli ya mibu misato koleka Yesu amekaki kolona kondima na kati na libota na Bayuda. Nzokande mosala na ye ebotaki bobele mwa bankama na bayekoli. Lokola azali sikawa kati na mobu ya minei ya mosala na ye, abakisi milende, lokola ete, na elobeli ya elilingi, azali kotimola mpe kotya matiti mapoli zingazinga ya nzeté ya figi, libota na Bayuda, kosakolaka mpe koteyaka na molende nyonso kati na Yudea mpe na Pelea. Kasi azali koboma nzoto mpamba. Libota eboyi kobongola motema, na bongo emibendeli kobomama. Bobele mwa bato moke kati na libota yango nde bandimi Yesu.

Mwa moke na nsima, Yesu abandi koteya kati na eyanganelo, na mokolo na Sabata. Na kati na yango ezali na mwasi moko oyo, lokola atungisami na elimu mabe moko, nzoto na ye esila kongumbama uta mibu 18. Eyoki ye mawa mingi, Yesu alobi na ye ete: “Mama, osili kobika na bolembu na yo” mpe atye maboko likoló na ye. Na mbala moko, asemboli mokongo na ye mpe abandi kokumisa Nzambe.

Mokambi na eyanganelo ayoki nkanda. Alobi na ebele ete: “Mikolo mizali motoba mikoki na kosala mosala. Boya kobikisama na mikolo yango kasi na mokolo na sabata te.” Moto yango andimi bongo ete Yesu azali na nguya ya kobikisa, kasi azali kopamela bato ya mboka oyo bazali koya koluka kobikisama na mokolo na sabata!

Yesu azongiseli ye monoko ete: “Bakosi! Moko na moko na bino akokangolaka ngombe na ye soko mpunda na ye na ndako, kokenda komelisa yango na sabata te? Mwasi oyo azali mwana na Abrahame, oyo Satana akangaki mbula zomi na mwambe, ebongaki ete akangolama na nkamba na ye oyo na mokolo na sabata te?”

Koyokaka bongo, batemeli na Yesu bamoni nsoni, nzokande bibele basepeli na makambo nyonso wana kitoko oyo bamoni ye kosala yango. Na bongo azongeli lisusu masese mibale ya esakweli na tina na Bokonzi na Nzambe, oyo asilaki kopesa yango eleki mbula moko, ntango afandaki kati na masuwa, na libeke ya Galilai. Luka 13:1-21; Mosakoli 9:11; Matai 13:31-33.

▪ Makambo nini ya nsomo mayebisami awa, mpe liteya nini Yesu apesi mpo na yango?

▪ Ndimbola nini tokoki kopesa na lisese ya nzete na figi oyo eboti mbuma te mpe na milende misalemi mpo na kobotisa yango?

▪ Ndenge nini mokambi na eyanganelo andimi ete Yesu azali na nguya ya kobikisa bato, kasi na maloba nini Yesu amonisi polele bokosi ya moto yango?