Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elakiseli ya nkembo na Klisto kati na Bokonzi na ye

Elakiseli ya nkembo na Klisto kati na Bokonzi na ye

Mokapo 60

Elakiseli ya nkembo na Klisto kati na Bokonzi na ye

WANA bakomi na mboka Césarée de Philippe, Yesu abandi koteya etuluku moko ya bato, oyo bantóma na ye bazwami mpe kati na bango. Asakoli bango likambo moko ya kokamwa: “Nazali koloba na bino solo ete kati na bamosusu bazali kotelama awa ezali na baoyo bakomona kufa te liboso na komona Mwana na moto koya na Bokonzi na ye.”

Bayekoli bamitunaki soko alingaki ‘koloba nini na wana?’ Penepene na poso moko na nsima, Yesu amemi Petelo, Yakobo mpe Yoane likoló na ngomba moko molai. Mbala mosusu, ezalaki na butu mpo bayekoli bazalaki kooka mpongi. Wana Yesu azali kobondela, abongwani liboso na bango. Elongi na ye ebandi kongenga lokola moi, mpe bilamba na ye bikomi kongenga lokola pole.

Bongo bato mibale babimi, bamonisami lokola “Moïse” mpe Elie, oyo babandi kosolola na Yesu na ntina na ‘kokenda na ye oyo esengeli kosalema na Yelusaleme.’ Kokenda yango ezali nde liwa mpe lisekwa na Yesu. Na yango, lisolo oyo emonisi ete, na likeseni na ndenge Petelo akanisaki, Yesu asengeli te kokima liwa na ye ya nsoni.

Esili bango kolamuka mpenza, bayekoli bazali kotala mpe kolanda lisolo na kokamwa nyonso. Atako ezali emonaneli, emonani mpenza lokola likambo ya solo na boye ete, Petelo abandi kosangana na yango. Alobi: “Nkolo, ezali malamu na biso ete tozala awa. Soko olingi, nakosala mwa mingombo misato, moko mpo na yo, moko mpo na Mose mpe moko mpo na Eliya.”

Lokola ezali ye koloba, lipata na pole ezipi bango, mpe mongongo moko ebimi na kati na lipata kolobáká ete: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli na ye mingi. Boyoka ye!” Eyokaki bango mongongo, bayekoli bakwei na elongi na bango. Kasi Yesu alobi na bango ete: “Botelema, bobanga mpe te.” Batelemi, mpe bamoni moto lisusu te, bobele Yesu.

Mokolo elandaki, wana ezali bango kokita na ngomba, Yesu apesi bango etinda oyo: “Boloba na moto mpo na emonaneli te kino Mwana na moto akosekwa na kufa.” Komonana na Elie kati na emonaneli ebimisi motuna epai na bayekoli: “Mpo na nini bakomeli bazali koloba ekoki ete Eliya aya liboso?”

Yesu ayanoli boye: “Nde nazali koloba na bino ete, Eliya asila koya nde bayebaki ye te.” Azali kolobela mpo na Yoane Mobatisi, oyo asalaki mosala mokokani na oyo ya Elie. Yoane abongisaki nzela mpo na Klisto, lokola Elie asalaki yango mpo na Elisée.

Emonaneli yango elendisaki mingi Yesu mpe bayekoli na ye! Ezali lokola elakiseli mpo na nkembo na Klisto kati na Bokonzi na ye. Na yango, bayekoli bamonaki Mwana na moto koya kati na bokonzi na ye”: ezali yango Yesu alakaki poso moko liboso. Nsima na liwa ya Yesu, Petelo akomaki ete ‘bakómaki batemwe ya nkembo na Klisto wana ezalaki bango na ngomba mosantu elongo na ye.’

Bafalisai batunaki epai na Yesu elembo oyo ekomonisa ete azalaki mpenza ye oyo Makomami masakolaki, ye oyo Nzambe akopona lokola mokonzi. Elembo yango epesamelaki bango te. Nzokande, bayekoli oyo bazalaki pene na Yesu bazwaki nzela ya komona mbongwana na ye, oyo endimisi bisakweli bitali Bokonzi. Yango wana Petelo akomaki ete: “Na yango tozali na liloba na esakweli oyo ekoki kondimama.” Matai 16:13, Mt 16:28 kino 17:13; Malako 9:1-13; Luka 9:27-37; 2 Petelo 1:16-19.

▪ Ndenge nini, liboso ete bakufa, bamoko bamoni Klisto koya na kati na Bokonzi na ye?

▪ Moïse, Elie mpe Yesu basololi makambo nini kati na emonaneli?

▪ Mpo na nini emonaneli yango ezali elendiseli makasi mpenza mpo na bayekoli?